Tokoki mpenza kondima Baevanzile?
“Lelo oyo, tosengeli kotalela Baevanzile lokola masapo ya baklisto ya liboso.”—Burton L. Mack, oyo azalaki profɛsɛrɛ ya makambo ya Kondimana ya Sika.
BATO mingi bakanisaka lokola profɛsɛrɛ wana. Bato mingi ya mayele bandimaka te Baevanzile ya Matai, Malako, Luka mpe Yoane, oyo ezali masolo ya bomoi mpe ya mosala ya Yesu. Mpo na nini bato mosusu batalelaka Baevanzile lokola masapo? Makanisi na bango esengeli nde kotinda yo otika kondimela Baevanzile? Tótala mwa bantina oyo bato yango balobaka bongo.
Bato mosusu bandimaka Baevanzile te
Na boumeli ya bikeke 17 ya liboso banda Yesu abotamaki, bato bazalaki mpenza kotyela Baevanzile ntembe te. Nzokande, mingimingi kobanda na ekeke ya 19, bato mingi ya mayele bakómaki koloba ete Baevanzile ekomamaki na lisalisi ya elimo santu te, kasi ezalaki kaka makanisi ya bato. Longola yango, baboyaki kondima ete bakomi ya Baevanzile bakomaki makambo oyo bango moko bamonaki na miso mpe ete bakokaki te koloba makambo ya solosolo na ntina na Yesu. Balobaki mpe lisusu ete kokokana oyo ezali na kati ya Baevanzile misato ya liboso (oyo bato mosusu babengaka sinɔptike, elingi koloba makanisi oyo ekokani) emonisi ete bakomi ya Baevanzile bazalaki kaka kokoma makanisi oyo bazalaki komona moko epai ya mosusu. Bato yango baboyaki mpe kondima ete makamwisi mpe lisekwa ya Yesu oyo Baevanzile elobeli esalemaki mpenza. Bamosusu kutu balobaki ete Yesu azalaki moto ya solo te!
Kaka bato yango balobaki lisusu ete Malako nde akomaki Evanzile na ye liboso ya baninga, mpo makambo nyonso oyo ezali na Malako ezali mpe na Matai mpe na Luka, bokeseni ezali mpenza mingi te. Bato yango balobi lisusu ete Matai ná Luka basalelaki Evanzile ya Malako mpe mokanda mosusu mpo na kokoma Baevanzile na bango. Albertus F. J. Klijn, moto moko ya mayele na masolo ya Biblia, alobaki ete likanisi wana oyo bato mingi ya mayele bazalaka na yango “emonisi ete bakomi ya Baevanzile bakomaki kaka masapo oyo bazalaki koyoka epai ya bato mosusu.” Makanisi ya ndenge wana ezali komonisa ete bakomi ya Baevanzile bakomaki kaka makambo oyo bazwaki epai ya bato mosusu, mpe ete makambo oyo bakomaki ezalaki kaka masapo ya mpamba. Makanisi yango etindi bato mosusu bátika kondima ete Biblia ezali mokanda ya Nzambe.—2 Timote 3:16.
Bakomaki nde makambo ya bato mosusu?
Kokokana oyo ezali na kati ya Baevanzile misato ya liboso emonisi ete bakomi na yango bazalaki nde kozwa makanisi moko epai ya mosusu? Te. Mpo na nini tolobi bongo? Ya liboso, Yesu alakaki bayekoli na ye ete elimo santu ‘ekozongisa na makanisi na bango makambo nyonso oyo ayebisaki bango.’ (Yoane 14:26) Yango wana, tokoki kokamwa te ete bakomi ya Baevanzile bamikundolaki bango nyonso makambo mosusu oyo esalemaki mpe bakomaki yango. Ya solo, ekoki kozala ete bakomi mosusu ya Biblia batángaki mpe balobelaki makambo oyo baninga na bango mosusu bakomaki, kasi yango emonisi te ete bakomaki kaka makambo ya baninga, kasi basalaki nde bolukiluki na likebi mpenza. (2 Petelo 3:15) Longola yango, buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: “Na ntango wana bato bazalaki mpenza kokoma te, kasi bazalaki koyebisana makambo mingi kaka na monɔkɔ. Yango wana bakokaki kozala na mokakatano te ya komikundola makambo ya ntina mingi oyo Yesu alobaki mpe kokoma yango bango nyonso ndenge moko.”
Luka alobaki ete asololaki na bato mingi oyo bamonaki makambo yango na miso mpe ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta na ebandeli.’ (Luka 1:1-4) Yango emonisi ete akomaki kaka makambo ya bato mosusu to akomaki kaka masapo? Soki moke te. Nsima ya kotalela Evanzile ya Luka malamumalamu, William Ramsay, moto moko ya mayele, alobaki boye: “Luka azalaki mokomi ya solosolo: makambo oyo akomá ezali mpenza ya solo, mpe akomaki yango na ndenge oyo esengeli . . . Tosengeli kotánga ye na kati ya bakomi ya minene.”
Makambo oyo Batata ya Mangomba balobaki, na ndakisa oyo Origène, moto ya teoloji na ekeke ya misato alobaki, emonisi mpe ete ntoma Matai nde akomaki Evanzile ya liboso. Origène akomaki boye: “Oyo ya liboso ekomamaki na Matai, oyo azalaki liboso mokɔngɔli ya mpako, kasi na nsima akómaki ntoma ya Yesu Klisto. Lokola akomaki yango mpo na Bayuda oyo bakómaki baklisto, akomaki yango na monɔkɔ ya Liebele.” Na ntembe te, Matai, oyo azalaki ntoma mpe amonaki na miso makambo oyo Yesu asalaki, azalaki na ntina te ya kokoma kaka makambo oyo Malako akomaki, mpo Malako amonaki makambo yango na miso te. Kasi, makambo nini etindaka bato mosusu báloba ete Matai ná Luka basalelaki Evanzile ya Malako ná mokanda mosusu mpo na kokoma Baevanzile na bango?
Evanzile ya Malako nde ekomamaki liboso?
Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi ete ezali na “eloko moko te oyo ekoki kondimisa biso” likambo oyo balobaka ete Evanzile ya Malako nde ekomamaki liboso mpe Matai ná Luka basalelaki yango mpo na kokoma oyo ya bango. Nzokande, bato mingi ya mayele bakanisaka ete Malako akomaki Evanzile na ye liboso ya Matai ná Luka mpo, ndenge bango bazali koloba, Malako abakisi mpenza eloko te na oyo Matai ná Luka bakomá. Na ndakisa, Johannes Kuhn, moto moko ya mayele na masolo ya Biblia na ekeke ya 19, alobaki ete ntembe ezali ata moke te ete Evanzile ya Malako ekomamaki liboso. Kuhn abakisaki ete soki ezali bongo te, “tokoki koloba ete Malako azwaki kaka barulo ya Matai ná Luka, akatikati yango mikemike mpe atye yango na kati ya mbɛki moko mpe abimisi Evanzile na ye.”
Lokola Evanzile ya Malako ezali mokuse koleka Baevanzile nyonso, tokoki kokamwa te ete ezali kaka na makambo moke oyo ezali na Baevanzile mosusu te. Kasi, yango emonisi te ete ekomamaki liboso. Longola yango, koloba mpe ete Malako abakisi mpenza eloko te na makambo oyo ezali na Matai mpe Luka ezali solo te. Na kati ya lisolo ya nguya mpenza ya Malako, ezali na makambo koleka 180 ya ntina mingi oyo ezali te na Evanzile ya Matai mpe ya Luka; mpe yango ezali komonisa ete lisolo na ye ya bomoi ya Yesu ekeseni na oyo ya baninga na ye mosusu.—Talá etanda na lokasa 13.
Basalelaki mpe mokanda mosusu?
Tokoloba boni mpo na mokanda mosusu oyo bato mosusu balobaka ete Matai ná Luka basalelaki mpo na kokoma Baevanzile na bango? James M. Robinson, profɛsɛrɛ moko ya makambo ya losambo, alobi boye: “Na ntembe te, mokanda yango ezali mokanda oyo eleki ntina na kati ya mikanda nyonso ya boklisto oyo tozali na yango.” Maloba wana esengeli mpenza kokamwisa biso, mpo lelo oyo mokanda yango ezali te, mpe moto moko te akoki komonisa ete ezalaki. Kolimwa ya mokanda yango ezali mpenza likambo ya kokamwa, mpo bato ya mayele balobaka ete bato mingi bazalaki na yango. Lisusu, Batata ya Lingomba balobelá mokanda yango ata mbala moko te.
Kanisá naino. Balobaka ete mokanda yango ezalaki mpe emonisaki ete Evanzile ya Malako nde ekomamaki liboso. Omoni te ete makanisi nyonso oyo bazali kopesa ezali kosimba te? Soki tokutani na makanisi ya ndenge wana, tosengeli komikundola lisese oyo: “Zoba andimaka makambo nyonso oyo balobelaka ye; kasi moto ya ekɛngɛ akanisaka liboso ya kosala likambo.”—Masese 14:15, Bible na lingala ya lelo oyo.
Tosengeli mpenza kondima Baevanzile
Na bilobaloba mpe bantembe na bango, bato yango batindi bato mingi báboya koyekola Baevanzile oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu. Baevanzile emonisi polele ete baklisto ya liboso bazalaki te kotalela masolo ya bomoi, ya mosala, liwa mpe lisekwa ya Yesu lokola masapo. Ebele ya bato oyo bamonaki makambo yango na miso bamonisaki ete makambo yango esalemaki mpenza. Baklisto yango, oyo bandimaki konyokwama mpe kokufa mpo na kolanda Yesu, bayebaki ete kozala moklisto ekoki kozala bozoba soki masolo ya mosala mpe lisekwa ya Yesu ezalaki kaka masapo ya mpamba.—1 Bakolinti 15:3-8, 17, 19; 2 Timote 2:2.
Mpo na bantembe oyo ebimaki mpo na komonisa ete Evanzile ya Malako nde ekomamaki liboso mpe ezalaki na mokanda moko oyo balobaka ete Matai mpe Luka basalelaki mpo na kokoma Baevanzile na bango, George W. Buchanan, profɛsɛrɛ moko ya teoloji, alobaki boye: “Kolekisa ntango na koluka koyeba epai mokanda boye to boye eutá ekoki kolya bato ntango oyo bakokaki kosalela mpo na koyekola mikanda yango.” Likanisi wana eyokani na toli oyo ntoma Paulo apesaki Timote ete atyaka “likebi te na masapo ya lokuta mpe na milɔngɔ ya bankɔkɔ, oyo esukaka ata na eloko moko te, kasi oyo ebimisaka nde mituna mpo na bolukiluki na esika ya kokabolama ya mwa eloko moko oyo euti na Nzambe na oyo etali kondima.”—1 Timote 1:4.
Tosengeli mpenza kondima Baevanzile. Ezali na masolo ya solosolo, ya bato oyo bamonaki makambo yango na miso. Bakomi na yango balukalukaki na bozindo liboso ya kokoma. Basalisá biso tóyeba makambo mingi ya ntina ya bomoi ya Yesu Klisto. Na yango, lokola Timote, tokosala malamu soki tolandi toli ya Paulo oyo: “Kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimisamaki bosolo na yango.” Tozali mpenza na ntina ya kondima ete “Makomami nyonso,” ata mpe Baevanzile minei, ekomamaki na lisalisi ya elimo santu.—2 Timote 3:14-17.
[Etanda na lokasa 13]
Soki Evanzile ya Malako ekomamaka te, tolingaki koyeba te ete . . .
Yesu atambwisaki miso likoló na bango na nkanda, mpo ayokaki mpenza mawa mingi mpo na mitema makasi na bango (Malako 3:5)
bapesaki Yoane ná Yakobo nkombo Boanelegesi (Malako 3:17)
mwasi moko oyo azalaki kotanga makila asilisaki biloko na ye nyonso (Malako 5:26)
Elodiasi akangelaki Yoane Mobatisi nkanda na motema mpe ete Elode azalaki kobanga Yoane mpe azalaki kobatela ye (Malako 6:19, 20)
Yesu asɛngaki bayekoli na ye bápema mwa moke (Malako 6:31)
Bafalisai bazalaki kosukola mabɔkɔ kino na molɔku (Malako 7:2-4)
Yesu akamataki bana na mabɔkɔ na ye (Malako 10:16)
Yesu asepelaki na elenge mozwi (Malako 10:21)
Petelo, Yakobo, Yoane mpe Andele batunaki ye na pembeni (Malako 13:3)
elenge mobali moko atikaki elamba na ye ya lini (Malako 14:51, 52)
Longola yango, moko ya bandakisa oyo Yesu asalelaki mpe makamwisi mibale mosusu oyo Yesu asalaki elobelami kaka na Evanzile ya Malako.—Malako 4:26-29; 7:32-37; 8:22-26.
Evanzile ya Malako ezali na makambo mosusu oyo Yesu alobaki mpe asalaki, oyo ezali na Baevanzile mosusu te. Soki tozali kozwa ntango ya kotánga mpe kokanisa na mozindo makambo oyo ekomamá na Baevanzile, tokokóma kosepela na yango mingi.