Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/12 lok. 8
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • “Mosali-mabaya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ntina oyo tosengeli kosala mosala
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yoane abatisi Yesu
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tóluka koyeba “makanisi ya Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/12 lok. 8

Oyebaki yango?

Misala nini Yesu asalaki ntango azalaki mosali-mabaya?

Tata-mobɔkɔli ya Yesu azalaki mosali-mabaya. Yesu ayekolaki mpe mosala yango. Ntango Yesu abandaki mosala ya kosakola, azalaki na “mbula soki ntuku misato,” ayebanaki kaka te lokola mwana ya mosali-mabaya, kasi mpe lokola mosali-mabaya.​—Luka 3:23; Matai 13:55; Malako 6:3.

Na mboka oyo Yesu akolaki, bato bazalaki na mposa makasi ya bisaleli ya bilanga oyo esalemá na mabaya, na ndakisa bitimweli mpe mabaya mpo na kokangisa banyama. Mingimingi, basali-mabaya bazalaki kosala bakiti, bamesa, bibonga, bakesi, mpe biloko lokola baporte, maninisa, bafungola mpe mambásá. Na yango, misala ya basali-mabaya ezalaki na ntina mpo na misala ya botongi ndako.

Na lisese moko, Yoane Mobatisi alobelaki epasola, esaleli oyo Yesu mpe basali mosusu ya mabaya bazalaki kosalela mpo na kokata banzete. Na nsima, bakokaki kosala na nzete yango libaya kaka na zamba to komema yango na esika ya mosala. Na ntembe te, mosala yango esɛngaki mpenza kozala makasi mpo na kosala yango. (Matai 3:10) Yisaya alobeli bisaleli mosusu oyo basali-mabaya bazalaki kosalela na eleko na ye: “Mosali ya mabaya akosembola nsinga, akokoma kuna na ekomeli, akopakola yango na likɔmbɔ, [akomeka] yango na ezingeli mpe akobongisa yango.” (Yisaya 44:13) Biloko oyo bato ya Arkeoloji bakundolá emonisi ete na ntango ya kala, bato bazalaki kosalela biloko lokola basii ya ebende, bansɛtɛ ya brɔnze , mpe bamarto ya mabanga. (Exode 21:6; Yisaya 10:15;Yilimia 10:4) Tokoki mpenza kokanisa ete Yesu mpe asalelaki bisaleli yango na mosala na ye ya mabaya.

“Bato ya banki” oyo Yesu alobelaki na lisese na ye moko ezali banani, mpe bazalaki kosala nini?

Yesu alobelaki moto moko oyo apamelaki moombo na ye na maloba oyo: “Osengelaki kotya bambongo na ngai ya palata epai ya bato ya banki, mpe na boyei na ngai mbɛlɛ nazwaki eloko na ngai ná benefisi likoló.”​—Matai 25:27.

Na ntango ya Yesu, babanki ya minene lokola oyo ezali lelo ezalaki te. Nzokande, badefisi-mbongo bazalaki kozwa mbongo ya bato mpo na kofuta yango na benefisi, mpe bango bazalaki kodefisa yango mpo na kozwa matabisi mingi lisusu koleka. Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi boye: Na ekeke ya minei liboso ya ntango na biso (L.T.B.) na Grèce, kodefisa mbongo mpo na kozwa mileki ezalaki momeseno. Na boumeli ya eleko ya kimya oyo Baloma bakɔtisaki, mileki oyo bazalaki kozwa na mbula mobimba emataki makasi.

Mobeko ya Moize epekisaki kodefisa bayisalaele oyo bazalaki babola mbongo mpo báfuta yango na matabisi. (Exode 22:25) Emonani lokola mobeko yango ezalaki libosoliboso mpo na babola. Nzokande, lokola Yesu amonisi yango na lisese na ye, ezalaki mabe te kotika mbongo epai ya badefisi-mbongo to “bato ya banki” mpo na kozwa mileki. Na yango, lokola momeseno, Yesu alobelaki kaka likambo oyo bayoki na ye bayebaki malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto