Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/8 lok. 31
  • Mabelé ekobebisama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabelé ekobebisama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Mabele
    Lamuká!—2014
  • Mabele ekobebisama?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mabelé ekobebisama mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/8 lok. 31

Mituna ya batángi

Mabelé ekobebisama?

Likama moko te ekobebisa mabelé oyo. Mpo na nini tozali koloba bongo? Mpo Nzambe alaki ete mabelé ‘ekoningana libela na libela te.’ (Nzembo 104:5) Ndenge Biblia elobi yango, “libota moko bakolimwa mpe libota mosusu bakoya nde mokili ekoumela seko.”​—Mosakoli 1:4.

Na Nzembo 104:5, maloba mibale ya Liebele (ʽoh·lamʹ mpe ʽadh) oyo ebongolami na “libela na libela” emonisi ete mabelé ekotikala libela na libela. Liloba ʽOh·lamʹ ekoki kobongolama na “mbula mingi” to “seko na seko.” Na buku na ye (Students’ Hebrew and Chaldee Dictionary) Harkavy akomaki ete liloba ʽadh elimboli “koumela, kotikala libela na libela, seko na seko.” Maloba mibale wana ya Liebele esalelami na vɛrsɛ wana mpo na konyata mbala mibale ete mabelé ekotikala libela na libela. Tótala makanisi mosusu misato ya Biblia oyo esalisi biso tóndima ete mabelé ekoumela seko na seko.

Ya liboso, Nzambe asalaki mabelé mpo bato báfanda wana; mpo ezala paladiso moko kitoko mpe ya bisengo na mokili mobimba, kasi te mpo ebebisama mpe etikala mpamba. Yisaya 45:18 elobi ete Yehova “asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko ya mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana.”

Ya mibale, Nzambe asilaki kolaka banda kala ete bato oyo batosaka ye bakofanda na kimya awa na mabelé libela na libela. Mika 4:4 elaki boye: “Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo, NW] mpe na nzete na ye ya [figi, NW], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ ya [Yehova] ya bibele elobi bongo.” Ndenge Nzambe alaki yango, bato bakofanda na mabelé libela na libela; soki te, bilaka ya Nzambe ekozala na ntina te.​—Nzembo 119:90; Yisaya 55:11; 1 Yoane 2:17.

Ya misato, Nzambe apesaki moto mokumba ya kobatela mpe kobongisa mabelé oyo. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Lola mpe likoló-ya-lola ezali ya [Yehova], kasi apesaki mokili na bana ya bato.” (Nzembo 115:16) Ondimi mpenza ete tata ya bolingo akoki kopesa mwana na ye eloko moko ya kitoko mpe na nsima abebisi yango? Soki moke te! Ndenge moko mpe, Yehova akosala likambo ya ndenge wana te mpo na mabelé mpe bafandi na yango, mpo “Nzambe azali bolingo.”​—1 Yoane 4:8.

Na ntina na Tata na ye, Yesu Klisto alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Longola yango, Nzambe oyo akoki kokosa te alakaki boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29; Tito 1:2.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Mabelé: Fɔtɔ ya NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto