Tózwa elimo ya Nzambe, kasi ya mokili te
“Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti na Nzambe, mpo tóyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.”—1 KO. 2:12.
1, 2. (a) Na ndenge nini bakristo ya solo bazali na etumba? (b) Mituna nini tokotalela?
BISO bakristo ya solo tozali na etumba! Monguna na biso azali na nguya, na mayele mabe, mpe amesaná na bitumba. Azali na ebundeli moko ya makasi oyo ekweisá bato mingi na mokili. Kasi, tosengeli komona te ete tozangi makasi to ete ata ndenge nini, tokokwea kaka. (Yis. 41:10) Ebundeli oyo tozali na yango mpo ebatela biso eleki bibundeli mosusu nyonso.
2 Etumba na biso ezali ya mosuni te, ezali nde ya elimo. Monguna na biso ezali Satana Zabolo, mpe ebundeli oyo asalelaka mingi ezali “elimo ya mokili.” (1 Ko. 2:12) Ebundeli monene oyo tozali na yango mpo ebatela biso na etumba yango ezali elimo ya Nzambe. Mpo tóbika na etumba yango mpe tótikala makasi na elimo, tosengeli kosɛnga Nzambe elimo na ye mpe komonisa mbuma na yango na bomoi na biso. (Gal. 5:22, 23) Kasi, elimo ya mokili ezali nini? Ndenge nini epalangani mingi boye? Ndenge nini tokoki koyeba soki elimo ya mokili nde ezali kotambwisa biso? Mpe ndakisa ya Yesu ekoki koteya biso nini na oyo etali kozwa elimo ya Nzambe mpe kotɛmɛla elimo ya mokili?
Mpo na nini elimo ya mokili epalangani mingi?
3. Elimo ya mokili ezali nini?
3 Elimo ya mokili euti na Satana, “mokonzi ya mokili oyo,” mpe elimo yango etɛmɛlaka elimo santu ya Nzambe. (Yoa. 12:31; 14:30; 1 Yoa. 5:19) Elimo yango ezali makanisi oyo ezali kotambwisa mokili mpe oyo ezali kotinda bato básala makambo. Nguya yango etindaka bato bátɛmɛla mokano ya Nzambe.
4, 5. Ndenge nini elimo oyo Satana azali kolendisa epalanganá mingi boye?
4 Ndenge nini elimo oyo Satana azali kolendisa epalanganá mingi boye? Liboso, Satana akosaki Eva na elanga ya Edene. Andimisaki ye ete soki apesi Nzambe mokɔngɔ, bomoi na ye ekobonga. (Eba. 3:13) Ezalaki lokuta mpenza! (Yoa. 8:44) Na nsima, na nzela ya mwasi, Satana abendaki Adama mpo abuka mobeko ya Yehova. Lokola Adama aponaki kobuka mobeko ya Yehova, bato batɛkamaki na lisumu, mpe na ndenge yango basangolaki mposa ya kolanda elimo ya botomboki ya Satana.—Tángá Baefese 2:1-3.
5 Satana abendaki mpe baanzelu ebele, mpe bakómaki bademo. (Em. 12:3, 4) Likambo wana ya kozanga bosembo epai ya Nzambe esalemaki mwa moke liboso ya Mpela, na ntango ya Noa. Baanzelu yango bandimaki ete bakozala malamu koleka soki batiki bisika na bango na likoló mpe bakiti na mabele mpe bamipesi mobimba na bamposa oyo ebongi te. (Yuda 6) Na lisalisi ya bademo yango, oyo bazwaka lisusu nzoto ya mosuni te, Satana “azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Em. 12:9) Likambo ya mawa, bato mingi bazali koyeba kaka te ete bademo batindaka bato básala makambo.—2 Ko. 4:4.
Elimo ya mokili ezali kotambwisa yo?
6. Elimo ya mokili ekoki kotambwisa biso kaka soki tosali nini?
6 Bato mingi bayebi te ete Satana azali kotambwisa bato, kasi biso bakristo toyebi malamu mayele na ye. (2 Ko. 2:11) Kutu, elimo ya mokili ekoki kotambwisa biso kaka soki biso moko topesi yango nzela. Tótalela mituna minei oyo ekosalisa biso tóyeba soki totambwisami na elimo ya Nzambe to na elimo ya mokili.
7. Satana asalaka nini mpo na koluka komema biso mosika na Yehova?
7 Kominanola oyo naponaka emonisaka nini mpo na ngai? (Tángá Yakobo 3:14-18.) Satana alukaka komema biso mosika na Nzambe na ndenge alukaka kotinda biso tóbanda kolinga mobulu. Zabolo ayebi ete Yehova ayinaka moto nyonso oyo alingaka mobulu. (Nz. 11:5) Yango wana, mpo na kosepelisa bamposa na biso ya nzoto, Satana azali kosalela mikanda, bafilme, miziki, mpe masano ya video—oyo mosusu etindaka basani na yango básala lokola bazali kosala mpenza makambo ya mbindo to makambo ya mobulu. Mpo na Satana, ekosala eloko moko te ata soki motema na biso ezali kolinga oyo ezali malamu, mpe na ngámbo mosusu ezali kolinga mabe, oyo ye azali kolendisa.—Nz. 97:10.
8, 9. Na oyo etali kominanola, mituna nini tosengeli komituna?
8 Nzokande, elimo ya Nzambe esalisaka baoyo bazwi yango bázala pɛto, bato ya kimya, mpe oyo batondi na motema mawa. Ekozala malamu tómituna boye: ‘Kominanola oyo naponaka esalisaka ngai nalona bizaleli ya malamu? Bwanya oyo euti na likoló ezalaka “na bokosi te.” Bato oyo batambwisami na elimo ya Nzambe bazali te bato oyo bateyaka bazalani na bango bázala pɛto mpe bato ya kimya, nzokande bango moko basepelaka kotala bafilme ya mobulu makasi mpe makambo ya nsɔni na kati ya bandako na bango.
9 Yehova asɛngi tókangama kaka na ye. Kasi, Satana akosepela soki tosali ata likambo moko mpamba ya losambo, ndenge asɛngaki Yesu. (Luka 4:7, 8) Tokoki komituna boye: ‘Kominanola oyo naponaka epesaka ngai nzela ya kokangama kaka na Nzambe? Kominanola na ngai esalisaka ngai natɛmɛla elimo ya mokili to esalaka ete nakoka kotɛmɛla yango te? Na mbala ya nsima, esengeli napona ndenge mosusu ya kominanola?’
10, 11. (a) Na oyo etali biloko ya mokili, ezaleli nini elimo ya mokili elendisaka? (b) Liloba ya Nzambe elendisi biso tózala na ezaleli nini?
10 Ndenge nini namonaka biloko ya mokili? (Tángá Luka 18:24-30.) “Mposa ya miso,” lokoso, mpe kolinga biloko ya mokili ezali na kati ya makambo oyo elimo ya mokili elendisaka. (1 Yoa. 2:16) Etindaka bato mingi bálinga kaka kozala bazwi. (1 Tim. 6:9, 10) Elimo yango elingaka kotinda biso tókanisa ete kozala na biloko ebele ya mokili ekobatela biso ntango molai. (Mas. 18:11) Nzokande, soki tokómi kolinga mbongo koleka Nzambe, wana Satana alongi biso. Tosengeli komituna boye: ‘Nakómi komipesa mingi na koluka biloko ya mokili mpe bisengo?’
11 Na ngámbo mosusu, Liloba ya Nzambe elendisi biso tózala na bokatikati na oyo etali mbongo mpe tósala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na biso ya mosuni mpe ya libota na biso. (1 Tim. 5:8) Elimo ya Nzambe esalisaka baoyo bazwi yango bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, ndenge moko na Yehova. Bato ya ndenge wana bayebani lokola baoyo bapesaka basusu, kasi te lokola baoyo balingaka kaka kozwa. Bazwaka bato na motuya mingi koleka biloko mpe basepelaka kokabela basusu biloko oyo bazali na yango, ntango bazali na makoki ya kosala yango. (Mas. 3:27, 28) Mpe batikaka soki moke te ete koluka mbongo eleka liboso ya mosala ya Nzambe.
12, 13. Na bokeseni na elimo ya mokili, ndenge nini elimo ya Nzambe ebongisaka bomoto na biso?
12 Bomoto na ngai emonisaka elimo nini? (Tángá Bakolose 3:8-10, 13.) Elimo ya mokili elendisaka misala ya nzoto. (Gal. 5:19-21) Ntango mpenza oyo eyebanaka soki elimo nini ezali kotambwisa biso, ezalaka te ntango makambo ezali kotambola malamu, kasi nde ntango makambo ezali kotambola malamu te; na ndakisa ntango ndeko na biso mokristo azali kokipe biso te, apesi biso nkanda, to mpe asali biso mabe. Lisusu, na kati ya bandako na biso, ekoki koyebana soki elimo nini ezali kotambwisa biso. Ekoki kosɛnga tómitalela. Omituna boye: ‘Na boumeli ya sanza motoba oyo eleki, bomoto na ngai elandaki mingi bomoto ya Kristo to nazongelaki mimeseno mosusu ya mabe na oyo etali maloba to etamboli?’
13 Elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso ‘tólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango’ mpe tólata “bomoto ya sika.” Yango ekosalisa biso tókóma na boboto mpe na bolingo mingi. Tokobanda kosepela kolimbisa basusu na motema moko, ata soki tomoni mpenza ete bazali na likambo ná biso. Ntango tokutani na makambo oyo tokanisi ete esalemi na bosembo te, tokobanda kobimisa lisusu te “makambo . . . ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga.” Tokosala nde makasi tókóma ‘koyokelana mpenza mawa.’—Ef. 4:31, 32.
14. Ndenge nini bato mingi batalelaka Liloba ya Nzambe?
14 Natosaka mpe nalingaka mitinda ya Biblia oyo etali etamboli? (Tángá Masese 3:5, 6.) Elimo ya mokili etindaka bato bátombokela Liloba ya Nzambe. Bato oyo batambwisami na elimo yango baboyaka kotosa biteni ya Biblia oyo bakanisi ete ebongi te; basepelaka nde kolanda makanisi mpe bafilozofi ya bato. (2 Tim. 4:3, 4) Bato mosusu baboyaka Liloba ya Nzambe na motema moko mpenza. Bato ya ndenge wana bamitunaka soki Biblia ezali mpenza na ntina mpe soki ezali mpenza solo, mpe na ndenge yango bakómaka na bwanya na miso na bango moko. Balɛmbisaka mitinda na yango na oyo etali ekobo, koboma libala mpe kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi. Bateyaka ete “malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.” (Yis. 5:20) Elimo yango ekɔteli biso? Tolandaka bwanya ya bato, ata mpe makanisi na biso moko, ntango tokutani na mikakatano? To tosalaka makasi tólanda toli ya Biblia?
15. Na esika tótya motema na bwanya na biso moko, tosengeli kosala nini?
15 Elimo ya Nzambe esalisaka biso tómemya Biblia. Ndenge moko na mokomi ya nzembo, tomonaka ete liloba ya Nzambe ezali mwinda na makolo na biso mpe pole na nzela na biso. (Nz. 119:105) Na esika tótya motema na bwanya na biso moko, totyaka motema mobimba na Biblia mpo esalisa biso tókesenisa malamu ná mabe. Toyekolaka kaka te komemya Biblia kasi mpe kolinga mobeko ya Nzambe.—Nz. 119:97.
Tólanda ndakisa ya Yesu
16. Kozala na “makanisi ya Kristo” esɛngi nini?
16 Mpo tózwa elimo ya Nzambe, tosengeli kokóma na “makanisi ya Kristo.” (1 Ko. 2:16) Mpo tózala na “makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango,” tosengeli koyeba ndenge azalaki kokanisa mpe kosala, mpe na nsima komekola ye. (Rom. 15:5; 1 Pe. 2:21) Tótala makambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso na likambo yango.
17, 18. (a) Yesu ateyaki biso nini na ntina etali libondeli? (b) Mpo na nini tosengeli ‘kokoba kosɛnga’?
17 Kobondela mpo na kosɛnga elimo ya Nzambe. Liboso akutana na mikakatano, Yesu abondelaki mpo elimo ya Nzambe esalisa ye. (Luka 22:40, 41) Biso mpe tosengeli kosɛnga Nzambe elimo santu na ye. Yehova apesaka yango kozanga kokakatana na baoyo nyonso bazali kosɛnga yango na kondima. (Luka 11:13) Yesu alobaki boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.”—Mat. 7:7, 8.
18 Ntango ozali koluka Yehova asalisa yo mpe apesa yo elimo na ye, kotika nokinoki te kosɛnga yango. Ekoki kosɛnga tóbondela mbala mingi mpe tólekisa ntango mingi na kobondela mpo na likambo moko. Ntango mosusu Yehova atikaka bato oyo bazali kobondela ye bámonisa soki bazali mpenza na mposa ya likambo yango mpe soki bazali mpenza na kondima ya solo, liboso ayanola mabondeli na bango.a
19. Yesu asalaki ntango nyonso nini, mpe mpo na nini tosengeli komekola ye?
19 Kotosa Yehova na motema mobimba. Yesu azalaki ntango nyonso kosala makambo oyo ezalaki kosepelisa Tata na ye. Na mabaku mosusu, ndenge oyo Yesu alingaki ete makambo mosusu esalema ekesanaki na mposa ya Tata na ye. Atako bongo, alobaki na Tata na ye na elikya nyonso ete: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:42) Omituna boye: ‘Natosaka Nzambe ata ntango ezali pɛtɛɛ te kosala yango?’ Kotosa Nzambe ezali na ntina mpo tózwa bomoi. Tosengeli kotosa ye na makambo nyonso mpo azali Mokeli na biso, Liziba mpe Mobateli ya bomoi na biso. (Nz. 95:6, 7) Tokoki kopesa eloko moko te na esika ya botosi. Nzambe akoki kondima biso te soki tozangi botosi.
20. Na bomoi na ye mobimba, Yesu azalaki koluka ntango nyonso nini, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
20 Koyeba Biblia malamu. Ntango Satana amekaki kondima na ye, Yesu azongelaki Makomami mpo na kotɛmɛla ye. (Luka 4:1-13) Liboso ya banguna na ye, bakonzi ya mangomba, Yesu asalelaki mingimingi Liloba ya Nzambe. (Mat. 15:3-6) Na bomoi na ye mobimba, Yesu azalaki ntango nyonso koluka koyeba mpe kokokisa mobeko ya Nzambe. (Mat. 5:17) Mposa na biso mpe ezali ete tókoba kotondisa motema na biso na Liloba ya Nzambe, oyo ekómisaka kondima makasi. (Flp. 4:8, 9) Mpo na basusu kati na biso, ekoki kozala mpasi mpo na kozwa ntango ya koyekola bango moko to na libota. Kasi na esika ya kozela tózwa ntango, ekoki nde kosɛnga tóluka yango.—Ef. 5:15-17.
21. Ebongiseli nini ekoki kosalisa biso tóyeba Liloba ya Nzambe malamu mpe tósalela yango?
21 “Moombo ya sembo mpe ya mayele” asalisi biso tózala na ntango ya koyekola biso moko to na libota na ndenge azwaki bibongiseli mpo ete pɔsɔ nyonso, tózala na mpokwa moko ya kosala Losambo na libota. (Mat. 24:45) Bozali kosalela ebongiseli yango malamu? Mpo bókóma na makanisi ya Kristo, bokoki kolukaka kotalela na boyekoli na bino soki Yesu ateyaki nini na likambo oyo bozali kolobela. Bokoki mpe kosalela Index des publications Watch Tower mpo na koyeba bisika oyo balobeli likambo oyo bozali koluka. Na ndakisa, banda na 2008 tii 2010, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tokabolaka na mosala ya kosakola ezalaki na masolo 12 oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Yesu ateyi biso.” Bokoki kosalela masolo yango na boyekoli na bino. Banda 2006, Lamuká! ezalaki na motó ya likambo oyo elobaki “Okopesa eyano nini?” Mituna yango ebongisamaki mpo na kosalisa moto akolisa boyebi na ye ya Liloba ya Nzambe. Mpo na nini te kokɔtisa masolo ya ndenge wana na bantango mosusu na programɛ ya Losambo na libota na bino?
Tokoki kolonga mokili
22, 23. Tosengeli kosala nini mpo tólonga mokili?
22 Mpo elimo ya Nzambe etambwisa biso, tosengeli kotɛmɛla elimo ya mokili. Kosala bongo ezali pɛtɛɛ te. Ekoki kozala mpasi mpenza, etumba monene. (Yuda 3) Kasi, tokoki kolonga! Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”—Yoa. 16:33.
23 Biso mpe tokoki kolonga mokili soki totɛmɛli elimo na yango mpe tosali nyonso oyo tokoki mpo na kozwa elimo ya Nzambe. Kutu, “soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?” (Rom. 8:31) Soki tozwi elimo ya Nzambe mpe tozali kolanda litambwisi na yango ndenge emonisami na Biblia, tokozala na nsai, kimya, esengo mpe tokondima mpenza ete tokozwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo ekómi pene.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 170-173 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini elimo ya mokili epalangani mingi?
• Wapi mituna minei oyo tosengeli komituna?
• Wapi makambo misato oyo toyekoli epai ya Yesu na oyo etali kozwa elimo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 8]
Ndenge nini baanzelu mosusu bakómaki bademo?
[Elilingi na lokasa 10]
Satana asalelaka elimo ya mokili mpo na kotambwisa bato, kasi tokoki kolongwa na boombo yango