Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/2 nk. 10-14
  • Tiká maloba ya Yesu etambwisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká maloba ya Yesu etambwisa yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Liboso yokaná yo ná ndeko na yo”
  • Komikitisa ezali na ntina
  • ‘Soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku’
  • “Bózala na momeseno ya kopesa”
  • “Kobɛta kelelo liboso na yo te”
  • Maloba ya motuya oyo tosengeli kobatela
  • Mateya maleki mateya nyonso
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Lisolo likoló ya Ngomba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Maloba ya Yesu esalisaka yo obongisa mabondeli na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Oyo tosengeli kosalelaka basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/2 nk. 10-14

Tiká maloba ya Yesu etambwisa yo

“Moto oyo Nzambe atindi alobaka maloba ya Nzambe.”​—YOA. 3:34.

1, 2. Mpo na nini tokoki koloba ete makambo oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba eutaki na “maloba ya Nzambe”?

YESU ateyaki makambo mingi ya ntina na Lisolo Likoló ya Ngomba. Yango esengeli kokamwisa biso te, mpo makambo oyo Yesu azalaki koloba ezalaki kouta epai ya Yehova! Mpo na Yesu, Biblia elobi boye: “Moto oyo Nzambe atindi alobaka maloba ya Nzambe.”​—Yoa. 3:34-36.

2 Atako Lisolo Likoló ya Ngomba eumelaki ata miniti ntuku misato te, ezongeli mbala 21 maloba ya mikanda 8 ya Makomami ya Liebele. Na yango, lisolo yango eutaki mpenza na “maloba ya Nzambe.” Tólobela sikoyo ndenge tokoki kosalela makambo mosusu ya ntina oyo ezali na lisolo wana ya kafukafu oyo Mwana molingami ya Nzambe asalaki.

“Liboso yokaná yo ná ndeko na yo”

3. Nsima ya koyebisa bayekoli na ye likama oyo nkanda ekoki komema, Yesu apesaki toli nini?

3 Biso baklisto tozalaka na esengo mpe na kimya mpo tozali na elimo santu ya Nzambe. Kutu esengo mpe kimya ezali biteni ya mbuma na yango. (Gal. 5:22, 23) Yesu alingaki te ete bayekoli na ye bábungisa esengo mpe kimya na bango, yango wana ayebisaki bango ete kobomba nkanda ntango molai ekoki komema ata na liwa. (Tángá Matai 5:21, 22.) Na nsima alobaki boye: “Boye, soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”​—Mat. 5:23, 24.

4, 5. (a) “Likabo” oyo Yesu alobelaki na Matai 5:23, 24 ezalaki nini? (b) Mpo na nini koyokana na ndeko oyo tozwani na ye matata ezali ntina mingi?

4 “Likabo” oyo Yesu alobelaki ezali mbeka nyonso oyo bazalaki komema na tempelo ya Yelusaleme. Na ndakisa, bambeka ya banyama ezalaki na ntina mingi na ntango wana mpamba te ezalaki na esika monene na losambo ya Yehova. Kasi, Yesu alobelaki likambo moko ya ntina mingi koleka: koyokana na ndeko oyo tozwani na ye matata liboso ya kopesa Nzambe likabo.

5 Liteya nini tokoki kozwa na maloba wana ya Yesu? Emonani polele ete ndenge oyo tozalaka na basusu ekoki kobongisa to kobebisa boyokani na biso na Yehova. (1 Yoa. 4:20) Bambeka oyo bazalaki kopesa Nzambe na ntango ya kala ekokaki kozala na ntina te soki moto oyo apesi yango asalaka basusu makambo ya mabe.​—Tángá Mika 6:6-8.

Komikitisa ezali na ntina

6, 7. Mpo na nini komikitisa ezali na ntina ntango tozali koluka kozongisa kimya na ndeko moko oyo tozwanaki na ye matata?

6 Mpo na koyokana na ndeko oyo tozwani na ye matata, esɛngaka mpenza komikitisa. Bato ya komikitisa batyaka mbamba te mpo na koluka komilongisa. Kosala bongo ekobebisa kaka makambo, ndenge esalemaki epai ya baklisto na Kolinti. Mpo na likambo yango, ntoma Paulo alobaki na bango boye: “Ezali mpenza solo ete bomizongisi nsima na ndenge bozali kofundana na leta bino na bino. Mpo na nini kutu te kondima ete básalela bino mabe? Mpo na nini kutu te kondima ete bábuba bino?”​—1 Kol. 6:7.

7 Yesu alobaki te ete tosengeli kokende epai ya ndeko na biso kaka mpo na koluka kondimisa ye ete biso tozali na elonga, kasi ye nde azali na foti. Mokano na biso esengeli kozala ya kozongisa kimya na kati na biso. Mpo na koyokana na ndeko na biso, tosengeli komonisa polele ndenge tozali komiyoka. Tosengeli mpe koyeba ete biso mpe tozokisaki ndeko yango. Mpe soki biso nde tosalaki mabe, tosengeli kosɛnga ye bolimbisi na komikitisa nyonso.

‘Soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku’

8. Lobá na mokuse maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 5:29, 30.

8 Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu apesaki mpe toli ya malamu na likambo etali bizaleli malamu. Ayebaki ete biteni ya nzoto na biso ya kozanga kokoka ekoki kotinda biso tósala mabe. Yango wana, alobaki boye: “Soki liso na yo wana ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo. Mpo ezali litomba mingi mpo na yo kobungisa moko ya binama na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na Gehena. Lisusu, soki lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, katá yango mpe bwaká yango mosika na yo. Mpo ezali litomba mingi mpo na yo kobungisa moko ya binama na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na Gehena.”​—Mat. 5:29, 30.

9. Ndenge nini “liso” to “lobɔkɔ” na biso ekoki ‘kobɛtisa biso libaku’?

9 “Liso” oyo Yesu alobelaki ezali nguya to likoki na biso ya kotala na likebi, mpe “lobɔkɔ” ezali makambo oyo tosalaka na mabɔkɔ na biso. Soki tokebi te, biteni wana ya nzoto na biso ekoki ‘kobɛtisa biso libaku’ mpe kosala ete tótika ‘kotambola na Nzambe elongo.’ (Gen. 5:22; 6:9) Na yango, ntango tomekami mpo na kobuka mobeko moko ya Yehova, tosengeli kozwa mbala moko ekateli ya makasi, na maloba ya elilingi, tosengeli kopikola liso na biso to kokata lobɔkɔ na biso.

10, 11. Nini ekoki kosalisa biso tókima pite mpe ekobo?

10 Ndenge nini tokoki kopekisa miso na biso mpo etala te makambo ya mbindo? Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, alobaki boye: “Nalapaki ’tè miso na ngai étika kolulalula bilenge basi.” (Yobo 31:1, Bible na lingala ya lelo oyo) Yobo azalaki na mwasi na ye mpe azwaki ekateli ya kobuka te mobeko ya Nzambe oyo etali kosangisa nzoto. Biso mpe tosengeli kozala na ekateli yango, ezala tobalá to tozali minzemba. Mpo na kokima pite mpe ekobo, tosengeli kotambwisama na elimo santu ya Nzambe, oyo esalisaka bato oyo balingaka Nzambe bázala na komipekisa.​—Gal. 5:22-25.

11 Mpo na kokima pite mpe ekobo, tosengeli komituna boye, ‘Natikaka miso na ngai elamusa epai na ngai mposa ya kotala makambo ya mbindo na babuku, na televizyo, to na Internet?’ Tóbosana mpe te maloba ya moyekoli Yakobo oyo: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; na ngala na yango, lisumu, ntango ekokisami, eboti liwa.” (Yak. 1:14, 15) Na yango, soki moto oyo amipesá epai ya Nzambe “azali kokoba kotala” na makanisi ya mabe moto oyo azali molongani na ye te, asengeli kozwa ekateli ya makasi mpo na kobongwana, na maloba mosusu, asengeli kopikola liso na ye mpe kobwaka yango.​—Tángá Matai 5:27, 28.

12. Toli nini ya Paulo ekoki kosalisa biso tóbunda na bamposa ya mabe?

12 Kosalela mabɔkɔ na biso na ndenge ya mabe ekoki kotinda biso tóbuka mibeko ya Yehova; yango wana, tosengeli kosala nyonso mpo tózala na etamboli ya pɛto. Mpo na yango, tosengeli kotosa toli ya Paulo oyo: “Bóboma binama ya nzoto na bino oyo bizali na mabelé na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato, oyo ezali losambo ya bikeko.” (Kols. 3:5) Liloba “bóboma” emonisi ete tosengeli kozwa ekateli ya makasi mpo na kobunda na bamposa mabe ya mosuni.

13, 14. Mpo na nini tosengeli koboya makanisi mpe misala ya mbindo?

13 Mpo na kobatela bomoi na ye, moto akoki kondima bákata ye lobɔkɔ to lokolo. ‘Kobwaka mosika’ liso mpe lobɔkɔ na ndenge ya elilingi ezali na ntina mpo na biso soki tolingi koboya makanisi mpe misala ya mbindo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Mpo na kokima Gehena to liwa ya seko, tosengeli kozala pɛto na makanisi, na etamboli mpe na elimo.

14 Lokola tosangolá lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka, tosengeli kosalaka milende mpo na kozala na etamboli ya pɛto. Paulo alobaki boye: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai makofi mpe kokómisa yango lokola moombo, mpo, nsima ya kosakola epai ya bamosusu, ngai moko naboyama te ezala na ndenge nini.” (1 Kol. 9:27) Na yango, tózala na ekateli ya kotosa toli ya Yesu na oyo etali pite mpe ekobo, mpe tósala ata mokolo moko te makambo oyo ekomonisa ete tozangi botɔndi na mbeka na ye ya lisiko.​—Mat. 20:28; Ebe. 6:4-6.

“Bózala na momeseno ya kopesa”

15, 16. (a) Ndakisa nini Yesu atikaki na likambo etali kopesa? (b) Maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 6:38 elimboli nini?

15 Maloba ya Yesu mpe ndakisa monene na ye emonisi ete azalaki na momeseno ya kopesa. Amonisaki bokabi monene na ndenge ayaki awa na mabelé mpo na bolamu ya bato ya kozanga kokoka. (Tángá 2 Bakolinti 8:9.) Yesu andimaki kotika nkembo oyo azalaki na yango likoló mpo na kokóma moto mpe kopesa bomoi na ye mpo na bato ya masumu; bamosusu kati na bango bakozwa bomɛngo na likoló na ndenge bakoyangela elongo na ye na Bokonzi. (Lom. 8:16, 17) Na ntembe te, Yesu alendisaki bato bákabaka ntango alobaki boye:

16 “Bózala na momeseno ya kopesa, mpe bato bakopesa bino. Bakosopa na mabenga na bino ndambo moko ya malamu, oyo ekamolami, oyo eningisami esika moko mpe oyo etondi mingi mpenza. Mpamba te na emekelo oyo bozali komekela, bakomekela mpe bino na yango.” (Luka 6:38) ‘Kosopa na libenga’ ezali momeseno oyo batɛki mosusu na ntango ya kala bazalaki na yango ya kotondisa mabenga ya bazambala ya basombi, oyo ezalaki na loketo. Soki tozali na momeseno ya kokabela basusu, bango mpe bakoki kokabela biso ntango tokozala na bosɛnga.​—Mos. 11:2.

17. Ndakisa nini monene Yehova apesá na likambo etali kokaba, mpe kokaba ya lolenge nini ekoki komemela biso esengo?

17 Yehova alingaka mpe apambolaka baoyo bapesaka na esengo. Ye moko apesaki ndakisa monene, apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko “mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Paulo akomaki boye: “Moto oyo azali kolona mingi akobuka mpe mingi. Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Kol. 9:6, 7) Soki tozali kopesa ntango, makasi mpe biloko na biso mpo na kotombola losambo ya solo, tokozwa mpenza esengo mpe mapamboli beboo.​—Tángá Masese 19:17; Luka 16:9.

“Kobɛta kelelo liboso na yo te”

18. Makambo nini ekoki kosala ete Tata na biso ya likoló apesa biso “mbano te”?

18 “Bókeba mpenza ete bósalela te boyengebene na bino na miso ya bato mpo bango bámona bino; soki bongo bokozwa mbano te epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Mat. 6:1) Ntango Yesu asalelaki liloba “boyengebene,” alobelaki etamboli oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Apekisaki te ete moto amonisa etamboli malamu na miso ya bato, mpo ayebisaki bayekoli na ye bátika ete “pole na [bango] engɛnga liboso ya bato.” (Mat. 5:14-16) Kasi, Tata na biso ya likoló akopesa biso “mbano te” soki tozali kosala makambo mpo ‘bato bámona biso’ mpe bákumisa biso ndenge bakumisaka bato ya teyatre. Soki tozali na makanisi ya ndenge wana, tokozala na boyokani malamu te na Nzambe mpe tokozwa te mapamboli ya seko ntango Bokonzi na ye ekoyangela.

19, 20. (a) Yesu alingaki koloba nini ntango apekisaki “kobɛta kelelo” ntango tozali kopesa “makabo ya motema mawa”? (b) Na ndenge nini tokoboya ete lobɔkɔ ya mwasi eyeba oyo lobɔkɔ ya mobali ezali kosala?

19 Soki tozali na makanisi ya malamu, tokolanda toli ya Yesu oyo: “Na yango ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, kobɛta kelelo liboso na yo te, ndenge bakosi basalaka na kati ya basinagoga mpe na babalabala, mpo bato bápesa bango nkembo. Ya solo nazali koloba na bino ete, Basili kozwa mbano na bango na mobimba.” (Mat. 6:2) “Makabo ya motema mawa” ezalaki kopesama mpo na kosalisa baoyo bazalaki na bosɛnga. (Tángá Yisaya 58:6, 7.) Yesu ná bantoma na ye bazalaki na kesi na bango ya makabo mpo na kosunga babola. (Yoa. 12:5-8; 13:29) Lokola bazalaki kobɛta kelelo te liboso ya kopesa babola makabo, emonani ete Yesu asalelaki maloba ya elilingi ntango alobaki ete tosengeli te “kobɛta kelelo” liboso na biso ntango tozali kopesa “makabo ya motema mawa.” Tosengeli te kobɛtaka tangba ntango tozali kopesa makabo ya ndenge wana, ndenge Bafalisai bazalaki kosala. Yesu abengaki bango bakosi mpamba te bazalaki kobɛta tangba “na kati ya basinagoga mpe na babalabala” mpo na makabo oyo bazalaki kopesa. Bakosi wana bazalaki “kozwa mbano na bango na mobimba.” Mabɔkɔ oyo bato bazalaki kobɛtela bango mpe ndenge bazalaki kofanda elongo na Balabi na bakiti ya liboso na sinagoga nde ezalaki mbano na bango, mpo Yehova akopesa bango eloko ata moko te. (Mat. 23:6) Kasi, bayekoli ya Yesu basengelaki kosala nini? Yesu ayebisaki bango mpe biso boye:

20 “Kasi yo, ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, tiká te ete lobɔkɔ na yo ya mwasi eyeba oyo lobɔkɔ na yo ya mobali ezali kosala, mpo ete makabo na yo ya motema mawa ezala na nkuku; boye Tata na yo oyo atalaka na nkuku akozongisela yo.” (Mat. 6:3, 4) Mbala mingi tosalelaka mabɔkɔ nyonso mibale. Na yango, koboya ete lobɔkɔ ya mwasi eyeba oyo lobɔkɔ ya mobali ezali kosala elimboli ete tosengeli te kobɛta tangba, ata epai ya baninga na biso ya motema, ntango tokabi eloko.

21. Ye “oyo atalaka na nkuku” apesi biso mbano nini?

21 Soki tozali komikumisa te ntango tokabeli basusu, “makabo na [biso] ya motema mawa” ekopesama na nkuku. Na yango, Tata na biso “oyo atalaka na nkuku” akozongisela biso. Lokola afandaka na likoló mpe bato bamonaka ye te, Yehova azali na “nkuku” mpenza. (Yoa. 1:18) Mbano oyo Yehova, oyo “atalaka na nkuku” apesi biso ezali mpe boyokani malamu na ye, kolimbisama ya masumu mpe bomoi ya seko. (Mas. 3:32; Yoa. 17:3; Ef. 1:7) Yango eleki mosika lokumu oyo bato bakoki kopesa biso!

Maloba ya motuya oyo tosengeli kobatela

22, 23. Mpo na nini tosengeli kobatela maloba ya Yesu?

22 Lisolo Likoló ya Ngomba ezali mpenza na maloba ya motuya oyo ekoki kopesa biso esengo ata na mokili oyo ya yikiyiki. Ya solo, tokozala na esengo soki tobateli maloba ya Yesu mpe totiki yango etambwisa makanisi mpe bomoi na biso.

23 Moto nyonso oyo “ayokaka” mpe “atosaka” makambo oyo Yesu ateyaki akopambolama. (Tángá Matai 7:24, 25.) Na yango, tózwa ekateli ya kosalela toli ya Yesu. Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo mosusu oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba.

[Okopesa eyano nini?]

• Mpo na nini ezali na ntina tóyokana na ndeko oyo tozwanaki na ye matata?

• Ndenge nini tokoki koboya ete ‘liso na biso ya mobali’ ebɛtisa biso libaku?

• Ezaleli nini tosengeli kozala na yango ntango tokabeli moto eloko?

[Elilingi na lokasa 11]

Ezali mpenza malamu ‘koyokana’ na ndeko oyo tozwanaki na ye matata!

[Bililingi na lokasa 12, 13]

Yehova apambolaka baoyo bapesaka na esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto