Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/9 nk. 20-24
  • Tókima “elimo ya mokili”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókima “elimo ya mokili”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elimo santu to elimo ya mokili?
  • Yebaká bilembo
  • “Mitema na bino ekóma kilo ata moke te”
  • Kotika te ete mitungisi emɛla yo
  • Tókoba kokanisa makambo ya elimo
  • Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tózwa elimo ya Nzambe, kasi ya mokili te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mpo na nini kotambwisama na elimo ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/9 nk. 20-24

Tókima “elimo ya mokili”

“Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe.”​—1 Kol. 2:12.

1, 2. (a) Mpo na nini kala na Angleterre bazalaki na bandɛkɛ babengi canari na bisika oyo batimolaka makala ya nse ya mabelé? (b) Likama nini baklisto bazali na yango?

NA 1911, bakonzi ya Angleterre babimisaki mobeko moko mpo na kobatela bomoi ya bato oyo batimolaka makala ya nse ya mabelé. Na esika mokomoko oyo batimolaka makala yango, basengelaki kozala na mwa ndɛkɛ babengi canari mibale. Mpo na nini? Soki mɔtɔ epeli na kati ya libulu epai bakitaka mpo na kotimola makala, bato oyo bakokende kobikisa baoyo bazali na kati basengeli kokita na mwa bandɛkɛ yango. Mwa bandɛkɛ yango ekokaka te mpema ya mabe (na ndakisa monoxyde de carbone). Soki mopɛpɛ ezali na mpema ya mabe, bandɛkɛ yango ekómaka lokola ezali kobɛla to mpe ekweaka. Yango ezalaki mpenza kosalisa. Mpema wana ya mabe (monoxyde de carbone) ezalaka na langi te, nsolo mpe te, kasi ebomaka, mpo epekisaka makila emema mpema ya malamu na kati ya nzoto. Soki bazali na bandɛkɛ wana te mpo na kokebisa bango, bato oyo bakiti na nse ya mabelé mpo na kobikisa basusu bakoki kokufa kozanga kutu báyeba ete bapemi mpema wana ya mabe.

2 Na ndenge ya elimo, baklisto bazali mpe lokola batimoli ya makala ya nse ya mabelé. Na ndenge nini? Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba, ayebaki ete azali kotinda bango na kati ya mokili moko ya mabe, oyo ezali kotambwisama na Satana mpe na elimo ya mokili. (Mat. 10:16; 1 Yoa. 5:19) Lokola azalaki mpenza komitungisa mpo na bayekoli na ye, abondelaki Tata na ye na butu liboso ya mokolo oyo akufaki ete: “Nazali te kosɛnga yo olongola bango na mokili, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe.”​—Yoa. 17:15.

3, 4. Likebisi nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe mpo na nini likebisi yango etali mpe biso?

3 Yesu akebisaki bayekoli na ye na makambo oyo ekoki kolalisa bango mpɔngi mpe koboma bango na elimo. Makambo oyo alobaki na bango ezali mpenza na ntina mpo na biso, oyo tozali na bomoi na ntango oyo ya nsuka. Alobaki na bayekoli na ye boye: “Bólala mpɔngi te . . . mpo bólonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.” (Luka 21:34-36) Kasi likambo ya esengo, Yesu alaki bango mpe ete Tata na ye akotindela bango elimo santu mpo na kokundwelaka bango makambo oyo ateyaki bango, kosalisa bango bálala mpɔngi te mpe bázala makasi na elimo.​—Yoa. 14:26.

4 Ezali boni mpo na biso lelo oyo? Elimo santu ekoki mpe kosalisa biso? Soki ezali bongo, tosengeli kosala nini mpo na kozwa yango? Elimo ya mokili ezali nini, mpe esalaka mosala na yango ndenge nini? Ndenge nini tokoki kolonga elimo yango?—Tángá 1 Bakolinti 2:12.

Elimo santu to elimo ya mokili?

5, 6. Ndenge nini elimo santu ekoki kosalisa biso, kasi tosengeli kosala nini mpo na kozwa yango?

5 Nzambe asukaki kopesa bato elimo santu kaka na ekeke ya liboso te. Apesaka yango ata lelo oyo, mpe elimo yango ekoki kopesa biso makasi ya kosala oyo ezali malamu mpe kobakisela biso molende na mosala na ye. (Lom. 12:11; Filp. 4:13) Ekoki mpe kosalisa biso tókóma na bizaleli ya malamu lokola bolingo, motema malamu mpe bolamu, oyo ezali “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22, 23) Kasi, Yehova apesaka elimo santu na ye na makasi te epai ya bato oyo bazali na mposa na yango te.

6 Yango wana, ebongi mpenza tómitunaka boye: ‘Nasengeli kosala nini mpo na kozwa elimo santu?’ Biblia emonisi ete ezali na mwa makambo oyo tosengeli kosala mpo na kozwa elimo santu. Moko na yango ezali kaka kosɛnga Nzambe apesa biso yango. (Tángá Luka 11:13.) Likambo mosusu ya ntina mingi oyo tosengeli kosala mpo na kozwa elimo santu ezali koyekola Liloba ya Nzambe, oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu, mpe kosalela batoli na yango. (2 Tim. 3:16) Elingi koloba te ete moto nyonso oyo akotánga Biblia kaka kotánga mpamba akozwa elimo ya Nzambe. Kasi, soki moklisto ayekoli Liloba ya Nzambe na motema moko, akoki kokóma kokanisa mpe kotalela makambo na ndenge oyo emonisami na Liloba ya Nzambe. Ezali mpe na ntina tóndima ete Yehova atye Yesu lokola momonisi na ye mpe ete Nzambe apesaka biso elimo santu na nzela na ye. (Kols. 2:6) Yango wana, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kosalela mateya na ye na bomoi na biso. (1 Pet. 2:21) Soki tozali kosala makasi mpo na kozala lokola Klisto, tokozwa mpe elimo santu.

7. Elimo ya mokili ekómisaka bato ndenge nini?

7 Epai mosusu, elimo ya mokili ezali kotinda bato bámekola bizaleli ya Satana. (Tángá Baefese 2:1-3.) Elimo ya mokili emonanaka na ndenge mingi. Ndenge kaka tozali komona yango lelo oyo, elimo yango etindaka bato báboya kotosa mitinda ya Nzambe. Etindaka bato bálona ‘mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe bálakisaka na lolendo biloko na bango ya kobikela.’ (1 Yoa. 2:16) Ezali kotinda bato bámipesa na misala ya mosuni lokola pite, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, zuwa, nkanda makasimakasi mpe milangwa. (Gal. 5:19-21) Ezali mpe kobimisa mateya ya lipɛngwi oyo ezali kobebisa makambo ya bosantu. (2 Tim. 2:14-18) Soki moto azali kotika elimo ya mokili etambwisa ye, akokóma mpe na bizaleli ya Satana.

8. Likambo nini mokomoko na biso asengeli kopona?

8 Ata soki tosali ndenge nini, tokobendama kaka na ngámbo boye to boye. Mokomoko na biso asengeli kopona soki akolinga kotambwisama na elimo santu to na elimo ya mokili. Bato oyo bazali kotambwisama naino na elimo ya mokili bakoki kokima yango mpe kotika elimo santu ebanda kotambwisa bango. Kasi, ekoki mpe kosalema ete baoyo bazalaki kotambwisama na elimo santu bábaluka mpe bákóma kolanda elimo ya mokili. (Filp. 3:18, 19) Tótala sikoyo ndenge tokoki kokima elimo ya mokili.

Yebaká bilembo

9-11. Wapi mwa bilembo oyo ekoki komonisa ete elimo ya mokili ebandi kokɔtela biso?

9 Batimoli ya makala oyo tolobelaki na ebandeli bazalaki kosalela bandɛkɛ mpo esalisaka bango báyeba soki mopɛpɛ ebandi kobeba. Soki bamoni ndɛkɛ yango ekwei, bazalaki koyeba ete basengeli kozwa bibongiseli nokinoki mpo bákufa te. Na ndenge ya elimo, wapi mwa bilembo oyo emonisaka ete elimo ya mokili ebandi kokɔtela biso?

10 Ekoki kozala ete ntango toyebaki solo ya Biblia mpe tomipesaki mpo na kosalela Yehova, tozalaki kotánga Biblia na molende. Ekoki mpe kozala ete tozalaki kobondela ntango nyonso, mpe na motema moko. Tozalaki mpe kosepela koyangana na makita ya lisangá, mpe kotalela yango lokola nkisi oyo epesaka makasi ya elimo, lokola liziba ya mai mpo na moto oyo azali na mposa ya mai. Yango esalisaki biso tóboya mpe tókabwana mpenza na elimo ya mokili.

11 Tozali kokoba kosala makasi mpo na kotánga Biblia mokolo na mokolo? (Nz. 1:2) Tobondelaka mingi, mpe tosalaka yango na motema moko? Tosepelaka na makita ya lisangá mpe toyanganaka na yango nyonso pɔsɔ na pɔsɔ? (Nz. 84:10) To totiki nde mimeseno yango mosusu ya malamu? Toboyi te, ekoki kozala ete tokómi na mikumba mingi oyo ezali kolya ntango mpe makasi na biso nyonso, mpe ekómi mpenza mpasi mpo tókoba komipesa mingi na makambo ya losambo ndenge tomesanaki. Kasi, soki tokómi kotika mimeseno ya malamu oyo tozalaki na yango, ekoki nde kozala ete elimo ya mokili ekómi kokɔtela biso? Tokosala milende sikoyo mpo tózongela mimeseno yango ya malamu?

“Mitema na bino ekóma kilo ata moke te”

12. Yesu asɛngaki bayekoli na ye ‘bákeba’ na nani, mpe mpo na nini?

12 Tosengeli lisusu kosala nini mpo na kokima elimo ya mokili? Ntango Yesu alobaki na bayekoli na ye ete ‘bálala mpɔngi te,’ autaki kokebisa bango na mwa makambo oyo ekokaki kotya bango na likama. Alobaki na bango boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo.”​—Luka 21:34, 35.

13, 14. Na likambo ya kolya mpe komɛla, mituna nini tosengeli komitunaka?

13 Tókanisa naino malamu. Yesu alingaki nde koloba ete kolya mpe komɛla ezali mabe? Soki moke te! Yesu abosanaki te likambo oyo Salomo alobaki: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu ya mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.” (Mos. 3:12, 13) Kasi, Yesu ayebaki ete elimo ya mokili etindaka bato bákóma kolekisa ndelo na makambo wana.

14 Na likambo ya kolya mpe komɛla, ndenge nini tokoki koyeba ete elimo ya mokili ebandi kokɔtela biso? Tokoki komituna boye: ‘Nayokaka ndenge nini soki natángi toli moko na Biblia to na mikanda na biso, oyo elobeli kolya na lokoso? Nazalaka na momeseno ya koloba ete toli yango ebongi te to ete balekisi ndelo, mpe mbala mosusu nabandaka koluka komonisa ete kosala bongo ezali mabe te?a Ndenge nini natalelaka toli oyo elobaka ete soki tosepeli komɛla, tómɛlaka na bokatikati mpe tóboya mpenza “kolangwa masanga”? Natyolaka toli yango mpe namonaka ete mpo na ntina boye to boye toli yango etali ngai te? Soki basusu bazali komitungisa mpo nakómi komipesa na masanga mingi, nalukaka komilongisa to nasilikaka? Natindaka basusu báboya kolanda toli wana ya Biblia?’ Ya solo, lolenge oyo moto azali kotalela makambo emonisaka soki elimo ya mokili ebandi kokɔtela ye to te.​—Talá mpe Baloma 13:11-14.

Kotika te ete mitungisi emɛla yo

15. Yesu akebisaki biso na momeseno nini oyo biso bato tozalaka na yango?

15 Koboya mitungisi emɛla biso ezali lolenge mosusu ya kokima elimo ya mokili. Yesu ayebaki ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kobanda komitungisa mpo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na bolingo nyonso, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bótika komitungisa.” (Mat. 6:25) Ezali mabe te komitungisa mpo na makambo ya ntina, na ndakisa koluka kosepelisa Nzambe, kokokisa mikumba na biso na lisangá mpe kokokisa bamposa ya libota na biso. (1 Kol. 7:32-34) Kasi, toli wana ya Yesu eteyi biso nini?

16. Mpasi nini elimo ya mokili ememeli bato mingi?

16 Elimo ya mokili, oyo etindaka bato bálakisa na lolendo nyonso biloko na bango ya kobikela, etondisi bato mingi na mitungisi oyo ekoki kobebisa bomoi na bango. Elimo yango etindaka biso tókóma kokanisa ete mosolo nde ezali fungola ya bolamu, mpe ete valɛrɛ ya moto eutaka na bizaleli na ye ya elimo te, kasi nde na bozwi na ye. Bato oyo bakosami na makanisi ya ndenge wana babomaka mpenza nzoto mpo na kokóma na bozwi, mpe bamitungisaka ntango nyonso mpo na kozwa biloko oyo ebimi sika, ya minene mpe ya solosolo. (Mas. 18:11) Soki moto azali kotalela biloko ya mokili na lolenge wana ya mabe, akokóma na mitungisi oyo ekopekisa ye kokola na elimo.​—Tángá Matai 13:18, 22.

17. Tokoki kosala nini mpo mitungisi etya bomoi na biso nkaka te?

17 Mitungisi ekoki kotya bomoi na biso nkaka te soki tozali kolanda toli ya Yesu oyo: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].” Yesu alaki biso ete soki tozali koluka liboso bokonzi ya Nzambe, makambo oyo tozali mpenza na mposa na yango ekobakisamela biso. (Mat. 6:33) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotyela elaka wana motema? Lolenge moko oyo tokoki komonisa ete tozali koluka liboso Bokonzi ya Nzambe ezali kolanda oyo Liloba ya Nzambe elobi na makambo ya mbongo. Na ndakisa, tosengeli te kokosa Leta na mpako to kobuba bato ata mwa moke na mimbongo na biso. Tosengeli kosalaka nyonso mpo na kokokisa oyo tolaki bato na makambo ya mombongo mpe kokeba ete na likambo ya banyongo, “Ɛɛ” na biso etikalaka kaka “Ɛɛ.” (Mat. 5:37; Nz. 37:21) Ya solo, kozala na bosembo ndenge wana ekokómisa biso bazwi te, kasi ekosala ete Nzambe andima biso, ekosalisa biso tózala na lisosoli ya pɛto mpe tózala na mitungisi mingi te na bomoi.

18. Wapi ndakisa ya malamu mpenza oyo Yesu atikelá biso, mpe matomba nini tokozwa soki tozali komekola ye?

18 Koluka liboso Bokonzi elimboli mpe koyeba makambo oyo esengeli kozwaka esika ya liboso na bomoi na biso. Tózwa ndakisa ya Yesu. Ntango mosusu, Yesu azalaki kolata elamba moko ya ntalo mingi. (Yoa. 19:23) Azalaki mpe kolya, komɛla mpe kosepela elongo na baninga na ye ya motema. (Mat. 11:18, 19) Kasi mpo na ye, bozwi mpe kominanola ezalaki te makambo oyo azalaki kotya na esika ya liboso na bomoi na ye. Bilei ya Yesu ezalaki nde kosala mokano ya Nzambe. (Yoa. 4:34-36) Tokozala mpenza na bomoi ya esengo soki tolandi ndakisa ya Yesu! Tokosalisa bato oyo bazali kotungisama bábɔndisama na nzela ya Makomami. Bandeko ya lisangá bakokóma kolinga biso mpe kosunga biso. Longola yango, tokosepelisa motema ya Yehova. Soki tozali koyeba makambo oyo esengeli kozwaka esika ya liboso na bomoi na biso, tokozala te baombo ya bozwi mpe ya bisengo. Kosala bongo ekosalisa biso tósambela Yehova na ndenge ebongi. Mpe soki tozali komipesa mingi mpo na kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe, elimo ya mokili ekokoka kobebisa biso te.

Tókoba kokanisa makambo ya elimo

19-21. Ndenge nini tokoki kokoba “kokanisa na elimo,” mpe mpo na nini tosengeli kosala yango?

19 Liboso ya kosala likambo, tókanisaka naino. Mbala mingi ntango tolobaka ete moto asali likambo kozanga kokanisa, ezalaka bongo te; likambo ya solo ezalaka nde ete moto yango alandi makanisi ya mosuni. Yango wana, ntoma Paulo akundwelaki biso ntina ya kobatela makanisi na biso. Akomaki boye: “Baoyo bazali na boyokani na mosuni batyaka makanisi na bango na makambo ya mosuni, kasi baoyo bazali na boyokani na elimo na makambo ya elimo.”​—Lom. 8:5.

20 Tosengeli kosala nini mpo makanisi mpe misala na biso etambwisamaka te na elimo ya mokili? Tosengeli kobatela mitema na biso mpo makanisi ya lokuta ya mokili oyo ebebisa yango te. Na ndakisa, ntango tozali kopona makambo oyo tokotala na televizyo, tosengeli koboya makanisi na biso ebebisama na bafilme ya makambo ya nsɔni to ya bitumba. Toyebi ete elimo ya Nzambe, oyo ezali elimo ya pɛto, ekoki kofanda te na kati ya motema oyo etondi na mbindo. (Nz. 11:5; 2 Kol. 6:15-18) Longola yango, elimo ya Nzambe ekofanda na mitema na biso soki tozali komipesa mingi na kotánga Biblia, na mabondeli, na kokanisa na mozindo mateya na yango mpe ntango tozali koyangana na makita. Ntango mpe tozali komipesa mingi na mosala ya kosakola, tosalaka elongo na elimo yango.

21 Ya solo, tosengeli mpenza kokima elimo ya mokili ná bamposa na yango ya mosuni. Kasi, tosengeli kosala yango na lisɛki te mpo, ndenge Paulo alobaki yango, “kokanisa na mosuni elakisi liwa, kasi kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya.”​—Lom. 8:6.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lokoso ezali ezaleli oyo emonanaka na kolekisa ndelo na kolya. Na yango, moto ya lokoso ayebanaka te na monene ya nzoto na ye, kasi nde na ndenge oyo atalelaka bilei. Moto akoki kozala na lokoso ata soki azali na nzoto na ye ekoká, to mpe azali mpenza nzoto mike. Nzokande, monene mosusu ezalaka ya maladi to ya kobotama. Eloko esalisaka mpenza mpo na koyeba moto ya lokoso, ezala azali nzoto mike to monene, ezali nde soki azali kolekisa ndelo na kolya.​—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2004.

Ozali koyeba lisusu?

• Tosengeli kosala nini mpo na kozwa elimo santu?

• Wapi mwa makambo oyo elimo ya mokili ekoki kosala na bomoi na biso?

• Ndenge nini tokoki kokima elimo ya mokili?

[Elilingi na lokasa 21]

Liboso ya kokende na mosala to na kelasi, bondelaká Nzambe apesa yo elimo santu

[Bililingi na lokasa 23]

Tosengeli kozalaka ntango nyonso na makanisi ya pɛto, kosalaka mimbongo na biso ntango nyonso na bosembo mpe kozala na bokatikati na makambo nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto