Tata na biso ya likoló azali mpenza ndenge nini?
BATO mingi bakoki koloba na motó libondeli ya “Tata wa biso,” libondeli oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye. (Matai 6:9-13) Mbala nyonso oyo balobaka libondeli yango, babengaka Nzambe “Tata.” Kasi, bato boni bakoki koloba ete bayebi ye malamu?
Ezali boni mpo na yo? Oyebi Nzambe malamu? Ozali mpenza moninga na ye mpe osololaka na ye? Opesaka ye matɔndi mpe oyebisaka ye mabanzo na yo? Koyeba Nzambe elimboli mpenza nini?
‘Yehova ezali nkombo na ye’
Ntango mwana azali naino moke ayebaka kaka ete nkombo ya tata na ye ezali Papa. Nzokande, ntango azali kokola, ayebaka nkombo mpenza ya tata na ye, bizaleli na ye mpe na ntembe te, akómaka kosepela na ye. Ezali boni mpo na Ye oyo apesá biso bomoi? Oyebi nkombo na ye mpe ndimbola na yango?
Ntango bato basalaka libondeli ya “Tata wa biso,” balobaka ete “bato bákúmisa nkómbó ya yo.” (Liloba lya Nzambe) Nzokande, soki otuni bango nkombo yango ezali nini, bayebaka eyano te. Likoló oyo etondi na minzoto, ngomba moko molai, biloko ndenge na ndenge oyo ezali na nse ya mai, emonisaka polele ete Nzambe azali. Kasi, eyebisaka biso nkombo na ye te. Mpo na koyeba nkombo ya Nzambe, tosengeli kotánga Biblia. Buku yango elobi ete: “[Yehova] ezali nkombo na ye.”—Exode 15:3.
Nzambe alingi tóyeba ete nkombo na ye ezali Yehova. Mpo na nini? Mpamba te nkombo yango emonisaka soki azali Nzambe ya ndenge nini. Ndimbola ya nkombo yango ezali “Asalaka ete ekóma.” Na maloba mosusu, akómaka nyonso oyo esengeli akóma mpo na kokokisa mokano na ye. Ndakisa oyo ekoki kosalisa yo: Mpo na bolamu ya libota na ye, tata akoki kokóma moleisi, mopesi-toli, zuzi, moyokanisi, mobateli, mpe moteyi; nyonso wana na kotalela bamposa ya libota mpe makambo mosusu. Ndenge moko mpe, nkombo Yehova epesaka biso elikya ete Nzambe azali na makoki nyonso mpo na kokokisa mokano na ye ya kopambola baoyo nyonso basalelaka ye.
Tótalela makambo ndenge na ndenge oyo Nzambe na biso ya bolingo asalaka, na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye. Yango ekosalisa yo oyeba soki Yehova azali Nzambe ya ndenge nini, mpe oyeba oyo osengeli kosala mpo na kopusana penepene na ye.
“Nzambe ya bolingo mpe ya kimya”
Ntoma Paulo abengaki Mozalisi na biso ete “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya.” (2 Bakolinti 13:11) Mpo na nini? Liboso na ye, Yesu Klisto alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Lokola Nzambe alingaki mpenza bato, apesaki Mwana na ye lokola lisiko, mpe na ndenge yango, asalaki ete bato nyonso oyo bakomonisa kondima epai na ye, bázwa bomoi oyo ezangi nsuka, ezangi mpasi mpe minyoko oyo lisumu ememaki. Yango wana, Paulo mpe alobaki ete: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Likambo yango esengeli kotinda biso tólinga Nzambe mpe tópusana penepene na ye, boye te?
Nzambe amonisaka bolingo na ye epai ya bato nyonso; kasi amonisaka yango mpe epai ya moto mokomoko oyo azali sembo epai na ye. Epai ya Bayisalaele, bato oyo mbala mingi bazalaki kozanga botosi, Moize alobaki boye: “Bino bozongisi lifuti na [ Yehova] boye, bino bilema, bato na mayele te? Ye azali tata na yo te, oyo azalisaki yo, oyo asalaki yo mpe alendisaki yo?” (Deteronome 32:6) Okangi mpenza ntina ya maloba yango? Lokola Tata ya bolingo, Yehova azalaki kobatela libota na ye, atako ayebaki mabunga na bango. Lisusu, azalaki kolinga bango mpe azalaki kokokisa bamposa na bango ya mosuni mpe ya elimo.
Biso nyonso tozalaka na bantango ya bisengo mpe ya mawa, mpe na bantango mosusu tokutanaka na mikakatano oyo elɛmbisaka mpenza. Tozalaka na mposa ete moto moko asalisa biso tóyeba kotalela makambo ya bomoi mpe mikakatano na biso na ndenge ebongi. Nani akoki kosalisa biso? Na kati ya Liloba na ye, Biblia, ezali na masolo oyo emonisi ete Yehova azali Mopesi-toli mpe Mobateli oyo atondi bolingo. Buku Mosantu yango ezali kolimbola ntina oyo tokutanaka na bampasi mpe ndenge oyo tokoki koyikela yango mpiko. Ndenge tata ya bolingo agunzamaka mpo na kosalisa mwana na ye oyo akwei mpe azoki, na bolingo monene na ye, Yehova mpe asalaka bongo na ndenge ya elilingi, mpo na kopesa biso lisalisi oyo esengeli. Ya solo, lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te epai ya baoyo bamonisaka kondima epai na ye.—Yisaya 59:1.
Nzambe amonisaka mpe bolingo na ye na ndenge ‘ayokaka mabondeli’ na biso. (Nzembo 65:2) Mpo na nini tolobi bongo? Ntoma Paulo alobaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Filp. 4:6, 7) Soki ozali kobondela Nzambe na etingya mpe ozali kolanda batoli oyo apesi na kati ya Liloba na ye, yo mpe okoki kozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”
“Nzambe ya boyebi”
Biblia elobi ete Yehova azali “moto oyo asukisi boyebi.” Lokola Yehova azali “Nzambe ya boyebi,” ayebi biso mpe bamposa na biso malamu koleka moto mosusu nyonso. (Yobo 36:4; 1 Samwele 2:3) Na nzela ya mosaleli na ye Moize, amonisaki ete “moto akotikala na bomoi bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ ya [Yehova].” (Deteronome 8:3; Matai 4:4) Yango elingi koloba ete mpo tózala na bomoi ya malamu, tosengeli kosuka kaka te na kokokisa bamposa na biso ya mosuni.
Mozalisi apesi biso malako mpe batoli ya ntina mingi na kati ya Biblia, Liloba na ye. Ntango tozali koyekola Biblia mpe tozali kosalela batoli na yango na bomoi na biso, tozwaka matomba na “makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ ya Yehova.” Na ndakisa, mwasi moko moklisto na nkombo Zuzanna, alobaki boye: “Kotánga Biblia elongo, koyangana na makita elongo, mpe koyebisa bato mosusu makambo oyo toyekoli na Biblia, ebongisaki mpenza libala na biso. Na lisalisi ya mateya ya Nzambe, tozali na mikano ndenge moko mpe tozali na boyokani ya malamu mpenza.”
Ndenge nini okoki kozwa batoli mpe litambwisi oyo Nzambe azali kopesa? Osengeli koyekola Biblia mpe kosalela batoli na yango; na ndenge yango Nzambe akosopela yo mapamboli.—Baebele 12:9.
‘Nzambe ya lobiko’
Lelo oyo mokili etondi na yikiyiki. Tokoki koyeba te makambo nini ekobima lobi. Soki ofandaka na mboka ya bitumba, mbala mosusu mposa na yo ezali ete kimya ezonga. Na bisika mingi na mokili, bato bazali kobanga mpo na mobulu, koboma, mikakatano ya nkita, mpe misala ya bateroriste. Nani akoki kobatela biso na makambo nyonso wana? Lelo oyo, koleka na bileko mosusu nyonso, bato bazali mpenza na mposa ya libateli mpe ya lobiko.
Biblia elobi ete: “Nkombo ya [Yehova] ezali ndako molai ya nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” (Masese 18:10) Koyeba nkombo ya Nzambe mpe kotyela yango motema ekoki kotinda biso tókanisa makambo oyo asilá kosala mpe oyo akosala mpo na kobikisa baoyo bamonisaka kondima epai na ye. Yehova Nzambe asilá komonisa na ndenge ya polele ete azali na makoki ya kobikisa basaleli na ye. Na ndakisa, abikisaki Bayisalaele ntango abomaki basoda ya Falao mpe makalo na bango ya bitumba. Yehova amonisaki ete azali Nzambe ya sembo, Nzambe oyo akanisaka baoyo bazali konyokwama mpe azalaka na mposa ya kosalisa bango.—Exode 15:1-4.
Mpo na kozwa bomoi ya seko, tosengeli kozala na kondima ete Yehova Nzambe azali Mobikisi. Davidi, mokonzi ya Yisalaele oyo akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge, amonisaki kondima ya ndenge yango ntango akomaki na ntina na Yehova ete: “Yo ozali Nzambe ya kobika na ngai.” (Nzembo 25:5) Na elikya nyonso, ntoma Petelo alobaki boye: “Yehova ayebi kosikola uta na komekama bato ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.”—2 Petelo 2:9.
Mpo na moto oyo alukaka lisalisi na ye, Nzambe alaki boye: “Nakobikisa ye . . . mpo ete ayebi nkombo na ngai.” (Nzembo 91:14) Basaleli ya Nzambe na mikolo na biso bamoni bosolo ya maloba yango. Henryk, ndeko moko na ekólo Pologne, asalelaka Yehova na bosembo banda mbula 70, atako akutanaki na minyoko mpe botɛmɛli. Ntango Henryk azalaki na mbula 16, Banazi batindaki tata na ye na kaa ya bakangami ya Auschwitz. Batyaki Henryk ná yaya na ye na bolɔkɔ moko mpo na bilenge. Na nsima, akómaki kotindama na bakaa ndenge na ndenge ya bakangami. Mpo na makambo oyo akutanaki na yango na eleko wana, Henryk alobi boye: “Na kati ya mikakatano nyonso wana, Yehova atikaki ngai ata moke te. Atako mbala mingi nazalaki komona liwa na miso, azalaki ntango nyonso kosalisa ngai natikala sembo.” Ya solo, Yehova apesaka basaleli na ye kondima mpe nguya ya koyika mpiko.
Mosika te, Nzambe akomimonisa Mobikisi ya bato nyonso oyo bamonisaka kondima epai na ye mpe bazelaka lobiko na ye. Alobi boye: “Ngai nazali [Yehova]; mobikisi mosusu azali te, bobele ngai.” (Yisaya 43:11) Na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” akoboma bato mabe na mabelé mobimba mpe akobikisa bato ya sembo. (Emoniseli 16:14, 16; Masese 2:21, 22) Yehova alobi na biso boye: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:11.
Ndenge ya kokóma “bana ya Nzambe”
Na mikolo ya mosakoli Malaki, Bayisalaele bazalaki koloba ete Yehova azali Tata na bango. Nzokande, bazalaki kokumisa ye te; na losambo na bango, bazalaki kopesa lokola mbeka bilei oyo ezalaki mbindo mpe banyama oyo ekufá miso mpe oyo ezali kotɛnguma. Yango wana Yehova atunaki bango boye: “Soki nde ngai nazali tata, wapi lokumu na ngai?”—Malaki 1:6.
Kosala te libunga oyo Bayisalaele oyo bazangi sembo basalaki. Tolendisi yo nde oyekola koyeba Yehova Nzambe mpe opusana penepene na ye. Moyekoli Yakobo alendisi biso na maloba oyo: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”—Yakobo 4:8.
Kozala bana ya Yehova ememaka mikumba. Soki ozali kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na yo mobimba, mpe na ndenge yango ozali kokumisa ye, akobosana milende na yo te. Akosalisa yo otambola na nzela oyo ezali komema na mokili ya sika, epai “liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Na ntango wana, bato nyonso ya botosi ‘bakolongwa na boombo ya kopɔla mpe bakozwa bonsomi ya bana ya Nzambe.’—Baloma 8:21.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Nzambe alingi tóyeba ete nkombo na ye ezali Yehova, oyo elimboli “Asalaka ete ekóma”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
“Na kati ya mikakatano nyonso wana, Yehova atikaki ngai ata moke te.”—HENRYK
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
“Kotánga Biblia elongo, koyangana na makita elongo, mpe koyebisa bato mosusu makambo oyo toyekoli na Biblia, ebongisaki mpenza libala na biso.”—ZUZANNA