Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/3 nk. 3-5
  • “Anzelu ya Yehova atelemaka penepene”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Anzelu ya Yehova atelemaka penepene”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balendisi ngai nayekola Biblia
  • Mobongisi-nzela na Écosse mpe na Irlande
  • Nakei na Gileadi
  • Nazongi na Irlande
  • Kosakola na ntango ya mobulu
  • Landá kolóna na ntembe te, jéhovah akokólisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Eloko eleki kitoko mpo na yango napesaki bomoi na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Natyaki miso mpe motema na ngai na libonza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kosala oyo Yehova asɛngi ememaka mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/3 nk. 3-5

“Anzelu ya Yehova atɛlɛmaka penepene”

Lisolo ya Christabel Connell

Lokola makanisi na biso nyonso ekendaki na koyanola na mituna ya Biblia oyo Christopher azalaki kotuna, tozalaki koyeba te ete ngonga epusani, mpe ete Christopher azalaki kotalatala na lininisa. Nsukansuka, atalaki biso mpe alobaki ete: “Sikoyo bokoki kokende, likama ezali lisusu te.” Akendaki kotika biso tii na esika totikaki bavelo na biso mpe atombelaki biso butu malamu. Likama nini Christopher amonaki?

NTANGO nabotamaki, bapesaki ngai nkombo Christabel Earl. Ezalaki na engumba Sheffield, na Angleterre, na 1927. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bɔmbi epanzaki ndako na biso, yango wana batindaki ngai nakende kofanda epai ya nkɔkɔ na biso ya mwasi mpo na kosilisa kelasi. Na eteyelo ya Katolike oyo nakɔtaki, nazalaki ntango nyonso kotuna bamamɛlo ntina oyo mabe etondi na mokili. Ezala bango to bato ya mangomba mosusu, bakokaki te kopesa ngai eyano ya malonga.

Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nayekolaki mosala ya lifulume. Nazwaki mosala na lopitalo monene ya Paddington na Londres, kasi kuna, mobulu ezalaki lisusu makasi koleka. Kaka ntango ndeko na ngai ya mobali atikaki biso mpo na kokende na etumba ya Corée, namonaki mibali mibale bazali kobunda liboso ya lopitalo. Moko abɛtaki moninga tii abomaki ye liso, kasi ata moto moko te ayaki kosunga oyo babɛtaki. Na ntango wana, nazalaki kokende na mama epai ya bato oyo balukaka kosolola na bato oyo bakufá. Atako bongo, nayebaki kaka te ntina oyo mabe etondi na mokili.

Balendisi ngai nayekola Biblia

Mokolo moko, yaya na ngai John oyo akómaki Motatoli ya Yehova ayaki kotala biso. Atunaki ngai boye: “Oyebi ntina oyo makambo ya mabe ezali kosalema?” Nayanolaki ete “nayebi te.” Afungolaki Biblia na ye mpe atángaki Emoniseli 12:7-12. Yango esalisaki ngai nayeba ete mabe oyo etondi na mokili ezali kouta epai ya Satana ná bademo na ye. Yango wana, nandimaki koyekola Biblia. Nzokande, na ntango wana kobanga bato epekisaki ngai kozwa batisimo.​—Mas. 29:25.

Yaya na ngai ya mwasi Dorthy akómaki mpe Motatoli. Ntango ye ná fianse na ye, Bill Roberts, bautaki na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na New York na 1953, nayebisaki bango ete nayekolaki Biblia. Bill atunaki ngai ete: “Otángaki bavɛrsɛ nyonso? Otyaki mikɔlɔtɔ na biyano na buku na yo?” Ntango nalobaki ete nasalaki yango te, alobaki ete: “Wana oyekoli naino te! Luká ndeko mwasi yango bóbandela koyekola!” Na ntango wana, bademo bakómaki kotungisa ngai. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki kobondela Yehova abatela ngai mpe alongola ngai na boombo na bango.

Mobongisi-nzela na Écosse mpe na Irlande

Nazwaki batisimo na mokolo ya 16 Yanuali 1954, nasilisaki mosala na ngai ya lifulume na sanza ya Mai mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Yuni. Sanza mwambe na nsima, batindaki ngai mobongisi-nzela monene na engumba Grangemouth, na Écosse. Kuna, atako nazalaki kosala na esika oyo Batatoli bazalaki te, namonaki ete baanzelu ya Yehova bazalaki ‘kotɛlɛma penepene’ na ngai.​—Nz. 34:7, NW.

Na 1956, batindaki ngai na Irlande. Ngai ná babongisi-nzela mosusu mibale tokendaki na engumba Galway. Na mokolo ya liboso, nakendaki kobɛta porte ya sango moko. Mwa miniti na nsima, polisi moko ayaki mpe amemaki ngai ná moninga na ngai na biro na bango. Azwaki bankombo mpe baadrɛsi na biso mpe mbala moko akendaki na telefone. Toyokaki ndenge alobaki ete, “Ɛɛ, sango, nayebi esika bafandaka.” Nzokande, sango nde atindaki ye! Basɛngaki nkolo ndako oyo tozalaki kofanda abengana biso, yango wana biro ya filiale esɛngaki biso tólongwa na esika wana. Tokómaki na gare ya engbunduka miniti zomi nsima ya ngonga oyo engbunduka esengelaki kokende. Kasi, engbunduka ezalaki kaka kozela biso, mpe moto moko azalaki wana mpo na kotala soki tokɔti. Likambo yango esalemaki pɔsɔ misato mpamba nsima ya kokóma na biso na engumba Galway!

Batindaki biso na Limerick, engumba mosusu epai Lingomba ya Katolike ezalaki makasi. Bato bazalaki ntango nyonso kowolola biso. Bato mingi bazalaki kobanga kosolola na biso. Mbula moko liboso, babɛtaki ndeko mobali moko na Cloonlara, engumba moko moke oyo ezali pene na Galway. Tozalaki na esengo ya kokutana na Christopher, moto oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo, oyo asɛngaki biso tózongela ye mpo na koyanola na mituna na ye. Mokolo moko, ntango tokendaki kotala Christopher, sango ayaki wana mpe asɛngaki ye abengana biso. Christopher aboyaki mpe alobaki na ye boye: “Ngai moko nde nabengaki basi oyo na ndako na ngai, mpe babɛtaki porte liboso ya kokɔta. Nzokande yo, nabengi yo te, mpe obɛti ata porte te liboso ya kokɔta.” Sango asilikaki mpe akendaki.

Toyebaki te, nzokande sango asangisaki ebele ya bato mpe bazalaki kozela biso na libándá. Lokola Christopher ayebaki ete bato yango bazali na nkanda na biso, asalaki ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo. Atikaki biso epai na ye tii ntango bato yango bakendaki. Toyokaki na nsima ete babenganaki Christopher ná libota na ye mpe bakendaki na Angleterre.

Nakei na Gileadi

Na 1958, ntango nazalaki komibongisa mpo na kokende na New York, na liyangani ya mikili mingi oyo motó ya likambo na yango ezalaki “Mokano ya Nzambe,” babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 33 ya Gileadi. Nsima ya liyangani yango, nazongaki lisusu epai na biso te, kasi nakendaki kosala na engumba Collingwood, na etúká ya Ontario na Canada, tii ntango kelasi ya Gileadi ebandaki na 1959. Kasi na liyangani yango, nakutanaki na Eric Connell. Ayekolaki solo na 1957 mpe akómaki mobongisi-nzela na 1958. Nsima ya liyangani, azalaki kotindela ngai mikanda mikolo nyonso ntango nazalaki na Canada mpe ntango nazalaki na kelasi ya Gileadi. Nazalaki komituna soki tokosuka ndenge nini ntango nakosilisa kelasi ya Gileadi.

Kokɔta kelasi ya Gileadi ezalaki likambo moko ya ntina mingi na bomoi na ngai. Tozalaki kelasi moko na Dorothy ná mobali na ye. Batindaki Dorothy ná mobali na ye na Portugal. Likambo ya kokamwa, batindaki ngai na Irlande. Nalɛmbaki nzoto na ndenge batindaki ngai elongo na yaya na ngai te! Natunaki moko ya balakisi na biso soki nasalaki likambo moko ya mabe. Ayanolaki ete, “Te osali likambo moko ya mabe te.” “Yo ná moninga na yo Eileen Mahoney bondimaki kokende bipai nyonso na mokili,” ata na Irlande.

Nazongi na Irlande

Nazongaki na Irlande na sanza ya Augusto 1959 mpe batindaki ngai na lisangá ya Dun Laoghaire. Na ntango yango, Eric azongaki na Angleterre mpe asepelaki ndenge tokómaki pene. Ye mpe azalaki na mposa ya kokóma misionɛrɛ. Amonaki ete lokola Irlande ezalaki teritware malamu mpo na mosala ya misionɛrɛ, akoya kosala kuna lokola mobongisi-nzela. Ayaki na Dun Laoghaire, mpe tobalanaki na 1961.

Sanza motoba na nsima, Eric asalaki aksida na tukutuku. Abukanaki mikuwa ya motó, mpe minganga bayebaki te soki akobika. Nsima ya kolekisa pɔsɔ misato na lopitalo, abimaki mpe nakobaki kosalisa ye sanza mitano na ndako tii ntango ayokaki malamu. Nakobaki kosala oyo nakokaki na mosala ya kosakola.

Na 1965 batindaki biso na lisangá moko oyo ezalaki na basakoli kaka mwambe na Sligo, libongo moko na bokula ya nɔrdi-wɛsti. Mbula misato na nsima, tokendaki na lisangá mosusu ya moke oyo ezalaki na Londonderry, mosika na nɔrdi. Mokolo moko, ntango toutaki na mosala ya kosakola, tomonaki batye kangá-moyibi na nzela oyo tozalaki koleka mpo na kokende na ndako na biso. Mobulu ebandaki na nɔrdi ya Irlande. Bilenge ya mobulu batumbaki mituka. Engumba ekabwanaki na Baprotesta mpe Bakatolike. Ezalaki mpenza likama kolongwa na ngámbo moko mpo na kokende na ngámbo mosusu.

Kosakola na ntango ya mobulu

Nzokande, mosala ya kosakola ezalaki kosɛnga biso tókendaka bisika nyonso. Na mbala yango mpe, tomonaki lokola nde baanzelu bazalaki kotɛlɛma penepene na biso. Ntango tomoni ete mobulu ebimi esika tozali, tozalaki kolongwa wana nokinoki mpe kozonga soki kimya ekɔti. Mokolo moko, mobulu esalemaki pene na ndako na biso; batumbaki magazini moko oyo ezalaki kotɛka langi mpe biloko oyo ezalaki kozika ezalaki koya kokwea na lininisa na biso. Tokokaki kolala te mpo tozalaki kobanga noki ndako na biso ezwa mɔtɔ. Nsima ya kokende na Belfast, na 1970, toyokaki ete bɔmbi moko epanzanaki mpe ezikisaki magazini wana mpe ndako oyo tozalaki kofanda ezwaki mɔtɔ.

Mokolo mosusu, ngai ná ndeko mwasi moko tobimaki na mosala ya kosakola mpe tomonaki tiyo ebimi na lininisa moko. Tolekaki, mpe mwa miniti na nsima tiyo yango ebimisaki mɔtɔ. Bato ya kartye yango bakanisaki ete biso nde totyaki tiyo yango! Na ntango yango, ndeko mwasi moko oyo azalaki kofanda na kartye yango abengaki biso tókɔta na ndako na ye. Yango wana, bato ya kartye yango bandimaki ete biso te nde tosalaki likambo yango.

Na 1971, tozongaki na Londonderry mpo na kotala ndeko mwasi moko. Ntango toyebisaki ye nzela oyo tolekaki, atunaki biso boye: “Moto moko te azalaki na esika oyo bakangi nzela?” Ntango tolobaki ete “bato bazalaki, kasi bakipaki biso te,” akamwaki makasi. Mpo na nini? Mpamba te, na mikolo oyo eutaki koleka babɔtɔlaki mituka ya doktɛrɛ moko mpe ya polisi moko mpe batumbaki yango.

Na 1972, tokendaki na Cork. Na nsima tokendaki kosala na Naas, mpe na nsima na Arklow. Nsukansuka, na 1987, batindaki biso na Castlebar epai tozali kosala tii lelo oyo. Awa, tozwaki libaku ya kopesa mabɔkɔ na kotonga Ndako ya Bokonzi. Eric abɛlaki makasi na 1999. Kasi, na lisungi ya Yehova mpe bolingo ya bandeko ya lisangá, nalongaki mokakatano yango mpe nasalisaki ye tii ntango akómaki nzoto kolɔngɔnɔ.

Ngai ná Eric tokɔtaki Eteyelo mpo na babongisi-nzela mbala mibale. Azali kokoba kosala lokola nkulutu. Nabɛlaka maladi ya mingai mpe balongolá ngai mikuwa ya loketo mpe ya mabɔlɔngɔ mpe batyá mosusu. Atako nakutanaki na botɛmɛli makasi ya bato ya mangomba mpe na mobulu ya bato ya politiki mpe na mikakatano mosusu, mokakatano ya monene koleka oyo nakutani na yango ezali ntango bapekisaki ngai kotambwisa motuka. Yango ezalaki mokakatano monene, mpamba te nazalaki lisusu na likoki te ya kokende esika nyonso oyo nalingi. Bandeko ya lisangá basungaki ngai mingi mpenza. Nakómá kotambola na nzete, mpe nasalelaka velo ya bibɔsɔnɔ soki nalingi kokende mosika.

Soki tosangisi bambula oyo ngai ná Eric tolekisi na mosala ya mobongisi-nzela monene, ekopesa mbula koleka 100, mbula 98 awa na Irlande. Tozali na mposa ya kotika mosala oyo te, atako tokómi mibange. Tozali kozela likamwisi te, kasi tozali kondima ete baanzelu ya Yehova ya nguya “batɛlɛmaka penepene” na baoyo babangaka Nzambe mpe basalelaka ye na bosembo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto