Pusaná penepene na Nzambe
Eloko moko ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”?
BISO nyonso tozalaka na mposa bálinga biso. Na ntembe te, tozalaka na esengo ntango toyebi ete bandeko mpe baninga na biso balingaka biso. Kasi, likambo ya mawa, ata baninga ya motema bakoki kokabwana to likambo moko ekoki kokabola bango. Baninga na biso ya motema bakoki koyokisa biso mpasi, kosundola, ata mpe koboya biso. Atako bongo, ezali na moto moko oyo bolingo na ye esilaka te. Bolingo ya Yehova mpo na basambeli na ye emonisami na maloba kitoko mpenza na Baloma 8:38, 39.
Ntoma Paulo alobi ete, “nandimi solo.” Andimi likambo nini? Andimi ete eloko moko te ekoki “kokabola biso ná bolingo ya Nzambe.” Paulo alobi kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na “biso,” elingi koloba mpo na baoyo nyonso bazali kosalela Nzambe na motema moko. Mpo na komonisa likambo yango, Paulo atángi makambo oyo ekoki te kopekisa Yehova akoba kolinga basaleli na ye.
“Ezala liwa to bomoi.” Bolingo ya Yehova mpo na basaleli na ye esukaka te ntango bakufi. Mpo na komonisa ete alingaka bango kaka, abatelaka bango na makanisi na ye, mpe akosekwisa bango na mokili ya sika ya boyengebene oyo ezali koya. (Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:3, 4) Liboso ntango yango ekóma, bolingo ya Yehova mpo na basambeli na ye ya solo ekosila te, atako likambo nini ekómeli bango na mokili oyo.
Ezala “Baanzelu to baguvɛrnema.” Bato ya nguya to bakonzi bakoki kobongola makanisi na biso, kasi ezali bongo te mpo na Yehova. Bikelamu ya elimo, na ndakisa anzelu oyo akómaki Satana, akoki te kopekisa Nzambe kokoba kolinga basambeli na ye. (Emoniseli 12:10) Baguvɛrnema oyo ezali kotɛmɛla baklisto ya solo ekoki ata moke te kobongola makanisi ya Nzambe mpo na basaleli na ye.—1 Bakolinti 4:13.
Ezala “makambo ya sikoyo to makambo oyo ekoya.” Bolingo ya Nzambe esilaka te ata nsima ya mbula boni. Ezali na likambo moko te oyo ekoki kokómela basaleli na ye lelo to lobi oyo ekotinda ye atika kolinga bango.
Ezala “banguya.” Paulo alobelaki liboso banguya ya likoló mpe ya mabelé, elingi koloba “baanzelu” mpe “baguvɛrnema,” kasi sikoyo alobeli “banguya.” Liloba ya Grɛki oyo asaleli awa ezali na bandimbola mingi. Ezala asaleli yango na ndimbola nini, toyebi likambo moko: Nguya moko te, ezala na likoló to awa na mabelé, ekoki kopekisa Yehova kolinga basaleli na ye.
Ezala “bosanda to bozindo.” Likambo moko te ekoki kopekisa Yehova kolinga basaleli na ye, ezala na ntango ya mpasi to ya bisengo.
Ezala “ekelamu nini mosusu.” Na maloba oyo, Paulo alingi koloba ete eloko ata moko te ekoki kokabola basambeli ya Yehova ya sembo na bolingo na ye.
Na bokeseni na bolingo ya bato, oyo ekoki kobongwana to kosila, bolingo ya Nzambe mpo na baoyo bazali kokoba kotalela ye na kondima nyonso esilaka te; ezali ya libela na libela. Koyeba bongo esengeli mpenza kotinda biso tópusana penepene na Yehova mpe tósala nyonso mpo na komonisa ete tolingaka ye.