Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/12 lok. 3
  • Makambo oyo bato balobaka mpo na Yesu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo bato balobaka mpo na Yesu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Yesu azalaki kaka moto moko malamu?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Azali nani? Yesu Klisto
    Lamuká!—2005
  • Ndenge nini Yesu akoki kobongola bomoi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/12 lok. 3

Makambo oyo bato balobaka mpo na Yesu

“Na ntembe te, Yesu ya Nazalete . . . azali moto oyo alekaki bato nyonso banda mokili ebandá.”​—H. G. Wells, moto ya mayele na istware na Angleterre.

‘Elombe moko te banda mokili ebandá, akokanaki na Klisto.’​—Philip Schaff, moto ya mayele na teoloji mpe na istware, oyo abotamá na Suisse.

NANI mpenza abongi kobengama moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo? Moto monene ayebanaka na makambo nini? Na mayele ya bitumba? Na makasi ya nzoto? Na boyebi na ye? To nde na ndenge maloba mpe misala na ye ebongolá bato to na ndakisa malamu na ye?

Talá makambo oyo bato ya istware, ya siansi, bakomi, bakonzi ya politiki mpe bato mosusu ya mayele, ya kala mpe ya lelo balobi mpo na mobali wana ya Nazalete, Yesu Klisto:

“Soki moto alingi komonisa ete Yesu azalaki te moto oyo alekaki bato nyonso, kaka na boumeli ya mbula nkóto mibale oyo te, kasi banda mokili ebandá, asengeli kaka kobɛta monɔkɔ.”​—Reynolds Price, Mokomi mpe moto ya mayele na makambo ya Biblia na Amerika.

“Moto oyo azalaki na ye mabɔkɔ mpɛmbɛ amikabaki mbeka mpo na bolamu ya basusu, ata mpe banguna na ye, mpe asikolaki mokili mobimba. Asalaki likambo moko ya malamu mpenza.”​—Mohandas K. Gandhi, mokonzi ya politiki mpe mokambi ya Lingomba ya Inde.

“Nabandá kozwa mateya ya Biblia mpe ya Talmud banda bomwana. Nazali Moyuda, kasi soki natali makambo moto wana ya Nazalete asalá, natikalaka kaka monɔkɔ polele.”​—Albert Einstein, moto ya siansi oyo abotamá na Allemagne.

“Mpo na ngai, Yesu Klisto azali moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ezala totaleli ye lokola Mwana ya Nzambe to lokola Mwana ya Moto. Makambo nyonso oyo alobá to asalá ezali kaka na ntina tii lelo. Tokoki koloba bongo mpo na moto mosusu te, ezala azali na bomoi to akufá.”​—Sholem Asch, mokomi moko oyo abotamá na Pologne (maloba na ye oyo ebimaki mpe na zulunalo Christian Herald).

“Na boumeli ya mbula ntuku misato na mitano, nazalaki mpenza oyo babengaka nihiliste, elingi koloba moto oyo andimaka ata likambo moko te. Eleki lelo mbula mitano, nakómá kondima ete Yesu azalaki mpenza. Nakómaki kondima mateya ya Yesu Klisto, mpe bomoi na ngai ebongwanaki mbala moko.”​—Count Leo Tolstoy, mokomi mpe moto ya filozofi na ekólo Russie.

“[Yesu] azali moto oyo abongolá bato mingi koleka na mokili oyo, mpe azali kokoba kobongola bato tii lelo.”​—Kenneth Scott Latourette, moto ya istware mpe mokomi na Amerika.

“Tokoki mpenza koloba ete masolo ya Baevanzile ezali kaka masapo ya mpamba? Nalobi na yo, moninga, eloko moko te ezali komonisa ete ezali bongo. Kutu, lisolo ya bomoi ya Socrates, oyo moto moko te abɛtɛlaka ntembe, ezali mpenza na bilembeteli mingi te oyo ekoki kondimisa biso yango lokola oyo ya Yesu Klisto.”​—Jean-Jacques Rousseau, moto ya filozofi na France.

Emonani polele ete soki ezali na moto moko oyo tosengeli kolanda ndakisa na ye na bomoi na biso, ezali kaka Yesu Klisto. Paulo, moto oyo atángaki mingi na ekeke ya liboso mpe oyo Yesu aponaki mpo azala moyekoli na ye mpe atatola mpo na ye epai ya bato ya bikólo, alendisi biso ete ‘tótalaka Yesu na likebi mpenza.’ (Baebele 12:2; Misala 9:3) Yesu akoki koteya biso nini na bomoi? Litomba nini okoki kozwa na bomoi na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto