Kelasi ya Gileadi ya mbala ya 124
Bamisionɛrɛ bazali lokola mayoyo
NSIMA ya sanza motoba nyonso, libota mobimba ya Betele ya États-Unis ebengamaka na likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na mokolo ya 8 Marsi 2008, bapaya oyo bautaki na mikili koleka 30 bayanganaki elongo na libota ya Betele na likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 124 ya Gileadi. Bayangani nyonso 6 411 basepelaki elongo na bana-kelasi na mokolo yango ya ntina mingi mpo na bango.
Prezida ya likita yango, Stephen Lett, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, abandaki likita na lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bókende elongo na mayoyo ya Yehova.” Emoniseli 9:1-4 elobi ete etuluku moke ya baklisto bapakolami oyo bazongelaki molende na bango na mosala ya Yehova na 1919 ezali lokola ebele ya mayoyo. Akundwelaki bana-kelasi ete lokola bazali na kati ya “bampate mosusu,” basangani na ebele ya mayoyo yango ya elilingi.—Yoa. 10:16.
Na nsima, Lon Schilling, ndeko moko ya komite ya filiale ya États-Unis, asalaki lisukulu na motó ya likambo: “Bósunganaka.” Lisukulu yango elobelaki ndakisa ya Akila ná mwasi na ye Pilisila (to Pilisika), oyo bazalaki baklisto na ekeke ya liboso. (Lom. 16:3, 4) Kelasi yango ezalaki na babalani 28. Molobi ayebisaki bango ete mpo bálonga na mosala ya misionɛrɛ, basengeli kozala na boyokani malamu na mabala na bango. Na bisika nyonso oyo Biblia elobeli Akila, elobeli mpe mwasi na ye Pilisila. Yango emonisi ete ntoma Paulo mpe bandeko ya lisangá bazalaki komona ete babalani yango bazalaki kosala na bomoko. Lelo oyo mpe, babalani oyo bazali na mosala ya misionɛrɛ basengeli kosala elongo, kosambela Yehova elongo, mpe kopesana mabɔkɔ mpo na kolonga mikakatano ya kosala na mboka mopaya; na ndenge yango, bakosungana.—Gen. 2:18.
Lisukulu oyo elandaki, na motó ya likambo ete “Bómekola malamu ya Yehova,” esalemaki na Guy Pierce, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ndeko Pierce amonisaki ete kozala moto malamu elimboli kaka te koboya kosala mabe. Moto ya malamu asalaka makambo mpo na bolamu ya basusu. Yehova Nzambe azali malamu koleka moto mosusu nyonso. (Zek. 9:16, 17) Motema malamu mpe bolingo ya Yehova ekoki kotinda biso tósalaka makambo mpo na bolamu ya basusu. Na nsuka ya lisukulu na ye, Ndeko Pierce apesaki bana-kelasi longonya na maloba oyo: “Bozali kosala makambo ya malamu. Tozali na elikya ete bokokoba komekola malamu ya Yehova mpe bokosala oyo ezali malamu na mikumba nyonso oyo Yehova Nzambe akopesa bino.”
Na nsima, Ndeko Michael Burnett, misionɛrɛ moko ya kala oyo akómi molakisi na Eteyelo ya Gileadi, asalaki lisukulu na motó ya likambo: “Bólata yango lokola ekaniseli na kati ya miso na bino.” Lokola “ekaniseli” oyo balati na kati ya miso na bango, Bayisalaele basengelaki kobosanaka te likamwisi oyo Yehova asalaki mpo na kobimisa bango na Ezipito. (Ex. 13:16) Molobi alendisaki bana-kelasi bábosana te ebele ya mateya oyo bazwi na Eteyelo ya Gileadi; alobaki ete mateya yango esengeli kozala lokola ekaniseli oyo balati na kati ya miso na bango. Ndeko Burnett amonisaki ntina ya kozala na komikitisa mpe na bopɔlɔ mpe ya kosalela mitinda ya Biblia mpo na kosilisa matata na baninga na bango bamisionɛrɛ to bandeko mosusu.—Mat. 5:23, 24.
Mark Noumair, molakisi oyo aumeli mingi na Gileadi, asalaki lisukulu na motó ya likambo: “Loyembo nini ekoyembama mpo na bino?” Na ntango ya kala, bato bazalaki na momeseno ya koyemba nsima ya kolonga etumba. Loyembo moko ya ndenge wana emonisi ete libota ya Lubene, ya Dani, mpe ya Asele ezalaki na bolɛmbu; nzokande, loyembo yango ekumisi libota ya Zebulona mpo ezalaki na elimo ya komipimela. (Bas. 5:16-18) Lokola maloba ya nzembo, nsukansuka, misala ya moklisto mokomoko eyebanaka epai ya basusu. Molende oyo moto azali na yango na mosala ya Nzambe mpe bosembo na ye na bibongiseli ya teokrasi ekopesa ye lokumu malamu na miso ya Yehova mpe moto yango akozala ndakisa malamu mpo na bandeko mosusu. Ntango bandeko na lisangá bazali komona misala na biso ya malamu, ekozala lokola nzembo oyo ezali kolendisa bango bámekola ndakisa malamu yango.
Ntango bana-kelasi ya mbala ya 124 bazalaki kolanda mateya, balekisaki mpe ngonga 3 000 na mosala ya kosakola. Sam Roberson, ndeko moko oyo asalaka na Departema ya biteyelo ya Teokrasi, asalaki lisolo na motó ya likambo: “Bólanda litambwisi ya elimo santu”; na lisolo yango, atunaki bana-kelasi báloba makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe basalaki bilakiseli ya makambo yango mosusu. Na nsima, Ndeko Patrick LaFranca, oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis, atunaki mituna na bana-kelasi ya kala ya Gileadi, oyo bazali bamisionɛrɛ na mikili ndenge na ndenge. Bana-kelasi basepelaki mingi na batoli ya bandeko yango.
Anthony Morris, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu ya nsuka na motó ya likambo: “Bóbosana te, makambo oyo emonanaka ezali ya ntango mokuse.” Makomami elendisi biso ete tótyaka makanisi na mapamboli ya Yehova na esika ya kotya yango na mikakatano ya ntango mokuse oyo tokoki kokutana na yango lelo oyo. (2 Kol. 4:16-18) Bobola, kozanga bosembo, minyoko, maladi, mpe liwa ezali makambo oyo tozali komona lelo oyo. Bamisionɛrɛ mpe bakoki kokutana na makambo yango mosusu. Kasi, koyeba ete makambo yango ezali ya ntango mokuse, ekosalisa biso tótikala makasi na elimo mpe tóbatela elikya.
Na nsuka, wana bana-kelasi nyonso bazalaki na estrade, Ndeko Lett apesaki bango batoli ya nsuka. Alendisaki bango bázonga nsima te mpe alobaki boye: “Ata soki tokutani na mokakatano nini, tokolonga yango mpe tokobatela bosembo na biso soki tozali pembeni ya Yehova.” Alendisaki bamisionɛrɛ ya sika ete bázala lokola mayoyo, bákende liboso na mosala ya Yehova mpe bábatela molende, bosembo mpe botosi na bango mpo na libela.
[Etanda na lokasa 30]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 7
Batindami na mikili: 16
Bana-kelasi bazalaki: 56
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,8
Mwayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 18,2
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,8
[Elilingi na lokasa 31]
Bana-kelasi ya mbala ya 124 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Nicholson, T.; Main, H.; Senge, Y.; Snape, L.; Vanegas, C.; Pou, L. (2) Santana, S.; Oh, K.; Lemaitre, C.; Williams, N.; Alexander, L. (3) Woods, B.; Stainton, L.; Huntley, E.; Alvarez, G.; Cruz, J.; Bennett, J. (4) Williamson, A.; González, N.; Zuroski, J.; Degandt, I.; May, J.; Diemmi, C.; Tavener, L. (5) Lemaitre, W.; Harris, A.; Wells, C.; Rodgers, S.; Durrant, M.; Senge, J. (6) Huntley, T.; Vanegas, A.; Pou, A.; Santana, M.; Bennett, V.; Tavener, D.; Oh, M. (7) Zuroski, M.; Rodgers, G.; Diemmi, D.; Nicholson, L.; Alvarez, C.; Snape, J. (8) Harris, M.; González, P.; Main, S.; Woods, S.; Stainton, B.; Williamson, D.; Durrant, J. (9) Cruz, P.; Degandt, B.; Williams, D.; Wells, S.; Alexander, D.; May, M.
[Elilingi na lokasa 32]
Eteyelo ya Gileadi ezali na esika monene ya mateya ya Watchtower, na Patterson