Monisá ete omibanzabanzaka mpo na ‘bitike’
1 Yehova azali “tata ya bitike.” (Nz. 68:5) Ndenge oyo amibanzabanzaka mpo na bango emonani na etinda oyo apesaki na libota ya Yisalaele: “Bokopesa mawa te na mwasi akufeli mobali, to na mwana etike mpe te. Soki okopesa bango mawa mpe babeleli epai na ngai, nakoyoka kolela na bango solo.” (Ex. 22:22, 23) Na kati ya Mibeko ya Nzambe, ezalaki mpe na bibongiseli mpo na kosunga bango na mosuni. (Det. 24:19-21) Na lisangá ya boklisto, basambeli ya solo balendisami na “kobatela bitike ná basi bakufelá mibali na kati na bolɔzi na bango.” (Yak. 1:27) Ndenge nini tokoki komekola lolenge oyo Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali kobɔkwama na moboti se moko to baoyo bazali na mabota oyo baboti bazali na lingomba moko te?
2 Koteya makambo ya elimo: Soki ozali kobɔkɔla bana na yo yo moko to ozali na mobalani oyo azali mondimi te, ekoki kozala mpasi mpo oyekola Biblia mbala na mbala na bana na yo. Kasi koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe na ndenge oyo etalelaka bamposa ya libota ezali na ntina mingi soki olingi bana na yo bákóma mikóló oyo bazali na bokatikati mpe oyo bakɔmelá. (Mas. 22:6) Ezali mpe na ntina mingi osololaka na bango makambo ya elimo mokolo na mokolo. (Det. 6:6-9) Na bantango mosusu, okolɛmba nzoto, kasi kotika te. Sɛngá Yehova apesa yo nguya mpe atambwisa yo mpo na “kokoba kobɔkɔla [bana na yo] na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”—Ef. 6:4.
3 Yebisá bankulutu soki olingi básalisa yo mpo na kokokisa mikumba na yo ya elimo. Bakopesa yo toli oyo ebongi to bakosunga yo mpo na kosala mpe kolanda ebongiseli moko malamu na makambo ya elimo na libota na yo.
4 Ndenge oyo basusu bakoki kosunga: Na ekeke ya liboso, Timote akómaki kosalela Yehova na molende atako akolaki na libota oyo baboti bazalaki na lingomba moko te. Na ntembe te, ezalaki mingimingi mpo na milende ya solosolo oyo mama na nkɔkɔ na ye basalaki mpo na koteya ye makomi mosantu uta bomwana na ye nde akómaki bongo. (Mis. 16:1, 2; 2 Tim. 1:5; 3:15) Kasi, azwaki mpe matomba na boninga na ye elongo na baklisto mosusu, lokola ntoma Paulo, oyo abengaki ye “mwana na [ye] molingami mpe ya sembo na kati ya Nkolo.”—1 Kol. 4:17.
5 Ndenge moko mpe lelo oyo, matomba ezwamaka ntango bandeko mibali mpe basi oyo bakɔmɛli na elimo bamibanzabanzaka mpo na bitike oyo bazali na lisangá. Oyebi nkombo ya mokomoko na bango? Osololaka na bango na makita ya boklisto mpe na mabaku mosusu? Sɛngá bango bóbima elongo na mosala ya kosakola. Ntango mosusu bokoki kobengisa bango, elongo na moboti na bango oyo bazali na ye, to oyo azali mondimi, mpo básangana na boyekoli ya Biblia ya libota na bino to na kominanola elongo na bino. Ntango bilenge yango bazali kozwa yo lokola moninga na bango, mbala mingi, bakolanda ndakisa mpe bilendiseli na yo.—Filp. 2:4.
6 Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na bitike mpe apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kosalisa bango bándima solo, bálinga yango mpe bátambwisa bomoi na bango na yango. Bato mingi oyo bakolaki na mabota oyo moboti azali se moko to oyo baboti bazali na lingomba moko te balendisamaki ndenge wana mpe lelo oyo bazali kosalela Nzambe na bosembo mpenza lokola babongisi-nzela, basaleli na misala, bankulutu, bakɛngɛli-batamboli, bamisionɛrɛ, to bazali basangani ya libota ya Betele. Tiká ete biso nyonso tóluka banzela mpo na ‘kofungwama’ na kati ya bolingo oyo tomoniselaka bitike, wana tozali komekola Tata na biso ya makoló.—2 Kol. 6:11-13.