Mabelé ezali na “maladi”—Nkisi nini ekobikisa yango?
BILEMBO ezali komonana polele: mɔtɔ ezali se komata. Ndakisa moko oyo tokoki kopesa ezali ya mboka Newtok, na etúká ya Alaska, na nɔrdi mpenza ya mabelé. Nse ya mabelé ya mboka Newtok, oyo ezalaki baglasi ekangamá, ekómi kolɛmba. Frank, mobali moko ya mboka yango, alobi boye: “Nalingi [lisusu] kofanda na mboka oyo te, glasi ezali kolɛmba mingi.” Bato ya siansi oyo balandelaka makambo yango balobi ete nsima ya mbula zomi, mboka yango oyo ezali na bokula, ekoki kolimwa mpenza.
Lisangá moko ya bato ya mayele (Groupe intergouvernemental d’experts sur l’évolution du climat “GIEC”) balobi ete “ntembe ezali soki moke te: molunge ezali kobakisama na mabelé mobimba.” Likambo yango ezali kosalema na mokili mobimba. Mbongwana oyo bato ya siansi bazali kolobela ezali komonana na ndakisa, na kozanga mbula to mbula ezali kobɛta mingi koleka, na molunge makasi, mpe na mipɛpɛ ya makasi. Nini ekokómela Mabelé? Nkisi nini ekobikisa yango?
Mabelé ezali na maladi nini?
Bato ya siansi bazali kolandela bilembo oyo ezali komonisa ete mabelé ezali na maladi ndenge minganga balandelaka moto ya maladi na lopitalo. Basatelite ezali kolanda ndenge oyo mabanga minene ya glasi ezali kobukana, bato oyo bayekolaka meteo bazali kolandela ndenge bambula ezali kobɛta, bazali kokitisa batiyo na nse ya mbu mpo na koyeba molunge na yango, bazali kotinda bamasini na likoló mpo na koyeba ndenge oyo mopɛpɛ ezali. Na nsima, bazali kokɔtisa makambo nyonso wana na baordinatɛrɛ ya makasi. Na ndenge yango, bazali koyekola ndenge oyo mabelé ekozala nsima ya mbula zomi to koleka, ata mpe nsima ya bankama ya bambula, soki makambo mosusu ebongwani.
Makambo nini bato ya siansi bamoni? Bamosusu balobi ete mopɛpɛ etondi na bagaze oyo ezali kobakisa molunge. Zulunalo Time elobi ete na mobu 2006, “tɔni miliare 32” ya gaze mabe oyo babengi gaz carbonique ebwakamaki na mopɛpɛ. Bagaze yango ezali kokanga molunge mpe yango ezali kobakisa molunge na mokili. Nyonso wana ekosuka ndenge nini? Lisangá ya bato ya mayele oyo toutaki kolobela (GIEC) balobi ete soki totiki te kobwaka bagaze ya mabe ndenge ezali kosalema lelo, ekomema “mbongwana ndenge na ndenge na mokili” oyo ekozala mabe mingi koleka makambo oyo esalemi tii sikoyo. Bato mingi ya siansi bazali kokanisa ete mpo na kosilisa likambo yango, esengeli kokitisa gaz carbonique oyo ezali kobwakama na mopɛpɛ. Nzokande, ata soki bagaze yango ebakisami te, boyekoli oyo basali na baordinatɛrɛ ezali komonisa ete “molunge mpe [likambo oyo yango ezali komema, elingi koloba] kobakisama ya mai ya mbu, ekokoba na boumeli ya bankama ya bambula.”
Tokozwa biyano epai wapi?
Ya solo, koyekola makambo lokola molunge, mbula mpe mipɛpɛ, ezali pɛtɛɛ te. Zulunalo moko oyo ebimaka na Internet (Earth Observatory) elobi boye: “Na ndakisa, mapata ekokóma ndenge nini lokola molunge ezali kobakisama na Mabelé? Ekoki nde kozala ete mapata oyo ezalaka likoló mpenza, oyo esalaka ete molunge eleka mingi te awa na mabelé, ekobanda kosalema mingi koleka mapata minene oyo ebatelaka biso na kongɛnga mosusu ya moi oyo ezali mabe?” Eyano ezali nini? “Lelo oyo, bato ya siansi bakoki kopesa biyano na mituna yango te.”
Nzokande, Biblia elobi ete Yehova Nzambe azali “mozalisi ya likoló mpe ya mokili” bakisa mpe ya “mapata na likoló.” (Genese 14:19; Masese 8:28) Na maloba kitoko mpenza, amimonisi lokola ye oyo atyaki “mayele kati na mapata.” Ya solo, Yehova ayebi malamu makambo oyo bato ya siansi bazali naino kolukaluka.—Yobo 38:36.
Na ntina na mabelé, yoká likambo oyo Nzambe alobaki mpe ekomamaki na Biblia eleki soki mbula 2 700: “Mbula . . . ekolongwa na lola mpe ekozonga kuna te kasi ekopɔlisa mabelé.” (Yisaya 55:10) Maloba yango emonisi na mokuse ndenge oyo mbula esalemaka! Molunge ematisaka mai na likoló, epai ekómaka mapata mpe ekitaka na lolenge ya mbula oyo ‘epɔlisaka mabelé.’ Molunge ya moi ematisaka londɛndɛ mpe ‘ezongaka kuna,’ elingi koloba na likoló, mpo ekóma lisusu mapata ya mbula. Bankama ya bambula liboso mikanda ya mokili elobela makambo mingi na ntina na mabelé mpe mbongwana oyo esalemaka na mai mpe mopɛpɛ, Liloba ya Yehova esilaki kolobela yango. Yango ezali te kotinda yo otya elikya epai ya Mozalisi mpe na makambo oyo azali na makoki ya kosala? Na yango, na oyo etali mobulungano oyo ezali komonana na mabelé, omoni te ete eleki malamu tótalela ye oyo “asalaki mopɛpɛ,” ‘tata ya mbula,’ oyo ayebi ndenge oyo makambo esalemaka na mabelé?—Amosa 4:13; Yobo 38:28.
Mabelé ekelamaki na mokano moko
Atako bato bazali na makanisi ekeseni na oyo etali avenire ya mabelé, bango nyonso bandimaka likambo oyo: mabelé ekeseni na baplanɛti mosusu nyonso. Mabelé ezali na bikelamu ndenge na ndenge ya bomoi. Mpo na nini? Bato ya siansi balobaka ete ezali mpo na bantina mingi. Ya liboso, mabelé ezali na mai ebele; ekabwani na moi na ntaka oyo ebongi mpenza; mpe mopɛpɛ na yango ezali malamu, ezali na oxygène mingi.
Mbala mosusu okokamwa na koyeba ete mokanda ya Genese elobeli biloko yango na lisolo ya bozalisi. Na ndakisa, Genese 1:10 (NW) elobi ete Nzambe ayanganisaki “mai [oyo] abengaki Mbu”—maloba oyo ezali komonisa ebele ya mai. Na Genese 1:3, tozali kotánga boye: “Nzambe alobaki ete, tiká pole ezala.” Mabelé ekabwani na moi na ntaka oyo ebongi mpo mai nyonso ekóma glasi te to mpe ekaukea te.
Genese 1:6 elobi ete Nzambe asalaki “etando.” Na nsima, vɛrsɛ 11 mpe 12 emonisi ete Nzambe abimisaki matiti, milona mpe banzete. Nyonso wana esalaka ete bato mpe banyama bápemaka mopɛpɛ ya malamu mpe bátikala na bomoi.
Na yango, tokoloba nini? Lokola Nzambe akelaki mabelé mpe atyaki ebele ya mai kati na yango, na nsima atyaki yango na ntaka oyo ebongi, mpe atyaki mopɛpɛ ya malamu, na ntembe te asalaki yango na mokano moko. Biblia elobi na biso boye: “[Nzambe] asalaki [mabelé] eloko ya mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Nzembo 115:16 elobi boye: “Lola mpe likoló-ya-lola ezali ya [Yehova], kasi apesaki mokili na bana ya bato.” Ya solo, mabelé ekelamaki mpo bato báfanda wana.
Makomami emonisi ete Nzambe akelaki mwasi mpe mobali ya liboso mpe atyaki bango na esika moko kitoko mpenza: na elanga ya Edene. Basengelaki “kotimola yango mpe kobatela yango.” (Genese 2:15) Nzambe alobaki na bango boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” (Genese 1:28) Kanisá bomoi oyo balingaki kozala na yango! Balingaki kokómisa mabelé mobimba Paladiso mpe kofanda kati na yango libela na libela. Elingaki kozala bomoi ya malamu mpenza!
Kasi, na esika bátosa Nzambe, mwasi ná mobali ya liboso batombokelaki ye, ndenge bato mingi bazali kosala lelo oyo. (Genese 3:1-6) Yango ememi bango wapi? Na esika bábatela mabelé, bato bazali “kobebisa mabelé” na ndenge oyo tokokaki kokanisa te. (Emoniseli 11:18) Atako bongo, tokoki kokitisa mitema mpo ete mokano ya Nzambe mpo na mabelé ebongwani te. Biblia elobi boye: “[Nzambe] [a]tɛmisaki mokili likoló ya moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.” (Nzembo 104:5) Lisusu, na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu apesaki elaka oyo: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Likambo yango ekokokisama ndenge nini?
Bomoi ya malamu na mikolo ezali koya
Prezida moko ya kala ya États-Unis alobaki boye: “Ndenge oyo klima ezali kobongwana na mokili mobimba ezali mokakatano monene.” Boye, okanisi te ete esengeli kosilisa mokakatano yango na mokili mobimba? Yesu Klisto amonisaki ete mokakatano yango ekosila na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tiká bokonzi na yo eya.” (Matai 6:9, 10) Esakweli moko ya Biblia emonisi ete Bokonzi yango ya likoló ezali guvɛrnema oyo, mosika te “ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [baguvɛrnema ya mokili].” (Danyele 2:44) Longola yango, bokonzi yango ‘ekobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’ (Emoniseli 11:18) Tomoni polele ete Nzambe akosambisa bato oyo bazali kobebisa mabelé mpe biloko oyo ezali kati na yango mpe akopesa bango etumbu ya liwa.
Boye, nini ekokómela mabelé oyo esili kobebisama? Tóbosana te ete ntango Yesu azalaki awa na mabelé, asalaki makamwisi minene, lokola kokitisa mipɛpɛ makasi mpe mbu. Akitisaki mopɛpɛ makasi kaka na maloba. (Malako 4:35-41) Lokola Yesu azali lelo “Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi” kuna na likoló, akozala na nguya monene likoló ya mabelé mpe biloko lokola mai mpe mopɛpɛ. (Emoniseli 17:14) Kutu, Yesu alobaki ete boyangeli na ye ekozala eleko ya “bozalisi lisusu.” (Matai 19:28) Biblia mosusu ebengi eleko yango ‘kobongwana ya mokili.’ (Liloba lya Nzambe) Yesu akobongola makambo awa na mabelé, akozongisa yango ndenge ezalaki na elanga ya Edene. Mabelé ekozonga Paladiso. (Luka 23:43) Bokonzi ya Nzambe ekosilisa “maladi” oyo mabelé ezali na yango.
Ata lelo oyo, okoki kozwa matomba na boyangeli ya Bokonzi. Na ndenge nini? Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Na ndenge yango, bamilio ya bato bazali kondima nsango malamu. Bato bazali kobongola bomoi na bango. Bazali kolongwa na boombo ya bangi to ya masanga. Mabota ezali kobonga. Na esika ya koyinana, bato ya mposo ekeseni bazali kolingana. Ya solo, Bokonzi ya Nzambe ezali kosala makambo oyo ata guvɛrnema moko te ya mokili ezali kokoka kosala. Lelo oyo, Bokonzi ya Nzambe esangisi bato pene na milio 7 na mikili koleka 235! Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bazali kobongisama mpo na kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé.
Mabelé ekobonga na mikolo ezali koya. Tiká ete ezala mpe bongo mpo na bomoi na yo!
[Elilingi na lokasa 27]
Bankama ya bambula liboso babuku ya mokili elobela ndenge oyo mbula esalemaka, Biblia elobelaki yango
[Elilingi na lokasa 28]
Yesu “apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu ete: ‘Fandá nyɛɛ! Tiká makɛlɛlɛ!’ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki”
[Elilingi na lokasa 29]
Ntango Paladiso ekozonga, “maladi” oyo mabelé ezali kobɛla ekosila
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Godo-Foto