Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/8 nk. 3-7
  • Yehova akotika basembwi na ye te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova akotika basembwi na ye te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango bazali konyokolama
  • Ntango bapɛngwi bazali koluka kolɛmbisa bango
  • Ntango bazali kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi bango
  • Yehova akobatela basembwi na ye
  • Bokonzi ekabwani
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Bokonzi ekabwani
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Batelá bosembo na motema moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mokanda ya Biblia nimero 11—1 Mikonzi
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/8 nk. 3-7

Yehova akotika basembwi na ye te

“[Yehova] akotika basembwi na ye te. Bakobatelama libela na libela.”​—Nz. 37:28, NW.

1, 2. (a) Makambo nini emekaki bosembo ya basaleli ya Nzambe na ekeke ya 10 L.T.B.? (b) Na makambo nini misato Yehova abatelaki basembwi na ye?

NA EKEKE ya 10 L.T.B., basaleli ya Yehova basengelaki kozwa ekateli moko monene. Etikalaki moke etumba ebima kati na mabota ya Yisalaele; na nsima, mabota ya nɔrdi ekabwanaki na oyo ya sudi. Yelobama akómaki mokonzi ya mabota ya nɔrdi. Mpo na kobatela bokonzi na ye, abandisaki losambo moko ya sika na ekólo yango. Asɛngaki bato bátosa ye na makambo nyonso. Basaleli ya sembo ya Yehova basengelaki kosala nini? Balingaki nde kotikala sembo epai ya Nzambe na bango? Mingi kati na bango basalaki bongo mpe lokola batikalaki sembo, Yehova abatelaki bango.​—1 Mik. 12:1-33; 2 Nta. 11:13, 14.

2 Lelo oyo mpe bosembo ya basaleli ya Nzambe ezali komekama. Biblia elobi boye mpo na kokebisa biso: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” Tokokoka mpenza kotɛmɛla ye mpe kotikala makasi na kati ya kondima? (1 Pet. 5:8, 9) Tótalela makambo oyo esalemaki ntango Yelobama akómaki mokonzi na mobu 997 L.T.B. mpe mateya oyo tokoki kozwa na makambo yango. Na eleko wana ya mpasi, basaleli ya sembo ya Yehova bazalaki konyokolama. Lisusu, wana bazalaki kokokisa mikumba oyo Nzambe apesaki bango, bapɛngwi bazalaki koluka kolɛmbisa bango. Na makambo wana nyonso, Yehova atikaki basembwi na ye te; lelo oyo mpe akotika bango te.​—Nz. 37:28.

Ntango bazali konyokolama

3. Mpo na nini Mokonzi Davidi azalaki konyokola bato te?

3 Tótalela naino makambo oyo esalaki ete Yelobama akóma mokonzi. Masese 29:2 elobi boye: “Ekozala bato mabe na bokonzi, bato ya mokili bakolela.” Ntango Mokonzi Davidi azalaki koyangela Yisalaele, bato bazalaki kolela te. Atako Davidi azalaki moto ya kokoka te, azalaki sembo epai ya Nzambe mpe azalaki kotyela ye motema. Mokonzi Davidi azalaki konyokola bato te. Yehova asalaki kondimana na Davidi; alobaki na ye boye: “Libota na yo mpe bokonzi na yo ekobongisama liboso na yo libela; kiti ya bokonzi na yo ekokokisama seko.”​—2 Sam. 7:16.

4. Salomo asengelaki kosala nini mpo Yehova akoba kopambola boyangeli na ye?

4 Boyangeli ya Salomo, mwana ya Davidi, ezalaki na kimya mpe na makambo ya malamu mingi na ebandeli; yango wana elobamaki ete ezalaki elilingi ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto Yesu. (Nz. 72:1, 17) Na ntango wana, ata libota moko te kati na mabota 12 ya Yisalaele ezalaki na ntina ya kotomboka. Kasi, mpo Nzambe akoba kopambola Salomo mpe bato na ye, basengelaki kokokisa masɛngami na ye. Yehova alobaki na Salomo boye: “Soki [okolanda] malako na ngai mpe kotosa mibeko nyonso na ngai ete otambola na nzela na yango, bongo nakokokisa liloba na ngai na yo elongo oyo nalobaki epai ya Davidi tata na yo. Ngai mpe nakofanda kati na bana ya Yisalaele, nakotika Yisalaele bato na ngai te.”​—1 Mik. 6:11-13.

5, 6. Makambo nini esalemaki ntango Salomo azalaki lisusu sembo te?

5 Ntango Salomo akómaki mobange, azalaki lisusu sembo te epai ya Yehova mpe akómaki kosambela banzambe ya lokuta. (1 Mik. 11:4-6) Mokemoke, Salomo atikaki kotosa mibeko ya Yehova mpe akómaki konyokola bato. Minyoko yango ezalaki makasi; yango wana, nsima ya liwa ya Salomo, bato bamilelaki na ntina na ye epai ya mwana na ye Lehobama, oyo akómaki mokonzi na esika na ye mpe basɛngaki ete alɛmbisa makambo mosusu. (1 Mik. 12:4) Lokola Salomo azalaki lisusu sembo te, Yehova asalaki nini?

6 Biblia elobi boye: “[Yehova] ayokelaki Salomo nkanda, zambi motema na ye epɛngwaki longwa na . . . Nzambe ya Yisalaele oyo amonanaki epai na ye mbala mibale.” Yehova alobaki na Salomo boye: “Mpo ete . . . obateli kondimana na ngai te to malako malakaki ngai yo te, boye solo nakobɔtɔla bokonzi epai na yo mpe nakopesa yango epai na moombo na yo.”​—1 Mik. 11:9-11.

7. Atako Yehova aboyaki Salomo, asalaki nini mpo na basembwi na Ye?

7 Na nsima, Yehova atindaki mosakoli Ahiya akende kopakola moto oyo akolongola bato na minyoko ya Salomo. Moto yango ezalaki Yelobama, mobali moko ya mayele oyo asalaki na bokonzi ya Salomo. Atako Yehova abatelaki kondimana mpo na bokonzi oyo asalaki na Davidi, andimaki ete mabota 12 ya Yisalaele ekabwana na bituluku mibale. Mabota 10 epesamaki epai ya Yelobama mpe mabota mibale etikalaki epai ya bakitani ya Davidi. Na ntango wana, ezalaki na mabɔkɔ ya Mokonzi Lehobama. (1 Mik. 11:29-37; 12:16, 17, 21) Yehova alobaki na Yelobama boye: “Soki okoyokamela nyonso ekolakisa ngai yo mpe okotambola na nzela na ngai mpe okosala malamu na miso na ngai ete obatela bilakeli na ngai mpe mibeko na ngai lokola esalaki Davidi moombo na ngai, mbɛ nakozala na yo elongo mpe nakotongela yo ndako ya sembo lokola natongelaki Davidi yango, mpe nakopesa Yisalaele epai na yo.” (1 Mik. 11:38) Yehova asalisaki bato na ye mpe asalaki ete bálongwa na minyoko.

8. Makambo nini ya mabe basaleli ya Nzambe bazali kokutana na yango lelo oyo?

8 Lelo oyo, mokili etondi na minyoko mpe makambo ya kozanga bosembo. Mosakoli 8:9 elobi ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” Bato ya mombongo oyo batondi na lokoso mpe bakonzi oyo bazangi sembo bazali kosala makambo oyo ezali kobebisa nkita. Mbala mingi, bakonzi ya Leta, bato minene ya mombongo mpe bakonzi ya mangomba bazalaka na etamboli ya mbindo. Yango wana, lokola moyengebene Lota, lelo oyo mpe basaleli ya sembo ya Nzambe bazali ‘kotungisama makasi mpo na babuki-mibeko oyo bamipesi na etamboli ya mbindo.’ (2 Pet. 2:7) Lisusu, atako tosalaka makasi tótosa mibeko ya Nzambe, mbala mingi bakonzi ya mabe balukaka konyokola biso.​—2 Tim. 3:1-5, 12.

9. (a) Yehova asili kosala nini mpo na kosilisa mpasi ya bato na ye? (b) Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Yesu akozala ntango nyonso sembo epai ya Nzambe?

9 Atako bongo, tóbosana likambo oyo te: Yehova akotika basembwi na ye te! Tókanisa makambo oyo asili kosala mpo na kokokisa mokano na ye ya kolongola bakonzi mabe ya mokili oyo. Lelo oyo, Klisto Yesu azali koyangela na Bokonzi ya Nzambe. Yesu Klisto azali koyangela na likoló banda mbula pene na nkama. Mosika te, akosilisa mpasi nyonso ya bato oyo babangaka Nzambe. (Tángá Emoniseli 11:15-18.) Yesu atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na liwa. Ata mokolo moko te Yesu akonyokola bato na ye, ndenge Salomo asalaki.​—Ebe. 7:26; 1 Pet. 2:6.

10. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali na motuya na miso na biso? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali na mikakatano?

10 Bokonzi ya Nzambe ezali guvernɛma oyo ekosilisa minyoko. Tosengeli kotosa Yehova Nzambe mpe Bokonzi na ye. Lokola totye elikya nyonso na Bokonzi ya Nzambe, tosengeli koboya bizaleli mabe ya mokili oyo mpe kozala na molende mpo na misala ya malamu. (Tito 2:12-14) Tosengeli kosala makasi mpo tómibatela kozanga litɔnɔ na mokili oyo. (2 Pet. 3:14) Ata soki tokutani na mikakatano nini, tokoki kozala na elikya ete Yehova akobatela biso mpo tólɛmba te na elimo. (Tángá Nzembo 97:10.) Longola yango, Nzembo 116:15 elobi boye: “Ekokufa basembwi na ye yango ezali likambo ya motuya monene na miso ya [Yehova].” Yehova akotika te ete basaleli na ye nyonso bábomama mpamba te bazali na motuya mingi na miso na ye.

Ntango bapɛngwi bazali koluka kolɛmbisa bango

11. Yelobama asalaki nini oyo emonisi ete azalaki lisusu sembo te?

11 Esengelaki ete boyangeli ya Yelobama ekitisa minyoko ya basaleli ya Nzambe. Nzokande, makambo oyo asalaki emekaki lisusu bosembo na bango epai ya Nzambe. Yelobama amonaki ete mpo abatela bokonzi mpe lokumu oyo asilaki kozwa, asengelaki kosala eloko moko. Alobaki boye: “Soki bato oyo bakobuta kokaba mbeka na ndako ya [Yehova] na Yelusaleme, bongo mitema na bato oyo ekozonga epai na mokóló na bango lisusu, epai na Lehobama, mokonzi ya Yuda; bakoboma ngai mpe bakozonga na Lehobama, mokonzi ya Yuda.” Mpo na yango, Yelobama asalaki bana ya ngɔmbɛ mibale ya wolo mpo bato básambelaka yango. “Atɛlɛmisaki moko na Betele mpe mosusu atyaki na Dani. Likambo oyo ekómaki lisumu, zambi bato bakendaki kosambela liboso na moko kino na Dani. Asalaki mpe ndako na bisika ya likoló mpe aponaki banganga kati na bato baoyo bazalaki Balevi te.” Kutu, Yelobama aponaki mokolo moko mpo na “elambo mpo na bana ya Yisalaele,” mpe “abutaki na etumbelo mpo na kotumba mpaka ya malasi.”​—1 Mik. 12:26-33.

12. Basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bazalaki na bokonzi ya nɔrdi basalaki nini ntango Yelobama abandisaki losambo ya mwana-ngɔmbɛ na Yisalaele?

12 Basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bazalaki na bokonzi ya nɔrdi basengelaki kosala nini? Lokola bankɔkɔ na bango na ntango ya kala oyo bamonisaki bosembo, Balevi oyo bazalaki kofanda na bingumba oyo ezalaki na bokonzi ya nɔrdi baumelaki te kozwa ekateli. (Ex. 32:26-28; Mit. 35:6-8; Det. 33:8, 9) Batikaki bamboka na bango mpe bamemaki mabota na bango na Yuda, epai bakokaki kokoba kosambela Yehova. (2 Nta. 11:13, 14) Bato mosusu ya Yisalaele oyo bakendaki kofanda na Yuda mpo na mwa ntango baponaki kotikala kuna libela na esika ya kozonga na bamboka na bango. (2 Nta. 10:17) Yehova apesaki ata bato oyo basengelaki kobotama nsima na bokonzi ya nɔrdi likoki ya kotika losambo ya mwana ya ngɔmbɛ mpe koya na Yuda epai bazalaki kosambela ye, Nzambe ya solo.​—2 Nta. 15:9-15.

13. Na mikolo na biso, ndenge nini bapɛngwi bazali koluka kolɛmbisa basaleli ya Nzambe?

13 Lelo oyo mpe bapɛngwi bazali koluka kolɛmbisa basaleli ya Nzambe. Na bikólo mosusu, bakonzi baponaki losambo moko mpo na ekólo mobimba mpe basɛngisaki bato nyonso bálanda losambo yango. Bakonzi ya mangomba ya boklisto mpe bato mosusu ya lolendo bamibengaki banganga-nzambe. Nzokande, bapakolami na elimo oyo bazali “bonganga-nzambe moko ya bokonzi” bazali kaka na lisangá ya Yehova.​—1 Pet. 2:9; Emon. 14:1-5.

14. Ndenge nini tosengeli kotalela makanisi ya bapɛngwi?

14 Lokola Balevi ya sembo na ekeke 10 L.T.B., lelo oyo basaleli ya Nzambe balandaka mateya ya bapɛngwi te. Baklisto bapakolami mpe baninga na bango bampate mosusu baboyaka na motema moko mateya ya bapɛngwi. (Tángá Baloma 16:17.) Ya solo, totosaka bakonzi ya Leta mpe tokɔtaka na makambo ya politiki te; kasi tolingaka kotikala sembo na Bokonzi ya Nzambe. (Yoa. 18:36; Lom. 13:1-8) Toboyaka makanisi ya lokuta ya bato oyo balobaka ete basalelaka Nzambe, kasi batyolaka ye na etamboli na bango.​—Tito 1:16.

15. Mpo na nini tosengeli kokangama na “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

15 Tókanisa mpe na likambo oyo: na ndenge ya elilingi, Yehova alongoli bato ya mitema sembo na mokili oyo mabe, mpe akɔtisi bango na paladiso ya elimo oyo asali. (2 Kol. 12:1-4) Lokola tozali mpenza na botɔndi, tokangami na “moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi.” Klisto atye moombo yango “likoló ya biloko na ye nyonso.” (Mat. 24:45-47) Yango wana, ata soki moko na biso akangi mpenza te ntina ya lilako to liteya moko ya moombo ya sembo, yango esengeli te kotinda ye aboya kotosa yango to azonga na mokili ya Satana. Nzokande, bosembo esengeli kotinda biso tózala na komikitisa mpe tózela ntango oyo Yehova akosembola makambo.

Ntango bazali kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi bango

16. Mokumba nini mosakoli moko ya Yuda azwaki?

16 Yehova aboyaki Yelobama mpo akómaki mopɛngwi. Yehova atindaki mosakoli moko oyo autaki na Yuda akende na nɔrdi, na Betele mpe akutana na Yelobama ntango azalaki kopesa mbeka na etumbelo oyo atongaki. Mosakoli asengelaki koyebisa Yelobama etumbu makasi oyo Yehova akatelaki ye. Na ntembe te, yango ezalaki mokumba monene mpo na mosakoli yango.​—1 Mik. 13:1-3.

17. Ndenge nini Yehova abatelaki momemi-nsango na ye?

17 Yelobama asilikaki makasi ntango ayokaki etumbu ya Yehova. Asembolaki lobɔkɔ mpo na kolakisa mosakoli ya Nzambe mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana ete: “Simbá ye!” Kasi, na mbala moko, liboso ete mibali yango bákanga mosakoli, “lobɔkɔ na ye [Yelobama], oyo esembolaki ye yango epai na ye [mosakoli] ekaukaki, kino ayebaki kobenda yango epai na ye moko te. Etumbelo ebukamaki mpe putulu ya mɔtɔ esopanaki longwa na etumbelo.” Yelobama akokaki kosala likambo mosusu te, asɛngaki mosakoli abondela Yehova mpo lobɔkɔ na ye ebonga. Mosakoli abondelaki Yehova mpe lobɔkɔ ya mokonzi ebongaki. Na ndenge yango, Yehova abatelaki momemi-nsango na ye mpo básala ye mabe te.​—1 Mik. 13:4-6.

18. Ndenge nini Yehova abatelaka biso wana tozali kosalela ye mosala mosantu kozanga kobanga?

18 Na bantango mosusu, na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, tokutanaka na bato oyo basepelaka na biso te to mpe oyo balingaka ata koyoka nsango na biso te. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Kasi, tosengeli soki moke te kotika ete kobanga makambo ya ndenge wana elɛmbisa molende na biso. Lokola mosakoli ya Yuda na ntango ya Yelobama, biso mpe tozali na “libaku malamu ya kosalela [Yehova] mosala mosantu kozanga kobanga, na bosembo.”a (Luka 1:74, 75) Atako lelo oyo tomizelaka te ete Yehova abikisa biso na ndenge ya likamwisi, asalelaka elimo santu mpe baanzelu mpo na kobatela mpe kosunga biso Batatoli na ye. (Tángá Yoane 14:15-17; Emoniseli 14:6.) Nzambe akotika ata mokolo moko te baoyo bazali kokoba kosakola liloba na ye na mpiko nyonso.​—Filp. 1:14, 28.

Yehova akobatela basembwi na ye

19, 20. (a) Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova akotika biso ata mokolo moko te? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?

19 Yehova, Nzambe na biso, azali sembo. (Emon. 15:4; 16:5) Azali na “boyengebene na nzela na ye nyonso.” (Nz. 145:17) Biblia elobi ete ‘akokɛngɛla nzela ya basembwi na ye.’ (Mas. 2:8) Ntango tozali konyokolama, ntango bapɛngwi bazali koluka kolɛmbisa biso to ntango tozali kokokisa mokumba moko monene, tosengeli kozala na elikya ete Yehova akotambwisa biso mpe akosunga biso.

20 Mokomoko na biso asengeli komituna motuna oyo: Nini ekosalisa ngai natikala sembo epai ya Yehova ata ntango nakutani na minyoko to na komekama? Na maloba mosusu, ndenge nini nakoki kolendisa bosembo na ngai epai ya Nzambe?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na lisolo oyo elandi tokomona soki mosakoli yango akobaki kotosa Yehova mpe makambo nini ekómelaki ye.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini Yehova amonisaki ete atikaka basembwi na ye te ntango bazali konyokolama?

• Ndenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi mpe mateya na bango?

• Ndenge nini Yehova abatelaka basembwi na ye na mosala ya kosakola?

[Karte/​Elilingi na lokasa 5]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

BOKONZI YA NƆRDI (Yelobama)

Dani

SEKEME

Betele

BOKONZI YA SUDI (Lehobama)

YELUSALEME

[Elilingi]

Yehova atikaki basembwi na ye te ntango Yelobama abandisaki losambo ya mwana ya ngɔmbɛ

[Elilingi na lokasa 3]

Mpo Nzambe akoba kopambola Salomo mpe bato na ye, basengelaki kokokisa masɛngami na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto