Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/11 nk. 5-8
  • Yesu ateyaki nini na ntina na lifelo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu ateyaki nini na ntina na lifelo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Okanisi nini?
  • Laki ya mɔto ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Lifelo ezali mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/11 nk. 5-8

Yesu ateyaki nini na ntina na lifelo?

Yesu alobaki ete: “Sókó líso likotíela yŏ libakú lya kosála lisúmu, longólá lyangó, bwáká lyangó mosíká. Malámu óyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe na líso lyŏkó, kasi bábwáka yŏ na míso mábalé o límfelo té. Kúná bakolíama na nkusú ikokúfa té mpé bakozíka na móto mokozíma té.”​—MARKO 9:47, 48, Liloba lya Nzambe.

Mokolo mosusu, Yesu alobelaki eleko ya kosambisama, ntango akoloba na bato mabe ete: “Bólongwa, mosíká na ngáí, bínó bato babé, bókende o móto mwa sékô baléngélékí mpô ya zábolo na báníngá ba yĕ.” Alobaki mpe ete bato yango “bakokende kozwa etúmbu ya sékô.”​—MATAI 25:41, 46, Liloba lya Nzambe.

NTANGO moto atángi maloba yango, akoki kokanisa mbala moko ete Biblia eteyaka lifelo ya mɔtɔ. Nzokande, Yesu alukaki te koteya makanisi oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe oyo elobi polele ete: “Bato oyo bakufá bayebi eloko moko té.”​—Mosakoli 9:5, Bible na lingala ya lelo oyo.

Boye, Yesu alingaki koloba nini ntango alobelaki kobwakama “o límfelo”? “Móto mwa sékô” oyo Yesu alobelaki, ezali mpenza mɔtɔ ya solo to ezali nde ya elilingi? Na ndimbola nini bato mabe “bakokende kozwa etúmbu ya sékô”? Tótalela mokomoko na mituna yango.

Yesu azalaki na makanisi nini ntango alobelaki kobwakama “o límfelo”? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “límfelo” na Marko 9:47 ezali Gehenna. Yango euti na liloba ya Liebele Gé Hinnom, oyo elimboli “Lobwaku ya Hinome.” Lobwaku ya Hinome ezalaki na libándá ya engumba Yelusaleme ya kala. Na eleko ya bakonzi na Yisalaele, bato bazalaki kotumba bana na bango kuna lokola mbeka​—likambo ya nsɔmɔ oyo ezalaki kosepelisa Nzambe te. Nzambe alobaki ete akoboma bato oyo bazalaki kolanda momeseno wana ya mabe, oyo eutaki na losambo ya lokuta. Ntango oyo Nzambe akosala likambo oyo akanaki, Lobwaku ya Hinome ekobengama “lobwaku ya Koboma,” epai “bibembe ya bato” yango ekokundama te. (Yilimia 7:30-34, haut fleuve) Na bongo, Yehova asakolaki ete Lobwaku ya Hinome ekokóma esika ya kobwaka bibembe, kasi te esika ya konyokola bato ya bomoi.

Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, bafandi ya Yelusaleme bazalaki kobwaka bosɔtɔ nyonso na Lobwaku ya Hinome. Bazalaki mpe kobwaka kuna bibembe ya basali-mabe mpe bazalaki kotika ete mɔtɔ epelaka ntango nyonso mpo na kozikisa bosɔtɔ mpe bibembe.

Ntango Yesu alobelaki nkusu oyo ekokufa te mpe mɔtɔ oyo ekozimana te, na ntembe te, azongelaki maloba ya Yisaya 66:24. Mpo na “bibembe na bato baoyo batɔmbɔkɛlaki [Nzambe],” Yisaya alobaki ete “lopambo [to nkusu] na bango ekokufa tɛ, mɔtɔ na bango ekojimana tɛ.” (haut fleuve) Yesu mpe bato oyo bazalaki koyoka ye bayebaki ete Yisaya alobelaki ndenge oyo bazalaki kosala mpo na bibembe ya bato oyo babongaki kokundama te.

Na yango, Yesu asalelaki Lobwaku ya Hinome, to Gehena, lokola elilingi ya liwa oyo ezangi lisekwa. Amonisaki likanisi yango polele ntango alobaki ete Nzambe “ajali na nguya [ya] kobebisa na molimo mpe na Njoto kati na Gɛɛna.” (Matai 10:28, haut fleuve) Gehena ezali elilingi ya liwa ya seko, kasi ya monyoko ya seko te.

“Móto mwa sékô” oyo Yesu alobelaki, ezali mpenza ya solo to ya elilingi? Tósimba ete “móto mwa sékô” oyo Yesu alobelaki na Matai 25:41 ebongisamaki “mpo na zábolo na báníngá ba yĕ.” Okanisi ete mɔtɔ ya solo ekoki kozikisa bikelamu ya elimo? To ezali nde ete Yesu asalelaki liloba mɔtɔ na ndenge ya elilingi? Na ntembe te, “bampate” mpe “bantaba” oyo alobelaki na lisolo yango, ezalaki ya solo te; ezalaki maloba ya elilingi mpo na kolobela lolenge mibale ya bato. (Matai 25:32, 33) Mɔtɔ ya seko oyo Yesu alobelaki, ekozikisa nyɛɛ bato mabe na ndenge ya elilingi.

Na ndenge nini bato mabe “bakokende kozwa etúmbu ya sékô”? Atako mabongoli mingi ya Biblia esaleli liloba “etumbu” na Matai 25:46, ndimbola ya libosoliboso ya liloba ya Grɛki kolasin ezali “kolandela bokoli ya banzete,” to kokata bitape oyo ezali na ntina te. Na yango, lokola bampate bakozwa bomoi ya seko, bantaba oyo baboyi kobongola mitema bakozwa “etúmbu ya sékô,” bakolongolama na bomoi mpo na libela.

Okanisi nini?

Ata mokolo moko te Yesu ateyaki ete bato bazali na molimo oyo ekufaka te. Nzokande, ateyaki mbala mingi lisekwa ya bakufi. (Luka 14:13, 14; Yoane 5:25-29; 11:25) Mpo na nini Yesu akokaki koloba ete bakufi bakosekwa, soki ayebaki ete milimo na bango ekufá te?

Yesu ateyaki te ete Nzambe akonyokola bato mabe seko na seko. Kutu, Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apɛsi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama tɛ kasi ete ajala na bomɔi na seko.” (Yoane 3:16, haut fleuve) Mpo na nini Yesu alobaki ete bato oyo bakondimela ye te bakokufa? Soki ayebaki ete bakozala na bomoi libela na libela na lifelo ya mɔtɔ, alingaki koloba yango polele te?

Liteya oyo elobaka ete lifelo ezali esika oyo bato bakonyokwama euti na Biblia te. Ezali liteya euti na bapakano mpe ekómaki koteyama lokola liteya ya boklisto. (Talá etanda “Ndenge oyo liteya ya lifelo ekolaki,” na lokasa 6.) Nzambe anyokolaka bato libela na libela na lifelo te. Koyeba solo na ntina na lifelo ekoki kosalisa yo otalelaka Nzambe ndenge nini?

[Etanda na lokasa 6]

NDENGE OYO LITEYA YA LIFELO EKOLAKI

EUTAKI NA BINDIMELI YA BAPAKANO: Baezipito ya kala bazalaki kondima lifelo ya mɔtɔ. Buku moko (Le Livre de l’Amdouat), oyo ekomamaki na mobu 1375 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), elobeli bato oyo “bakobwakama motó na nse na mabulu ya mɔtɔ; mpe . . . bakobima kuna te, mpe . . . bakokoka te kokima mɔtɔ oyo ezali kopela.” Plutarque, Mogrɛki mpe moto ya filozofi oyo azalaki na bomoi eleki soki mbula 1900 akomaki na ntina na baoyo bazali na mokili ya nse ete: “Bagangaki na kolela wana bazalaki konyokwama na ndenge ya nsɔmɔ mpe bazalaki kozwa bitumbu makasi.”

EKƆTAKI NA MANGOMBA YA BAYUDA: Josèphe, Moyuda oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala na ekeke ya liboso alobaki ete Ba-Essene, lingomba moko ya Bayuda, bazalaki kondima ete “milimo ekufaka te, mpe ekobaka [kozala na bomoi] seko na seko.” Abakisaki boye: “Yango ekokani na likanisi ya Bagrɛki . . . Balobaka ete milimo ya mabe ezali na esika ya mabe mpe ya molili, oyo etondi na bitumbu oyo esilaka te.”

EKƆTAKI NA “BOKLISTO”: Na ekeke ya mibale T.B., buku moko oyo epemami na Nzambe te (L’Apocalypse de Pierre) elobaki boye mpo na bato mabe: “Kuna, basopelaka bango mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.” Ebakisaki boye: “Ezrael, anzelu ya nkanda, amemaka mibali mpe basi oyo ndambo ya nzoto na bango ezali kozika mpe abwakaka bango na esika ya molili, lifelo ya bato; mpe elimo moko ya nkanda epesaka bango etumbu.” Kaka na eleko yango, mokomi Théophile d’Antioche azongelaki maloba ya Sibyl, mosakoli mwasi moko Mogrɛki, oyo alobelaki bitumbu ya bato mabe: “Mɔtɔ oyo ezali kozikisa ekoya likoló na bino, mpe bokozika mokolo na mokolo na mɔtɔ.” Théophile alobaki ete yango ezali kati na maloba “ya solo, mpe ya ntina, mpe ya sembo, mpe oyo ezali na litomba mpo na bato nyonso.”

LIFELO YA MƆTƆ MPO NA KOLONGISA MAKAMBO MABE NA MOYEN-ÂGE: Buku moko emonisi ete Marie I, mokonzi-mwasi ya Angleterre (1553-1558), azalaki mpe kobengama “Marie, moto ya makila” mpamba te atumbaki Baprotesta soki 300 likoló ya nzete, alobaki boye: “Lokola milimo ya bapɛngwi ekotumbama mpo na libela na lifelo, mabe moko ezali te soki ngai namekoli nkanda ya Nzambe mpe natumbi bango awa na mabelé.”

NDIMBOLA YA SIKA: Banda mwa bambula, mangomba mosusu ebongoli ndenge ya kolimbola lifelo. Na ndakisa, na 1995, Komite ya mateya ya Lingomba ya Angleterre elobaki boye: “Lifelo ezali monyoko ya seko te, kasi ezali liponi ya nsuka mpe oyo ekoki kobongwana te mpo na moto oyo atombokeli Nzambe na motema moko mpenza, nsuka na yango ezali kolimwa nyɛɛ.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 7]

“LIBEKE NA MƆTƆ” EZALI NINI?

Emoniseli 20:10 elobi ete Zabolo akobwakama na kati ya “libeke na mɔtɔ” mpe ‘akoyokisama mpasi butu na moi libela na libela.’ (haut fleuve) Mpo Zabolo ayokisama mpasi libela na libela, Nzambe asengeli kotika ye na bomoi, nzokande Biblia elobi ete Yesu ‘akobebisa’ ye. (Baebele 2:14, haut fleuve) Libeke ya mɔtɔ yango ya elilingi elimboli “liwa ya mibale.” (Emoniseli 21:8) Yango ezali te liwa oyo elobelami liboso na Biblia​—liwa oyo eyaki mpo na lisumu ya Adama—​oyo bato bakoki kosekwa na yango. (1 Bakolinti 15:21, 22) Lokola Biblia elobi te ete baoyo bazali na “libeke na mɔtɔ” bakobima, “liwa ya mibale” esengeli kolimbola liwa ya ndenge mosusu, liwa oyo ezangi lisekwa.

Na ndenge nini baoyo bazali na “libeke ya mɔtɔ” bakoyokisama mpasi libela na libela? “Koyokisa mpasi” elimbolaka mpe “kokanga.” Na libaku moko, ntango bademo bamonaki Yesu, bagangaki ete: “Oyei koyokisa biso mpasi [kokanga biso na lobwaku, King James] liboso naino ntango ekomi tɛ?” (Matai 8:29; Luka 8:30, 31, haut fleuve) Na yango, baoyo nyonso bakokende na “libeke” “bakoyokisama mpasi” na ndenge bakokangama libela na libela, to bakokufa “liwa ya mibale.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto