MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 9-11
“Mabele mobimba ezalaki na monɔkɔ kaka moko”
Na Babele, Yehova apalanganisaki bato ya kozanga botosi ndenge abulunganisaki monɔkɔ oyo bazalaki koloba. Lelo oyo, Yehova azali koyanganisa ebele mpenza ya bato ya bikólo nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso mpe apesi bango “monɔkɔ moko ya pɛto” mpo “bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.” (Sef 3:9; Em 7:9) ‘Monɔkɔ yango ya pɛto’ ezali solo na ntina etali Yehova mpe mikano na ye ndenge emonisami na Biblia.
Koyekola monɔkɔ ya sika esɛngaka makambo mingi, kasi kaka te kokanga maloba ya sika na motó. Esɛngaka koyekola lolenge ya sika ya kokanisa. Ndenge moko mpe, wana tozali koyekola monɔkɔ ya pɛto ya solo, makanisi na biso ekómaka ya sika. (Ro 12:2) Esɛngaka kokoba kosala bongo mpo esalisaka basaleli ya Nzambe bázala na bomoko.—1Ko 1:10.