Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/2 nk. 15-19
  • Maloba ya Yesu esalisaka yo obongisa mabondeli na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maloba ya Yesu esalisaka yo obongisa mabondeli na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóbondelaka te lokola bakosi
  • Yesu alakisaki biso ndenge ya kobondela
  • ‘Tókoba kosɛnga, koluka mpe kobɛta kɔkɔkɔ’
  • Tókoba kozwa matomba na maloba ya Yesu
  • Mabondeli nini mandimami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lakisa biso kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Libondeli ya Nkolo​—Ndimbola na yango mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/2 nk. 15-19

Maloba ya Yesu esalisaka yo obongisa mabondeli na yo?

“Ntango Yesu asilisaki maloba yango, esalaki ete bibele yango ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.”​—MAT. 7:28.

1, 2. Mpo na nini ebele ya bato bakamwaki lolenge oyo Yesu azalaki koteya?

TOSENGELI kondima maloba ya Yesu Klisto, Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe, mpe kosalela yango na bomoi na biso. Na ntembe te, azalaki koloba koleka bato nyonso. Yango wana, bato bakamwaki ndenge ateyaki na Lisolo Likoló ya Ngomba!​—Tángá Matai 7:28, 29.

2 Mwana ya Yehova azalaki koteya lokola bakomeli te, baoyo bazalaki kosalela makanisi ya bato ya kozanga kokoka mpo na koteya. Klisto azalaki koteya “na ndenge ya moto oyo azali na bokonzi” mpo makambo oyo azalaki koloba eutaki epai ya Nzambe. (Yoa. 12:50) Tótala sikoyo ndenge makambo mosusu oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba ekoki kosalisa biso tóbongisa mabondeli na biso.

Tóbondelaka te lokola bakosi

3. Lobá na mokuse maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:5.

3 Libondeli ezali na ntina mingi na losambo ya solo, mpe tosengeli kobondelaka Yehova mbala na mbala. Kasi mabondeli na biso esengeli koyokana na makambo oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba. Alobaki boye: “Ntango bozali kobondela, bosengeli te kozala lokola bakosi; mpamba te balingaka kobondela kotɛlɛmáká na basinagoga mpe na bikutanelo ya banzela minene mpo bato bámona bango. Ya solo nazali koloba na bino ete, Basili kozwa mbano na bango na mobimba.”​—Mat. 6:5.

4-6. (a) Mpo na nini Bafalisai bazalaki kolinga kobondela “kotɛlɛmáká na basinagoga mpe na bikutanelo ya banzela minene”? (b) Na ndenge nini bakosi wana bazalaki “kozwa mbano na bango na mobimba”?

4 Ntango bazalaki kobondela, bayekoli ya Yesu bazalaki te komekola “bakosi” lokola Bafalisai, oyo bazalaki komimonisa bato ya sembo, mpe bazalaki koluka kokosa bato ete bazali bato ya boyengebene. (Mat. 23:13-32) Bakosi yango bazalaki kolinga kobondela “kotɛlɛmáká na basinagoga mpe na bikutanelo ya banzela minene.” Mpo na nini? Mpo bato “bámona bango.” Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki na momeseno ya kobondela esika moko na ntango ya kotumba bambeka na tempelo (na ngonga soki ya libwa ya ntɔngɔ mpe ya misato na nsima ya midi). Bato mingi oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme bazalaki kobondela elongo na ebele ya bato mosusu na tempelo. Bayuda mosusu ya molende oyo bazalaki kofanda na Yelusaleme te, bazalaki kobondela mbala mibale na mokolo “kotɛlɛmáká na basinagoga.”​—Talá mpe Luka 18:11, 13.

5 Lokola bato mingi bazalaki kofanda pene ya tempelo to ya sinagoga te, bazalaki kosala mabondeli yango esika nyonso oyo bazali soki ntango ya kobondela ekoki. Bamosusu bazalaki kosala ete ntango ya kobondela ekuta bango na “bikutanelo ya banzela minene.” Bazalaki kolinga ete bato oyo bazali koleka wana “bámona bango.” Bakosi wana bazalaki ‘kosala mabondeli milaimilai’ mpo bato oyo bazali kotala bango bákumisa bango. (Luka 20:47) Biso tosengeli te kosalaka bongo.

6 Yesu alobaki ete bakosi yango basili “kozwa mbano na bango na mobimba.” Bazalaki koluka ete bato báyeba bango mpe bápesaka bango lokumu​—mpe yango nde bazalaki kozwa. Yango ezalaki mbano na bango na mobimba, mpo Yehova akokaki te koyanola mabondeli ya bakosi ya ndenge wana. Nzokande, Nzambe azalaki koyanola mabondeli ya bayekoli ya solo ya Klisto, ndenge Yesu amonisaki yango na maloba oyo elandi.

7. Toli ya Yesu ya kobondela na “eteni ya kati ya ndako” na biso elimboli nini?

7 “Nzokande, yo ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga ekuke na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na nkuku; boye Tata na yo oyo atalaka na nkuku akozongisela yo.” (Mat. 6:6) Toli oyo Yesu apesaki ya kobondela na shambre nsima ya kokanga porte elimboli te ete moto akoki te kobondela liboso ya lisangá. Apesaki toli wana mpo na komonisa ete moto oyo azali kobondela liboso ya bato ebele asengeli te kobondela mpo na kobenda likebi likoló na ye mpe koluka ete bato bákumisa ye. Tosengeli kobosana toli wana te ntango tozwi mokumba ya kobondela liboso ya lisangá. Tótalela toli mosusu oyo Yesu apesaki na likambo etali kobondela.

8. Ndenge Matai 6:7 emonisi yango, lolenge nini mabe ya kobondela tosengeli koboya?

8 “Ntango yo ozali kobondela, kolobaka makambo kaka moko wana te mbala na mbala, lokola bato ya bikólo mosusu basalaka, mpo bakanisaka ete bakoyokama mpo ete bazali koloba mingi.” (Mat. 6:7) Na maloba wana, Yesu atángaki lolenge mosusu ya mabe ya kobondela: kozongela maloba. Alingaki koloba te ete na mabondeli na biso, tosengeli ata moke te kozongela likambo oyo ezali kotungisa biso to maloba ya kopesa Yehova botɔndi. Na elanga ya Getesemane, na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu azongelaki maloba oyo alobaki liboso ntango azalaki kobondela.​—Mko. 14:32-39.

9, 10. Na ndenge nini tosengeli te kozongelaka makambo kaka moko na mabondeli na biso?

9 Ezali mabe kozongelaka mabondeli ndenge “bato ya bikólo mosusu” basalaka. “Mbala na mbala,” bato yango bazongelaka makambo oyo bakangá na motó, oyo ezalaka na maloba mosusu oyo ezangi ntina. Basambeli ya Baala bazwaki eyano te atako babelelaki nzambe yango ya lokuta “longwa na ntɔngɔ kino midi”; bazalaki koloba ete: “Ee Baala, zongiselá biso!” (1 Mik. 18:26) Lelo oyo, bamilio ya bato bazongelaka maloba ebeleebele na mabondeli na bango mpe bakanisaka ete “bakoyokama.” Nzokande, Yesu asalisi biso tóyeba ete “koloba mingi” mpe kozongela maloba kaka moko na mabondeli ezali na ntina te na miso ya Yehova. Yesu alobaki lisusu boye:

10 “Bongo, bómikómisa lokola bango te, mpo Nzambe Tata na bino ayebi makambo nini bozali na yango mposa liboso kutu ete bósɛnga ye.” (Mat. 6:8) Bakonzi mingi ya mangomba ya Bayuda bakómaki koloba maloba ebeleebele na mabondeli na bango ndenge bato ya bikólo mosusu bazalaki kosala. Kobondela na motema mobimba mpo na kopesa Nzambe lokumu, matɔndi, mpe koyebisa ye bamposa na biso, ezali na ntina mingi na losambo ya solo. (Filp. 4:6) Atako bongo, ekozala mabe mpenza soki tozali koloba maloba kaka moko mbala na mbala lokola nde Nzambe abosanaka makambo. Ntango tozali kobondela, tosengeli kobosanaka te ete tozali koloba na moto oyo ‘ayebi makambo oyo tozali na yango mposa liboso kutu ete tósɛnga ye.’

11. Makambo nini tosengeli kobosana te soki basɛngi biso tóbondela liboso ya lisangá?

11 Makambo oyo Yesu alobaki na ntina na mabondeli oyo Nzambe andimaka te esengeli kokundwela biso ete maloba ebeleebele mpe ya mindɔndɔ ekamwisaka Nzambe te. Tosengeli mpe kobosana te ete kosala libondeli liboso ya bato ebele ezali te libaku ya kokamwisa bayoki na biso; mpe soki libondeli eleki molai, bato bakobanda komituna ntango nini tokoloba “Amen” na esika báyoka biso. Lisusu, kopesa bayangani mayebisi to toli ntango tozali kosala libondeli eyokani te na makambo oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba.

Yesu alakisaki biso ndenge ya kobondela

12. Ndenge nini okoki kolimbola maloba “tiká nkombo na yo esantisama”?

12 Yesu apekisaki bayekoli na ye bábondelaka na ndenge ya mabe, kasi alakisaki mpe bango ndenge malamu ya kobondela. (Tángá Matai 6:9-13.) Esengeli te kokanga na motó libondeli ya ndakisa mpo na kozongelaka yango mbala na mbala. Kasi, libondeli yango ezali nde komonisa makambo oyo tosengeli kosɛngaka na mabondeli na biso. Na ndakisa, Yesu atángaki Nzambe na esika ya liboso na libondeli yango: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” (Mat. 6:9) Tobengaka Yehova “Tata na biso” mpo azali Mozalisi na biso oyo afandaka “na likoló,” mosika mpenza na biso awa na mabelé. (Det. 32:6; 2 Nta. 6:21; Mis. 17:24, 28) Kosalela maloba “na biso” ntango tozali kobondela ekundwelaka biso ete bandeko na biso baklisto mpe bazali na boyokani na Nzambe. Koloba “tiká nkombo na yo esantisama” ezali kosɛnga Yehova apɛtola nkombo na ye na makambo nyonso ya mabe oyo elobamá mpo na ye banda na botomboki ya Edene. Mpo na koyanola na libondeli yango, Yehova akolongola mabe nyonso awa na mabelé, mpe na ndenge yango, akosantisa nkombo na ye.​—Ezek. 36:23.

13. (a) Ndenge nini maloba “tiká bokonzi na yo eya” ekokokisama? (b) Kosalema ya mokano ya Nzambe na mabelé ekomema makambo nini?

13 “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Mat. 6:10) Na boyokani na maloba yango, tosengeli koyeba ete “bokonzi” ezali guvernɛma ya Masiya oyo epesami na mabɔkɔ ya Klisto mpe ya “bato ya bulɛɛ” oyo bakoyangela elongo na ye. (Dan. 7:13, 14, 18; Yis. 9:6, 7) Ntango tozali kobondela ete Bokonzi ya Nzambe “eya” tozali kosɛnga ete Bokonzi yango eya kobebisa banguna na yango nyonso. Yango ekosalema mosika te mpe ekobongisa nzela mpo mabelé mobimba ekóma paladiso epai boyengebene, kimya, mpe esengo ekozala. (Nz. 72:1-15; Dan. 2:44; 2 Pet. 3:13) Mokano ya Yehova ezali kosalema na likoló, mpe kosɛnga ete esalema mpe awa na mabelé ezali kosɛnga Nzambe akokisa mokano na ye mpo na mabelé, na ndakisa, alongola banguna na ye, ndenge asalaki na ntango ya kala.​—Tángá Nzembo 83:1, 2, 13-18.

14. Mpo na nini ebongi tósɛngaka “mampa na biso mpo na mokolo”?

14 “Pesá biso lelo mampa na biso mpo na mokolo oyo.” (Mat. 6:11; Luka 11:3) Ntango tozali kobondela bongo, tozali kosɛnga Nzambe apesa biso bilei “ya mokolo.” Yango emonisaka ete tondimaka ete Yehova azali na likoki ya kokokisa bamposa na biso mokolo na mokolo. Tosɛngaka te ete apesa biso biloko ebele mpo na kobomba. Kosɛnga bilei ya mokolo na mokolo ekoki kosalisa biso tóbosana te ete Nzambe asɛngaki Bayisalaele bálɔkɔtaka mana oyo ekoki mpo na “mokolo na mokolo.”​—Ex. 16:4.

15. Limbolá maloba “limbisá biso banyongo na biso ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.”

15 Likambo mosusu oyo Yesu alobaki ete tósɛngaka ebendi likebi na biso na likambo oyo tosengeli kosala. Yesu alobaki ete: “Limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tosili kolimbisa bato oyo bazali na banyongo na biso.” (Mat. 6:12) Evanzile ya Luka emonisi ete “banyongo” yango ezali nde “masumu.” (Luka 11:4) Ezali kaka soki “tosili kolimbisa” mabe oyo basusu basali biso nde tokoki kozala na elikya ete Yehova mpe akolimbisa biso. (Tángá Matai 6:14, 15.) Tosengeli kolimbisaka basusu na motema moko.​—Ef. 4:32; Kols. 3:13.

16. Kosɛnga ete komema biso na komekama te mpe bikisá biso na moto mabe elimboli nini?

16 “Komema biso na komekama te, kasi bikisá biso longwa na moto mabe.” (Mat. 6:13) Makambo wana mibale oyo tosengeli kosɛnga elimboli nini? Likambo ya solo yango oyo: Yehova amekaka biso te mpo tósala masumu. (Tángá Yakobo 1:13.) Satana, “moto mabe,” nde azali mpenza “Momeki.” (Mat. 4:3) Kasi, ntango mosusu Biblia elobaka ete Nzambe asali likambo moko, nzokande apesaki yango nzela ete esalema. (Luta 1:20, 21; Mos. 11:5) Na yango, ntango tobondelaka ete “komema biso na komekama te,” tosɛngaka Yehova apesa nzela te ete tókwea ntango tomekami mpo na kobuka mibeko na ye. Na nsuka, ntango tobondelaka ete “bikisá biso longwa na moto mabe” tosɛngaka Yehova ete apesa nzela te ete Satana alonga biso. Tokoki kozala na elikya ete ‘Nzambe akotika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema.’​—Tángá 1 Bakolinti 10:13.

‘Tókoba kosɛnga, koluka mpe kobɛta kɔkɔkɔ’

17, 18. ‘Kokoba kosɛnga, koluka mpe kobɛta kɔkɔkɔ’ elimboli nini?

17 Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ete: “Bótingama na mabondeli.” (Lom. 12:12) Yesu apesaki etinda oyo eyokani na toli yango ntango alobaki boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe epai ya moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.” (Mat. 7:7, 8) Ezali mabe te ‘kokoba kosɛnga’ eloko nyonso oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Na boyokani na maloba ya Yesu, ntoma Yoane akomaki boye: “Kondimisama tozali na yango na ntina etali [Nazmbe], yango oyo, ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”​—1 Yoa. 5:14.

18 Toli ya Yesu ete ‘tókoba kosɛnga mpe koluka’ elimboli ete tosengeli kotika te kobondelaka soki tozwi naino eyano te. Ezali mpe malamu ete ‘tókoba kobɛta kɔkɔkɔ’ mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe mpe kozwa mapamboli mpe matomba na yango. Kasi, tokoki mpenza kozala na elikya ete Nzambe akoyanola mabondeli na biso? Ɛɛ tokoki kozala na elikya soki tozali sembo epai ya Yehova, mpo Klisto alobaki ete: “Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe epai ya moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.” Makambo mingi oyo basaleli ya Yehova bakutanaki na yango emonisi ete Yehova azali mpenza Nzambe oyo ‘ayokaka mabondeli.’​—Nz. 65:2.

19, 20. Ndenge maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 7:9-11 emonisi yango, na ndenge nini Yehova azali lokola tata ya bolingo?

19 Yesu alobaki ete Nzambe azali lokola tata ya bolingo oyo apesaka bana na ye biloko ya malamu. Kanisá soki ozalaki wana ntango Yesu asalaki Lisolo Likoló ya Ngomba mpe oyokaki ntango alobaki boye: “Moto nani na kati na bino oyo mwana na ye asɛngi mampa​—akopesa ye libanga? To, mbala mosusu akosɛnga mbisi—​akopesa ye nyoka? Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na bino oyo azali na likoló akopesa biloko malamu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango?”​—Mat. 7:9-11.

20 Ata batata na biso, oyo bazali lokola “bato mabe” mpo bazali bato ya masumu, balingaka biso. Bakosaka biso te, kasi basalaka nyonso mpo na kopesa biso “makabo ya malamu.” Ndenge moko na batata na biso, Tata na biso ya likoló apesaka biso “biloko malamu,” na ndakisa elimo santu na ye. (Luka 11:13) Yango ekoki kolendisa biso tósalela na motema mobimba, Yehova, oyo apesaka biso “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.”​—Yak. 1:17.

Tókoba kozwa matomba na maloba ya Yesu

21, 22. Makambo nini ya ntina ezali na Lisolo Likoló ya Ngomba, mpe okanisi nini na maloba yango ya Yesu?

21 Ya solo, Lisolo Likoló ya Ngomba ezali lisolo eleki mosika masolo nyonso oyo esalemá awa na mabelé. Emonisi makambo ya Nzambe na ndenge ya polele mpe ya pɛtɛɛ. Ndenge tomoni yango na masolo oyo misato, tokoki kozwa matomba mingi soki tosaleli toli oyo ezali na lisolo yango oyo Yesu asalaki. Maloba wana ya Yesu ekoki kobongola bomoi na biso sikoyo mpe kopesa biso elikya ya kozala na esengo na mikolo ezali koya.

22 Na masolo yango, totaleli kaka mwa makambo moke ya motuya oyo ezali na Lisolo Likoló ya Ngomba. Tokoki komona mpenza ntina oyo bato oyo bayokaki lisolo yango “bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.” (Mat. 7:28) Na ntembe te, biso mpe tokokamwa soki totondisi makanisi mpe mitema na biso na maloba wana mpe makambo mosusu ya motuya oyo Yesu Klisto, Moteyi monene, alobaki.

[Okopesa eyano nini?]

• Yesu alobaki nini mpo na mabondeli ya bakosi?

• Mpo na nini tosengeli te kozongelaka maloba kaka moko ntango tozali kobondela?

• Makambo nini ezali na libondeli ya ndakisa?

• Ndenge nini tokoki ‘kokoba kosɛnga, koluka mpe kobɛta kɔkɔkɔ’?

[Elilingi na lokasa 15]

Yesu apamelaki bakosi oyo bazalaki kobondela kaka mpo bato bámona mpe báyoka bango

[Elilingi na lokasa 17]

Oyebi mpo na nini ebongi ete tóbondelaka mpo na bilei ya mokolo na mokolo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto