Pusaná penepene na Nzambe
Mozalisi oyo abongi kozwa lokumu
OSILÁ komituna soki ‘ntina ya bomoi ezali mpenza nini?’ Bato oyo bakanisaka ete bomoi ebimá kaka yango moko, na nzela ya evolisyo, bakoki kozwa eyano na motuna wana te. Kasi, ezali bongo te mpo na baoyo bandimaka ete Yehova Nzambe nde akelá bomoi. (Nzembo 36:9) Bayebi ete akelaki biso na ntina. Ntina yango eyebisami na Emoniseli 4:11. Tótala sikoyo ndenge maloba yango, oyo ntoma Yoane akomaki, ezali kolimbola ntina oyo tozali na bomoi.
Yoane amoni bayembi na likoló bazali kokumisa Nzambe na maloba oyo: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Kaka Yehova nde abongi kozwa lokumu ya ndenge wana. Mpo na nini? Mpo ‘azalisaki biloko nyonso.’ Yango esengeli kotinda biso tósala nini?
Biblia elobi ete Yehova abongi “kozwa” nkembo, lokumu mpe nguya. Ntembe ezali te ete Yehova aleki na nkembo, na lokumu mpe na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba. Nzokande, bato mingi bandimaka mpenza te ete ye nde akelá biloko nyonso. Atako bongo, ezali na bato oyo bamonaka “bizaleli na ye oyo emonanaka te” na nzela ya biloko oyo akelá. (Baloma 1:20) Na botɔndi nyonso, bapesaka Yehova nkembo mpe lokumu. Basalisaka bato nyonso oyo bakondima koyoka bango báyeba ete Yehova nde akelá biloko nyonso na ndenge moko ya kokamwa mpe, mpo na yango, ebongi tópesa ye lokumu.—Nzembo 19:1, 2; 139:14.
Kasi, na ndenge nini Yehova azwaka nguya epai ya basambeli na ye? Toyebi ete ekelamu moko te ekoki kopesa nguya epai ya Mokeli oyo atondi na nguya. (Yisaya 40:25, 26) Kasi, lokola tokelamá na lolenge ya Nzambe, tozali na mwa ndambo ya bizaleli na ye, na ndakisa nguya. (Genese 1:27) Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na oyo Mozalisi na biso asalelá biso, tokozala na mposa ya kosalela nguya mpe makasi na biso mpo na kopesa ye lokumu mpe nkembo. Na esika tósalelaka makasi na biso kaka mpo na koluka matomba na biso moko, tomonaka ete tosengeli kosalela Yehova na nguya to makasi na biso nyonso.—Malako 12:30.
Kasi, mpo na nini biso tozali awa na mabelé? Eteni ya nsuka ya Emoniseli 4:11 epesi eyano oyo: “Mpo na mokano na yo [biloko nyonso] ezalaki mpe ezalisamaki.” Biso tosɛngaki te ete tókelama. Nzambe ye moko nde asepelaki kokela biso. Yango wana, soki moto amipesi mobimba kaka mpo na koluka matomba na ye moko, bomoi na ye ekozala na ntina moko te. Mpo na kozala na kimya, esengo mpe bolamu, tosengeli koyeba mokano ya Nzambe mpe koyokanisa bomoi na biso na mokano yango. Kaka soki tosali bongo nde tokoyeba ntina oyo tokelamaki mpe ntina oyo tozali na bomoi.—Nzembo 40:8.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
NASA, ESA, and A. Nota (STScI)