Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/8 nk. 7-11
  • Batelá bosembo na motema moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá bosembo na motema moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Nakopesa yo libonza”
  • Sepelá na oyo ozali na yango
  • Mosakoli moko ya mobange “abukelaki ye lokuta”
  • Azongaki elongo na ye
  • Zalá na komikitisa
  • Zalá na ekateli ya kotikala sembo
  • Yehova akotika basembwi na ye te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/8 nk. 7-11

Batelá bosembo na motema moko

“Nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”​—NZ. 86:11.

1, 2. (a) Na kotalela Nzembo 86:2, 11, nini ekoki kosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova ntango tokutani na mikakatano to komekama? (b) Ntango nini tosengeli koyekola kozala sembo na motema mobimba?

MPO na nini baklisto mosusu oyo batikalaki sembo na boumeli ya bambula mingi, atako bakangamaki to banyokolamaki, na nsima bakweaka na motambo ya kolinga biloko ya mokili? Mokakatano eutaka na motema na biso, elingi koloba bomoto na biso ya kati. Nzembo 86 emonisi boyokani oyo ezali kati na bosembo mpe motema moko, elingi koloba motema oyo ekabwani te. Davidi abondelaki boye: “Batelá molimo na ngai mpo ete nazali moyengebene, Ee Nzambe na ngai, bikisá moombo na yo oyo azali na elikya epai na yo.” Davidi abondelaki lisusu ete: “Ee [Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.”​—Nz. 86:2, 11.

2 Soki motema na biso ezali mobimba te epai ya Yehova, makambo mosusu ekolɛmbisa bosembo na biso. Bamposa mosusu ya motema na biso ezali lokola bamine oyo ekundami na nzela oyo tozali kotambola. Ekoki kozala ete totikalaki sembo epai ya Yehova ntango tokutanaki na mikakatano; atako bongo, tokoki kokwea na masɛnginya to mitambo ya Satana. Ezali mpenza na ntina ete banda sikoyo, tóyekola kozala sembo epai ya Yehova na motema mobimba liboso tókutana na mikakatano mpe komekama! Biblia elobi boye: “Batelá motema na yo na mpiko nyonso.” (Mas. 4:23) Mpo na yango, likambo oyo ekómelaki mosakoli ya Yuda oyo Yehova atindaki epai ya Yelobama, mokonzi ya Yisalaele, ekoki koteya biso makambo mingi.

“Nakopesa yo libonza”

3. Yelobama asalaki nini ntango ayokaki nsango oyo mosakoli ya Nzambe ayebisaki ye?

3 Tótalela lisolo oyo. Mosakoli ayebisaki maloba ya Yehova epai ya Yelobama, mokonzi oyo abandisaki losambo ya mwana ya ngɔmbɛ na bokonzi ya nɔrdi. Mokonzi yango asilikaki. Atindaki bato na ye bákanga momemi-nsango yango. Kasi, Yehova abatelaki mosaleli na ye. Lobɔkɔ oyo mokonzi asembolaki ekaukaki mpe etumbelo ya losambo ya lokuta ebukanaki. Na mbala moko, Yelobama abongolaki makanisi. Ayebisaki moto ya Nzambe ete: “Bondelelá ngai boboto ya [Yehova] Nzambe na yo; mpe lɔmbá mpo na ngai ete lobɔkɔ na ngai lobikisamela ngai.” Mosakoli abondelaki, mpe lobɔkɔ ya mokonzi ebongaki.​—1 Mik. 13:1-6.

4. (a) Mpo na nini maloba ya mokonzi emekaki mpenza bosembo ya mosakoli? (b) Mosakoli apesaki eyano nini?

4 Na nsima, Yelobama alobaki na moto ya Nzambe ete: “Yaká epai na ngai na ndako mpe opema, nakopesa yo libonza.” (1 Mik. 13:7) Mosakoli asengelaki kosala nini? Asengelaki nde kokende na ndako ya mokonzi mpe kondima libonza na ye, nsima ya koyebisa ye etumbu oyo Yehova akatelaki ye? (Nz. 119:113) To asengelaki nde koboya kokende, atako emonanaki lokola nde mokonzi abongoli motema? Na ntembe te, Yelobama azalaki na bozwi mpe akokaki kopesa moto oyo ye alingi likabo ya ntalo mingi. Soki mosakoli ya Nzambe akómaki kokolisa mposa ya biloko ya mokili na motema na ye, na ntembe te maloba ya mokonzi elingaki kozala motambo mpo na ye. Nzokande, Yehova ayebisaki mosakoli yango boye: “Okolya kwanga te, okomɛla mpe te, okozonga mpe na nzela eyaki yo te.” Yango wana, mosakoli ayanolaki polele ete: “Ata opesi ngai ndambo na ndako na yo, nakoyingela esika moko na yo te. Nakolya kwanga te, nakomɛla mpe mai na esika oyo te.” Na nsima, mosakoli azongaki na nzela mosusu. (1 Mik. 13:8-10) Ekateli oyo mosakoli yango azwaki ezali koteya biso nini na likambo ya kozala sembo na motema moko?​—Lom. 15:4.

Sepelá na oyo ozali na yango

5. Na ndenge nini kolinga biloko ya mokili ekoki kobebisa bosembo na biso?

5 Tokoki kokanisa ete kolinga biloko ya mokili ekoki te kobebisa bosembo na biso; nzokande, ekoki kobebisa yango. Tondimaka mpenza elaka ya Yehova ete akopesa biso nyonso oyo tozali na mposa na yango? (Mat. 6:33; Ebe. 13:5) Tobomaka nzoto mpo na kozwa biloko “kitoko” ya bomoi, to tondimaka ete tokoki kozala na esengo ata soki tozali na yango te? (Tángá Bafilipi 4:11-13.) Tokanisaka ntango mosusu kozongisa makambo ya elimo nsima mpo na kozwa biloko mosusu oyo tozali na mposa na yango sikoyo? Kosalela Yehova na bosembo ezalaka na esika ya liboso na bomoi na biso? Biyano oyo tokopesa na mituna yango ekomonisa soki tosalelaka Nzambe na motema mobimba to te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Ezali nzela ya kozwa litomba monene, ezaleli yango ya kokangama na Nzambe elongo na ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango. Mpo toyaki na eloko te na kati ya mokili, mpe tokoki komema eloko te. Na yango, kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.”​—1 Tim. 6:6-8.

6. Makambo nini bakoki kolaka biso, mpe nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki tosengeli kondima yango?

6 Na ndakisa, patrɔ na biso akoki kosɛnga biso tóndima kosala mosala moko oyo ekobakisela biso lifuti mpe makambo mosusu ya malamu. To mpe mbala mosusu tokoki komona ete tokozwa mbongo mingi soki tokei koluka mosala na mboka mopaya. Ekoki komonana ete makambo yango ezali mapamboli ya Yehova. Kasi, liboso tózwa ekateli, ebongi tótalela motema na biso. Motuna ya libosoliboso oyo tosengeli komituna ezali oyo: “Ekateli na ngai ekobebisa te boyokani na ngai na Yehova?”

7. Mpo na nini tosengeli kolongola na motema na biso mposa nyonso ya kolinga biloko ya mokili?

7 Mokili ya Satana ezali se kolendisa ezaleli ya kolinga biloko ya mokili. (Tángá 1 Yoane 2:15, 16.) Zabolo azali na mokano ya kobebisa motema na biso. Yango wana, tosengeli kozala ekɛngɛ mpo na koyeba mpe kolongola na mitema na biso mposa nyonso ya kolinga biloko ya mokili. (Emon. 3:15-17) Yesu aboyaki mbala moko ntango Satana alakaki kopesa ye makonzi nyonso ya mokili. (Mat. 4:8-10) Yesu apesaki likebisi oyo: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato, mpamba te ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” (Luka 12:15) Bosembo ekosalisa biso tótalela Yehova na esika tómityela motema.

Mosakoli moko ya mobange “abukelaki ye lokuta”

8. Ndenge nini bosembo ya mosakoli ya Nzambe emekamaki?

8 Makambo elingaki kotambola malamu mpo na mosakoli ya Nzambe soki akobaki nzela na ye. Nzokande, mwa moke na nsima, akutanaki na komekama mosusu. Biblia elobi boye: “Mosakoli mpaka azalaki kofanda na Betele. Bana na ye bayaki koyebisa ye” makambo oyo esalemaki mokolo yango. Ntango ayokaki bongo, mobange yango atindaki bana na ye bábongisela ye mpunda mpo alanda mosakoli ya Nzambe. Eumelaki te, akutaki mosakoli yango afandi na nse ya nzete moko monene mpe alobaki na ye boye: “Yaká epai na ngai na ndako ete olya kwanga.” Ntango moto ya Nzambe aboyaki, mobange yango alobaki ete: “Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo mpe anzelu alobaki na ngai na liloba ya [ Yehova] ete, [zongisá] ye na ndako na yo ete alya kwanga mpe amɛla mai.” Kasi, Biblia elobi ete: “Abukelaki ye lokuta.”​—1 Mik. 13:11-18.

9. Makomami elobi nini mpo na bato oyo balobaka lokuta, mpe bato yango basalaka banani mabe?

9 Toyebi te soki mosakoli oyo azalaki mobange azalaki na makanisi nini, kasi Biblia elobi ete abukaki lokuta. Mbala mosusu mobange yango azalaká mosakoli ya sembo ya Yehova. Atako bongo, na libaku oyo, akosaki. Biblia epekisi ezaleli wana. (Tángá Masese 3:32.) Bato oyo balobaka lokuta babebisaka boyokani na bango, ata mpe ya bato mosusu, na Yehova.

Azongaki elongo na ye

10. Mosakoli ya Nzambe asalaki nini ntango mosakoli oyo azalaki mobange abengaki ye, mpe esukelaki ye ndenge nini?

10 Mosakoli oyo autaki na Yuda asengelaki kososola ete mosakoli oyo azalaki mobange azalaki kokosa ye. Akokaki komituna boye: ‘Mpo na nini Yehova atindi anzelu epai ya moto mosusu mpo apesa ngai malako ya sika?’ Mosakoli yango akokaki kosɛnga Yehova amonisa ye polele litambwisi na ye, kasi Biblia emonisi te ete asalaki bongo. Kutu, azongaki elongo na mosakoli ya mobange mpe “alyaki kwanga na ndako na ye mpe amɛlaki mai.” Yehova asepelaki te. Ntango mosakoli oyo akosamaki azalaki kozonga na Yuda, akutanaki na nkɔsi na nzela mpe nkɔsi yango ebomaki ye. Yango ezalaki liwa ya nsɔmɔ mpo na mosakoli yango.​—1 Mik. 13:19-25.a

11. Ahiya atikaki ndakisa nini?

11 Na bokeseni na mosakoli yango, mosakoli Ahiya oyo Yehova atindaki mpo na kopakola Yelobama lokola mokonzi, atikalaki sembo ata ntango akómaki mobange. Ntango Ahiya akómaki mobange mpe azalaki lisusu komona te, Yelobama atindaki mwasi na ye akende kotuna mosakoli Ahiya nini ekokómela mwana na bango oyo azalaki kobɛla. Na mpiko nyonso, Ahiya alobaki ete mwana ya Yelobama akokufa. (1 Mik. 14:1-18) Ahiya azwaki mapamboli mingi, moko na yango ezali libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokoma Liloba ya Nzambe. Na ndenge nini? Nganga-nzambe Ezela asalelaki makomi ya Ahiya mpo na kokoma mikanda na ye oyo ezali na Biblia.​—2 Nta. 9:29.

12-14. (a) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki mosakoli ya Yuda? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya kotalela malamu mpe na kati ya libondeli toli ya Biblia oyo nkulutu moko apesi biso.

12 Biblia elobi te mpo na nini mosakoli ya Yuda atunaki Yehova te liboso azonga elongo na mosakoli oyo akómaki mobange mpo na kolya mpe komɛla epai na ye. Ekoki nde kozala ete mosakoli ya mobange ayebisaki ye makambo oyo azalaki na mposa ya koyoka? Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Tosengeli mpenza kondima ete mitinda ya Yehova ezali sembo. Tosengeli kozala na ekateli ya kotosa yango ata na likambo nini.

13 Bato mosusu balandaka kaka toli oyo bazali na mposa ya koyoka. Na ndakisa, ndeko moko akoki kozwa mosala moko oyo ekozwa ye ntango nyonso oyo akokaki kolekisa elongo na libota na ye to na makambo ya elimo. Akoki kotuna toli epai ya nkulutu moko. Ntango nkulutu abandi koloba, akoki koyebisa ndeko yango ete akoki te koyebisa ye oyo asengeli kosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Na nsima, nkulutu akoki kotalela na ndeko yango makama ya elimo oyo akoki kokutana na yango soki andimi mosala yango. Ndeko yango akokangama kaka na maloba oyo nkulutu alobaki na ebandeli, to akotya mpenza likebi na batoli nyonso oyo apesi ye? Na ntembe te, ndeko yango asengeli koluka koyeba oyo ezali malamu mingi mpo na elimo na ye.

14 Tózwa ndakisa mosusu. Ndeko mwasi moko akoki kotuna nkulutu moko soki asengeli kokabwana na mobali na ye oyo azali Motatoli te. Na ntembe te, nkulutu yango akoyebisa ndeko mwasi ete ye moko nde asengeli kozwa ekateli ya kokabwana to kokabwana te na mobali na ye. Na nsima, bakoki kotalela batoli oyo Biblia epesi na likambo yango. (1 Kol. 7:10-16) Ndeko mwasi yango akotya mpenza likebi na makambo oyo nkulutu ayebisi ye? To nde na motema na ye asilaki kozwa ekateli ya kokabwana na mobali na ye? Liboso ya kozwa ekateli, ndeko mwasi yango asengeli kotalela malamu mpe na kati ya libondeli toli ya Biblia oyo nkulutu apesi ye.

Zalá na komikitisa

15. Liteya nini tozwi na libunga oyo mosakoli ya Nzambe asalaki?

15 Liteya nini mosusu tokoki kozwa na libunga oyo mosakoli ya Yuda asalaki? Masese 3:5 elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.” Na esika akoba kotalela Yehova ndenge asalaki liboso, mosakoli ya Yuda andimaki bososoli na ye moko. Mpo na yango, abebisaki boyokani na ye na Yehova mpe abungisaki bomoi na ye. Likambo oyo ekómelaki ye emonisi mpenza ntina ya kosalela Yehova na komikitisa mpe na bosembo!

16, 17. Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova?

16 Motema na biso elukaka kokosa biso. “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yil. 17:9) Mpo na kotikala sembo epai ya Yehova, tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kolongola bomoto ya kala mpe bizaleli na yango lokola lolendo mpe komityela motema. Tosengeli nde kolata bomoto ya sika, “oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.”​—Tángá Baefese 4:22-24.

17 Masese 11:2 elobi ete “mayele ezali elongo na basɔkɛmi.” Kotalela Yehova na komikitisa nyonso ekosalisa biso tósala te mabunga ya minene. Na ndakisa, kolɛmba nzoto ekoki kobebisa bososoli na biso. (Mas. 24:10) Tokoki kokóma na bolɛmbu ya kosala makambo mosusu ya elimo mpe kobanda komona ete oyo tosili kosala na boumeli ya bambula ekoki, mpe kokanisa ete ekómi ntango mpo basusu mpe básala. To mpe tokoki kokóma na mposa ya kozala na bomoi lokola ya bato nyonso. Nzokande, ‘kosala makasi mpenza’ mpe ‘kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo’ ekobatela motema na biso.​—Luka 13:24; 1 Kol. 15:58.

18. Tokoki kosala nini ntango toyebi te ekateli oyo tosengeli kozwa?

18 Tokoki kokutana na makambo oyo ezali kosɛnga ete tózwa bikateli ya minene, kasi tozali koyeba mpenza te nini tokoki kosala. Na ntango yango, tokoluka nde kosala makambo na ndenge na biso? Ntango likambo ya ndenge wana ekómeli biso, tosengeli kosɛnga lisalisi ya Yehova. Yakobo 1:5 elobi ete: “Soki moko na bino azali kozanga bwanya, tiká akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka na bokabi epai ya bato nyonso.” Tata na biso ya likoló akopesa biso elimo santu oyo ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu.​—Tángá Luka 11:9, 13.

Zalá na ekateli ya kotikala sembo

19, 20. Ekateli nini tosengeli kozala na yango?

19 Bambula ya yikiyiki oyo eyaki ntango Salomo atikaki losambo ya solo emekaki mpenza bosembo ya basaleli ya Nzambe. Mingi batikalaki sembo te. Nzokande, basusu batikalaki sembo epai ya Yehova.

20 Mokolo na mokolo, tokutanaka na makambo oyo esɛngaka ete tózwa bikateli oyo emekaka bosembo na biso. Biso mpe tokoki komonisa bosembo na biso. Tiká ete tótikala ntango nyonso sembo epai ya Yehova na motema moko, na elikya ete akokoba kopambola basembwi na ye.​—2 Sam. 22:26.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biblia eyebisi te soki Yehova abomaki mosakoli oyo azalaki mobange.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini tosengeli kolongola na motema na biso mposa nyonso ya kolinga biloko ya mokili?

• Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova?

• Ndenge nini komikitisa ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe?

[Bililingi na lokasa 9]

Ozalaka na mokakatano mpo na kolonga komekama?

[Bililingi na lokasa 10]

Ntango bapesi yo toli oyo euti na Biblia, okotalela yango na kati ya libondeli?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto