Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/4 lok. 31
  • Tata ya bitike

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tata ya bitike
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya Batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Monisá ete omibanzabanzaka mpo na ‘bitike’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Yehova azali ‘Tata ya bana oyo batata bakufá’
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Bómema mokumba na bino ya kobatela libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/4 lok. 31

Pusaná penepene na Nzambe

Tata ya bitike

Exode 22:22-24

“YE AZALI tata ya bitike . . . azali Nzambe kuna na efandelo na ye ya bulɛɛ.” (Nzembo 68:5) Maloba yango ezali koteya biso likambo moko ya ntina mingi mpo na Yehova Nzambe​—amibanzabanzaka mpo na babola. Mibeko oyo apesaki Bayisalaele ezalaki komonisa polele ete amibanzabanzaka mpo na bitike. Tótalela mbala ya liboso oyo Biblia esaleli maloba “bana mibali oyo batata bakufá,”a na Exode 22:22-24, NW.

Nzambe alobaki boye: “Mwana mobali oyo tata akufá, bosengeli komonisa ye mpasi te.” (Vɛrsɛ 22, NW) Yango ezalaki kaka te mpo na kosunga bana yango, kasi ezalaki nde mobeko ya Nzambe. Bato mosusu bakokaki konyokola mwana oyo tata na ye akufaki mpo azalaki lisusu te na moto ya kobatela mpe kokokisa bamposa na ye. Ata Moyisalaele moko te asengelaki “konyokola” mwana oyo tata na ye akufá. Na Babiblia mosusu, liloba “konyokola” ebongolami na “kosala mabe,” mpe “kolyela.” Konyokola mwana oyo tata na ye akufá ezalaki mabe na miso ya Nzambe. Ndenge nini Nzambe azalaki kotalela likambo yango?

Mobeko elobaki boye: “Soki omonisi ye mpasi ata moke, mpe soki aleleli ngai ata moke, nakoyoka solo kolela na ye.” (Vɛrsɛ 23, NW) Vɛrsɛ 22 elobi “bosengeli,” nzokande vɛrsɛ 23 elobi “soki omonisi.” Yango elingi koloba ete ezala ekólo mobimba ya Yisalaele to mpe Moyisalaele mokomoko basengelaki kotosa mobeko yango ya Nzambe. Yehova azalaki kotala; azalaki kotya litoi na ye na kolela ya mwana mobali oyo tata na ye akufá, azalaki pene ya kosalisa ye.​—Nzembo 10:14; Masese 23:10, 11.

Kasi, nini ezalaki kosalema soki moto moko anyokoli mwana oyo tata na ye akufá, mpe mwana yango aleli epai ya Nzambe? Yehova alobaki boye: “Nkanda na ngai ekongala mpenza, mpe nakoboma bino solo na mopanga.” (Vɛrsɛ 24, NW) Buku moko elobi ete “maloba yango elimboli ete ‘mpe zolo na ngai ekokóma mɔtɔ,’ yango ezali maloba ya elilingi mpo na komonisa nkanda makasi.” Simbá ete Yehova atikaki likambo yango na mabɔkɔ ya basambisi na Yisalaele te. Nzambe ye moko asengelaki kopesa etumbu epai ya moto nyonso oyo azali konyokola etike.​—Deteronome 10:17, 18.

Yehova abongwani te. (Malaki 3:6) Amibanzabanzaka mpo na bitike. (Yakobo 1:27) Komikosa te, Tata ya bitike asilikaka ntango bazali konyokola bana yango. Baoyo bazali konyokola bitike, bakolonga te kokima “nkanda monene ya Yehova.” (Sefania 2:2) Bato yango bakoyeba ete “ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi.”​—Baebele 10:31.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba “bana mibali oyo batata bakufá” ezali mbala soki 40 na Biblia. Atako liloba ya Liebele oyo basaleli ebongolami na mwana mobali, tosengeli te kokanisa ete bavɛrsɛ yango etaleli te mwana mwasi oyo azali etike. Mibeko ya Moize mpo na mwana mobali oyo tata na ye akufá etalelaki mpe mwana mwasi.​—Mituya 27:1-8.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto