Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/3 lok. 24
  • Lisekwa ya Lazalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisekwa ya Lazalo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Kobomama ya Sodoma mpe Gomola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu abikisi bato na ndenge ya likamwisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yesu alongi komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yesu akamwisi bayoki na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/3 lok. 24

Mpo na bilenge

Lisekwa ya Lazalo

Malako: Tángá lisolo oyo na esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango esalemaki. Salá lokola nde ozali komona makambo yango mpe ozali koyoka mingongo. Omityá na esika ya bato oyo balobeli.

TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ YOANE 11:1-45.

Ntango otángi vɛrsɛ 21 mpe 32, okanisi ete Malata ná Malia bayokaki ndenge nini?

․․․․․

Nsima ya kotánga vɛrsɛ 33 mpe 35, omoni Yesu azali kosala nini?

․․․․․

Meká naino kokanisa na makambo oyo ezali na vɛrsɛ 43 mpe 44, Lazalo mpe bato mosusu oyo bazalaki wana bayokaki ndenge nini?

KƆTÁ NA MOZINDO.

Kolongwa esika Yesu azalaki tii kokóma na Betani ezalaki mobembo ya mikolo mibale. Kasi, mpo na nini Yesu akendeki mbala moko te na Betani? (Tángá lisusu vɛrsɛ 6.)

․․․․․

Ndenge nini Biblia emonisi ete Malia ná Malata bazalaki kosepela na makambo ya Nzambe? (Luka 10:38, 39; Yoane 11:24)

․․․․․

Mpo na nini Yesu asekwisaki bato atako basengelaki kokufa lisusu? (Malako 1:41, 42; Yoane 5:28, 29; 11:45)

․․․․․

SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Likoki mpe bolingo oyo Yesu azalaki na yango ya kosekwisa bakufi.

․․․․․

Mawa makasi oyo Yesu azalaki na yango mpo na bato oyo bandeko na bango bakufaki.

․․․․․

NA LISEKWA, OKOLINGA KOKUTANA NA NANI?

․․․․․

NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

․․․․․

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto