Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/10 nk. 25-29
  • Eloko nini okopesa mpo otikala na bomoi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eloko nini okopesa mpo otikala na bomoi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Klisto amisepelisaki ye moko te’
  • Yehova alingaka tópesa ye oyo eleki malamu
  • Saleláká ntango na yo na bwanya
  • “Nazali elongo na bino mikolo nyonso”
  • Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ntina oyo tosengeli “kolanda Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tosengeli kosala nini mpo ete tóbikisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Baklisto bazwaka formasyo mpo na kopesa litatoli malamumalamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/10 nk. 25-29

Eloko nini okopesa mpo otikala na bomoi?

“Eloko nini moto akopesa na esika ya molimo na ye?”​—MAT. 16:26.

1. Mpo na nini Yesu aboyaki mpenza makanisi ya Petelo?

NTOMA Petelo autaki koyoka likambo moko oyo ekamwisaki ye mingi. Yesu Klisto, Motambwisi na bango, ayebisaki bango “polelepolele” ete etikali moke anyokolama mpe abomama! Mpo na yango, Petelo​—na ntembe te na makanisi ya malamu—​apamelaki Yesu na maloba oyo: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Yesu apesaki Petelo mokɔngɔ mpe atalaki bayekoli mosusu. Ekoki kozala ete bayekoli yango mpe bazalaki na likanisi moko na Petelo. Na nsima, Yesu alobaki na Petelo ete: “Leká nsima na ngai, Satana! Ozali epai na ngai libaku oyo ekweisaka, mpamba te ozali kokanisa, makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato.”​—Mko. 8:32, 33; Mat. 16:21-23.

2. Yesu amonisaki ete moyekoli ya solo asengeli kokokisa masɛngami nini?

2 Na ntembe te, maloba oyo Yesu alobaki na nsima esalisaki Petelo ayeba ntina oyo Yesu aboyaki mpenza makanisi na ye. Yesu “abengaki ebele yango ya bato ná bayekoli epai na ye” mpe alobaki boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso. Mpo moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu akobikisa yango.” (Mko. 8:34, 35) Yesu asalelaki liloba “molimo” mpo na kolobela “bomoi.” Ya solo, azalaki pene ya kopesa bomoi na ye lokola mbeka; kasi alingaki mpe ete bayekoli na ye nyonso bándima komipesa mobimba na mosala ya Nzambe. Soki basali yango bakozwa mbano moko monene.​—Tángá Matai 16:27.

3. (a) Mituna nini Yesu atunaki bayoki na ye? (b) Na ntembe te, motuna ya mibale ya Yesu etindaki bayoki na ye bákanisa nini?

3 Kaka na libaku yango, Yesu atunaki mituna mibale oyo esengeli kotinda biso tókanisa; alobaki boye: “Litomba nini moto azali na yango na kozwa mokili mobimba mpe kobungisa molimo na ye?” mpe “Eloko nini, kutu, moto akoki kopesa na esika ya molimo na ye?” (Mko. 8:36, 37) Eyano na motuna ya liboso ezali polele mpo na moto nyonso. Ezali na litomba moko te soki moto azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi to molimo na ye. Moto akoki kosepela na biloko ya mokili kaka soki azali na bomoi. Na ntembe te, motuna ya mibale oyo Yesu atunaki ete: “Eloko nini, kutu, moto akoki kopesa na esika ya molimo na ye?” etindaki bayoki na ye bákanisa lisusu maloba oyo Satana alobaki na mikolo ya Yobo ete: “Moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Bato mosusu oyo basambelaka Yehova te bakoki kokanisa ete maloba ya Satana ezali solo. Mingi bazali pene ya kosala nyonso, ata makambo ya mabe, kaka mpo na kotikala na bomoi. Nzokande, biso baklisto totalelaka makambo ndenge mosusu.

4. Mpo na nini mituna oyo Yesu atunaki ezali na ntina mingi mpo na baklisto?

4 Toyebi ete koya ya Yesu awa na mabelé ezalaki te mpo na kopesa biso bozwi, nzoto kolɔngɔnɔ, mpe bomoi ya molai na mokili oyo. Ayaki mpo na kofungwela biso nzela mpo tózwa bomoi ya seko na mokili ya sika, mpe totalelaka elikya yango na motuya mingi. (Yoa. 3:16) Mpo na moklisto, motuna ya liboso oyo Yesu atunaki ekoki mpe kobongolama boye: “Litomba nini moto akoki kozwa soki azwi mokili mobimba mpe abungisi elikya na ye ya bomoi ya seko?” Eyano ezali ete, Akozwa litomba moko te. (1 Yoa. 2:15-17) Mpo na koyanola na motuna ya mibale, okoki komituna boye: ‘Makambo nini nakondima kotika sikoyo mpo nabungisa te elikya na ngai ya kozala na bomoi na mokili ya sika?’ Eyano na motuna yango, oyo emonanaka na lolenge ya bomoi na biso, emonisaka soki elikya yango ezali mpenza makasi na mitema na biso.​—Talá mpe Yoane 12:25.

5. Ndenge nini tokoki kozwa likabo ya bomoi ya seko?

5 Ya solo, Yesu alingaki koloba te ete moto akoki kosomba bomoi ya seko. Bomoi nyonso​—ata bomoi ya mokuse oyo tozali na yango na mokili oyo—​ezali likabo. Tokoki kosomba yango te, tokoki mpe kosala eloko moko te mpo na kozwa yango. Tokoki kozwa likabo ya bomoi ya seko kaka “na nzela ya kondima epai ya Klisto Yesu” mpe Yehova, “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Gal. 2:16; Ebe. 11:6) Nzokande, kondima na biso esengeli komonana na misala, mpamba te “kondima oyo ezangi misala ekufi.” (Yak. 2:26) Yango wana, ntango tozali kokanisa lisusu motuna ya Yesu, tosengeli kotalela mpenza makambo ya mokili oyo tokondima kotika mpe makambo oyo tokondima kosala na mosala ya Yehova mpo na komonisa ete kondima na biso ezali mpenza na bomoi.

‘Klisto amisepelisaki ye moko te’

6. Likambo nini Yesu atyaki na esika ya liboso?

6 Na esika Yesu atya makanisi na ye na makambo oyo mokili ekokaki kopesa ye, atyaki yango na makambo oyo eleki ntina mpe aboyaki mposa ya konduka biloko ya mokili. Azalaki na bomoi ya komipimela mpe ya botosi epai ya Nzambe. Na esika amisepelisa, alobaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka [Nzambe].” (Yoa. 8:29) Yesu andimaki kosala makambo nini mpo na kosepelisa Nzambe?

7, 8. (a) Makambo nini Yesu andimaki komipimela mpe azwaki mbano nini? (b) Motuna nini tosengeli komituna?

7 Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) Liboso, ntango Yesu abandaki koyebisa bayekoli na ye ete etikali moke ‘apesa molimo na ye,’ Petelo ayebisaki ye ete azala na boboto epai na ye moko. Kasi, Yesu aboyaki likanisi yango. Andimaki kopesa molimo to bomoi na ye ya kokoka mpo na bato. Lokola Yesu azalaki na bomoi ya komipimela, azwaki mbano ya solosolo. Asekwisamaki mpe “atombwamaki tii na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” (Mis. 2:32, 33) Na ndenge yango, akómaki ndakisa malamu mpo na biso.

8 Ntoma Paulo apesaki baklisto ya Loma toli ete ‘bámisepelisaka te’ mpe abakisaki ete “Klisto kutu amisepelisaki ye moko te.” (Lom. 15:1-3) Na yango, na meko nini tokondima kosalela toli yango ya ntoma Paulo mpe makambo nini tokondima kotika mpo na komekola Klisto?

Yehova alingaka tópesa ye oyo eleki malamu

9. Ntango moklisto amipesi epai ya Nzambe, yango elimbolaka mpenza nini?

9 Na Yisalaele ya kala, Mibeko ya Moize elobaki ete Baebele oyo bazalaki baombo basengelaki kozwa bonsomi nsima ya mbula nsambo to mpe na mbula ya Yubile. Kasi, moombo akokaki mpe kopona likambo mosusu. Soki alingi nkolo na ye, akokaki kopona kotikala moombo na ndako ya nkolo na ye mpo na libela. (Tángá Deteronome 15:12, 16, 17.) Biso mpe tosalaka ndenge yango ntango tomipesaka epai ya Nzambe. Tondimaka na motema mobimba kosala mokano ya Nzambe na esika ya kolanda bamposa na biso. Na ndenge yango, tomonisaka ete tolingaka Yehova mingi mpe tozali na mposa ya kosalela ye libela na libela.

10. Na ndimbola nini Nzambe azali Nkolo na biso, mpe likambo yango esengeli kotinda biso tózala na makanisi nini mpe tósalaka nini?

10 Soki ozali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, ozali kosakola nsango malamu, mpe ozali koyangana na makita, ozali kosala malamu. Tozali na elikya ete mosika te, motema na yo ekotinda yo omipesa epai ya Yehova mpe omituna motuna oyo Moetiopia atunaki Filipo ete: “Nini ezali kopekisa ngai kobatisama?” (Mis. 8:35, 36) Na ntango yango, boyokani na yo na Nzambe ekokóma lokola oyo ya baklisto oyo Paulo akomelaki ete: “Bozali bato na bino moko te, mpo bosombamaki na motuya moko boye.” (1 Kol. 6:19, 20) Ntango tomipesi epai ya Yehova, akómi Nkolo na biso, ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabelé. Yango wana, ezali mpenza na ntina tóboya bamposa ya moimi mpe ‘tótika kokóma baombo ya bato’! (1 Kol. 7:23) Kozala mosaleli ya sembo, oyo Yehova akoki kosalela ndenge alingi, ezali mpenza libaku malamu!

11. Mbeka nini baklisto basengeli kopesa, mpe yango elimboli mpenza nini, na kotalela bambeka ya banyama oyo esɛngamaki na Mibeko ya Moize?

11 Paulo apesaki baninga na ye baklisto toli oyo: “Bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe, mosala moko mosantu elongo na likoki na bino ya kokanisa.” (Lom. 12:1) Na ntembe te, maloba yango etindaki Bayuda oyo bakómaki baklisto bákanisa lisusu bambeka oyo bazalaki kopesa na losambo na bango liboso bákóma bayekoli ya Yesu. Bayebaki ete Mibeko ya Moize elobaki ete banyama oyo basengelaki kopesa Yehova na etumbelo esengelaki kozala oyo eleki malamu. Nyama ya mabe ekokaki kondimama te. (Mki. 1:8, 13) Ezali mpe bongo na oyo etali nzoto na biso, oyo tozali kopesa lokola ‘mbeka ya bomoi.’ Topesaka Yehova oyo eleki malamu, kasi te oyo etikalaka nsima ya kokokisa bamposa na biso. Ntango tomipesi epai ya Nzambe, topesaka ye “molimo” to bomoi na biso​—yango esangisi makasi na biso, bozwi na biso, mpe mayele na biso. (Kols. 3:23) Yango elimboli mpenza nini?

Saleláká ntango na yo na bwanya

12, 13. Wapi lolenge moko oyo tokoki kopesa Yehova oyo eleki malamu?

12 Lolenge moko ya kopesa Yehova oyo eleki malamu ezali ya kosalela ntango na biso na bwanya. (Tángá Baefese 5:15, 16.) Yango esɛngaka ete tózala na komipekisa. Makambo ya mokili mpe kozanga kokoka na biso etindaka biso tómipesa mobimba kaka na koluka matomba na biso moko. Ya solo, “ntango ezali mpo na eloko na eloko,” ata mpe ntango mpo na kominanola mpe mpo na mosala oyo ekosalisa biso tókokisa mikumba na biso. (Mos. 3:1) Nzokande, moklisto oyo amipesi na Nzambe asengeli kozala na bokatikati mpe kosalela ntango na ye na bwanya.

13 Ntango Paulo akendaki na Atene, amonaki ete “bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kofanda kuna mpo na mwa ntango bazalaki kolekisa ntango na bango ya kozwa mopɛpɛ na eloko mosusu te kaka na koyebisáká to na koyokáká mwa likambo moko ya sika.” (Mis. 17:21) Lelo oyo mpe bato mingi bazali kobebisa ntango na bango na makambo ya ndenge wana. Lelo oyo, mpo na kominanola, bato batalaka televizyo, babɛtaka masano ya video, mpe basalelaka Internet. Masano oyo ekoki kobebisa ntango na biso ezali se kokóma mingi. Soki tomipesi na yango, tokoki kobosana bamposa na biso ya elimo. Tokoki ata kobanda komona ete tozali na ntango te mpo na “makambo oyo eleki ntina,” elingi koloba makambo oyo etali mosala na biso mpo na Yehova.​—Filp. 1:9, 10.

14. Mituna nini tosengeli kotalela na likebi mpenza?

14 Yango wana, moklisto nyonso oyo amipesi epai ya Yehova asengeli komituna boye: ‘Ntango nazali kosala programe na ngai ya mokolo na mokolo, nabongisaka ntango mpo na kotánga Biblia, komanyola, mpe kobondela?’ (Nz. 77:12; 119:97; 1 Tes. 5:17) ‘Nabombaka ntango mpo na kobongisa makita? Napesaka biyano na makita mpo na kolendisa basusu?’ (Nz. 122:1; Ebe. 2:12) Liloba ya Nzambe elobi ete Paulo ná baninga na ye balekisaki “ntango mingi mpenza kolobáká na mpiko na bokonzi ya Yehova.” (Mis. 14:3) Ezali nde na makambo oyo okoki kobongisa mpo olekisaka “ntango mingi mpenza” na mosala ya kosakola, ata mpe kokóma mobongisi-nzela?​—Tángá Baebele 13:15.

15. Ndenge nini bankulutu basalelaka ntango na bango na bwanya?

15 Ntango ntoma Paulo mpe mibali mosusu ya sembo bakendaki na Antiokia, “balekisaki ntango mingi elongo na bayekoli” mpo na kolendisa bango. (Mis. 14:28) Lelo oyo mpe, bankulutu balekisaka ntango mingi na kolendisa basusu. Longola kobima na mosala ya kosakola, bankulutu basalaka mosala makasi mpo na kobatela etonga, koluka bampate oyo babungi, kosalisa baoyo bazali maladi, mpe kokokisa mikumba mingi mosusu na lisangá. Soki ozali ndeko mobali mpe osilá kozwa batisimo, bomoi na yo ezali kopesa yo nzela ya kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba yango?

16. Ndenge nini tokoki ‘kosala oyo ezali malamu epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima’?

16 Bandeko mingi basili kozwa esengo na kosalisa baoyo babungisi biloko na bango na makama. Na ndakisa, ndeko mwasi moko ya Betele, oyo azali na mbula koleka 60, asalaki mibembo mingi ya milai mpo na kosunga bandeko na bisika oyo makama ebimaki. Mpo na nini asalelaki ntango na ye na ndenge wana? Ye moko alobi boye: “Atako nayebi mosala moko te ya sikisiki, nazalaki na esengo ya kosala mosala nyonso mpo na kosunga. Kondima makasi ya bandeko oyo babungisaki biloko na bango nyonso elendisaki ngai mingi.” Lisusu, bankóto ya bandeko na mokili mobimba bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani. Ntango tozali kopesa mabɔkɔ na misala yango, tozali ‘kosala oyo ezali malamu epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.’​—Gal. 6:10.

“Nazali elongo na bino mikolo nyonso”

17. Okondima eloko nini mpo otika elikya na yo ya bomoi ya seko?

17 Etikali moke, bato nyonso oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ bábomama. Toyebi te mokolo oyo likambo yango ekosalema. Kasi, toyebi ete “ntango oyo etikali ekómi mokuse” mpe ete “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (Tángá 1 Bakolinti 7:29-31.) Likambo yango mpe emonisi ete motuna ya Yesu ezalaki mpenza na ntina: “Eloko nini, kutu, moto akoki kopesa na esika ya molimo na ye?” Na ntembe te, tokondima kosala nyonso oyo Yehova asɛngi biso mpo tózwa “bomoi ya solosolo.” (1 Tim. 6:19) Ya solo, tosengeli kotosa toli oyo Yesu apesaki ete ‘tólanda ye ntango nyonso’ mpe “tólukaka liboso bokonzi.”​—Mat. 6:31-33; 24:13.

18. Elikya nini tokoki kozala na yango, mpe mpo na nini?

18 Ya solo, kolanda Yesu ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, mpe ndenge ye moko alobaki, bato mosusu basili kobungisa bomoi na bango mpo na yango. Atako bongo, lokola Yesu, toboyaka makanisi ya ‘kozala na boboto epai na biso moko.’ Tondimaka elaka oyo Yesu apesaki bayekoli na ye bapakolami na ekeke ya liboso ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Na yango, tiká ete tósalela ntango mpe makoki na biso nyonso na mosala mosantu. Na ndenge yango, tokomonisa ete tozali na elikya ete Yehova akobatela biso na bolɔzi monene to akozongisa biso na bomoi na mokili ya sika. (Ebe. 6:10) Na ndenge yango tokomonisa ete tozali mpenza kotalela likabo ya bomoi na motuya.

Okopesa biyano nini?

• Ndenge nini Yesu amonisaki ete andimaki mpenza kosalela Nzambe mpe bato?

• Mpo na nini moto asengeli komiboya, mpe ndenge nini akoki kosala yango?

• Na Yisalaele ya kala, Yehova azalaki kondima kaka bambeka ya ndenge nini, mpe yango eteyi biso nini lelo oyo?

• Na ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso na bwanya?

[Bililingi na lokasa 26]

Yesu azalaki ntango nyonso kosala makambo oyo ezalaki kosepelisa Nzambe

[Elilingi na lokasa 28]

Bayisalaele oyo bazalaki na botɔndi bazalaki kopesa biloko oyo eleki malamu mpo na kosimba losambo ya solo

[Bililingi na lokasa 29]

Tosepelisaka Nzambe ntango tozali kosalela ntango na biso na bwanya

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto