Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/2 nk. 16-17
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe andimaka mabondeli nyonso?
  • Makambo nini tosengeli kosɛngaka?
  • Tosengeli kobondela mpo na basusu?
  • Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kobondela?
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/2 nk. 16-17

Yesu ateyi biso

Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka

Yesu azalaki mbala na mbala kokende na esika oyo azali kaka ye moko mpo na kobondela; alendisaki mpe bayekoli na ye básalaka bongo. Biblia elobi boye: “Na libaku moko wana azalaki kobondela na esika moko, ntango atikaki, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye ete: ‘Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela’ . . . Alobaki na bango ete: ‘Ntango bozali kobondela, bóloba, “Tata, tiká nkombo na yo esantisama.”’” (Luka 5:16; 11:1, 2) Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete tosengeli kobondelaka Tata na ye, Yehova. Kaka ye nde azali Mozalisi na biso mpe “Moyoki ya mabondeli.”​—Nzembo 65:2, NW.

Nzambe andimaka mabondeli nyonso?

Nzambe asepelaka te na mabondeli oyo moto akangá na motó. Yesu alobaki boye: “Ntango yo ozali kobondela, kolobaka makambo kaka moko wana te mbala na mbala.” (Matai 6:7) Tosengeli kofungwela Tata na biso ya likoló motema ntango tozali kosolola na ye. Na ndakisa moko oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, amonisaki ete Nzambe andimaki libondeli ya moto ya masumu oyo andimaki mpenza kobongola motema, kasi aboyaki libondeli ya moto ya lolendo oyo azalaki kolanda mibeko. (Luka 18:10-14) Na yango, mpo Nzambe ayoka mabondeli na biso, tosengeli koluka na komikitisa mpenza kosala mokano na ye. Yesu alobaki boye: “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo . . . nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:28, 29) Yesu alobaki na libondeli boye: “Ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.”​—Luka 22:42.

Makambo nini tosengeli kosɛngaka?

Lokola Satana abebisá lokumu ya nkombo ya Nzambe, Yesu alobaki ete: “Bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.’” (Matai 6:9, 10) Tosengeli kosɛngaka Bokonzi ya Nzambe eya, mpo yango ezali boyangeli oyo Nzambe akosalela mpo na kokokisa mokano na ye na likoló mpe na mabelé. Yesu alobaki ete tokoki mpe kobondela mpo na kosɛnga “mampa na biso mpo na mokolo.” Tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa biso tózwa mosala, esika ya kofanda, eloko ya kolata, tózala nzoto kolɔngɔnɔ, mpe asalisa biso mpo na makambo mosusu. Yesu alobaki mpe ete tosengeli kobondelaka mpo na bolimbisi ya masumu na biso.​—Luka 11:3, 4.

Tosengeli kobondela mpo na basusu?

Yesu azalaki mpe kobondela mpo na basusu. Biblia elobi ete: “Bamemelaki ye bana mike, mpo ete atya mabɔkɔ na ye likoló na bango mpe abondela.” (Matai 19:13) Yesu alobaki na ntoma Petelo boye: “Nasili kosala lilɔmbɔ mpo na yo ete kondima na yo elɛmba te.” (Luka 22:32) Yesu alendisaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na basusu, ata mpo na bato oyo bazalaki konyokola bango mpe kofinga bango.​—Matai 5:44; Luka 6:28.

Mpo na nini tosengeli kolɛmba te kobondela?

Yesu azalaki kozwa ntango mpo na kobondela, mpe alendisaki bayekoli na ye ‘bábondelaka ntango nyonso mpe bálɛmba te.’ (Luka 18:1) Yehova asɛngi biso tóyebisaka ye ntango nyonso bamposa na biso mpo na komonisa ete totyelaka ye motema. Yesu alobaki ete, “bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.” Kasi, yango elingi koloba te ete Nzambe ayanolaka noki te na mabondeli ya baoyo balingaka mpe batosaka ye lokola Tata na bango. Kutu, Yesu alobaki boye: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!”​—Luka 11:5-13.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 17 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a

[Maloba na nse ya lokasa 16]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto