Tózala na botɔndi epai ya Yesu—Davidi Monene mpe Salomo Monene
“Talá! eloko oyo eleki Salomo ezali awa.”—MAT. 12:42.
1, 2. Na makanisi ya bato, mpo na nini ekokaki kokamwisa ete Nzambe atinda Samwele mpo apona Davidi lokola mokonzi?
MOSAKOLI Samwele amonaki ete Davidi abongi nde kozala mobateli ya bampate, kasi mokonzi te. Longola yango, Davidi abotamaki na Beteleme, engumba oyo eyebanaki mingi te. Biblia elobi ete engumba yango ezalaki “moke kati na mabota ya Yuda.” (Mika 5:2) Atako bongo, Yehova atindaki mosakoli Samwele apakola elenge yango oyo abotamaki na engumba ya moke mafuta mpo akóma mokonzi ya Yisalaele.
2 Davidi azalaki te mwana ya liboso oyo tata na ye Yese alakisaki epai ya Samwele mpo apakola ye mafuta akóma mokonzi; azalaki mpe mwana ya mibale to ya misato te. Davidi azalaki mwana ya nsuka na kati ya bana mwambe ya Yese; kutu azalaki wana te ntango Samwele ayaki epai ya Yese mpo na kopona moko ya bana na ye oyo asengelaki kokóma mokonzi ya ekólo. Kasi, Yehova aponaki nde Davidi, oyo bato bazalaki komona ntina te.—1 Sam. 16:1-10.
3. (a) Eloko nini ya ntina Yehova amonaka epai ya moto? (b) Nini esalemaki ntango Davidi aponamaki mokonzi?
3 Yehova amonaki eloko oyo Samwele akokaki komona te. Nzambe amonaki bizaleli ya Davidi, mpe asepelaki na ye. Na miso ya Nzambe, eloko oyo eleki ntina ezali nde bomoto na biso ya kati, kasi te ndenge tomonanaka na libándá. (Tángá 1 Samwele 16:7.) Na yango, ntango Samwele amonaki ete Yehova aponaki ata mwana moko te na kati ya bana nsambo ya Yese, atindaki bákende kozwa mwana ya nsuka esika akendaki koleisa bampate. Biblia elobi boye: “Boye [Yese] atindaki mpe ayeisaki [Davidi]. Azalaki motane mpe na miso malamu mpe elongi na ye kitoko. [Yehova] alobaki ete, Tɛlɛmá mpe pakolá ye mafuta mpo ete ye oyo! Boye Samwele akamataki liseke ezali na mafuta mpe apakolaki ye kati na bandeko na ye; mpe [elimo ya Yehova, NW] ekwelaki Davidi longwa na mokolo yango.”—1 Sam. 16:12, 13.
Davidi azalaki elilingi ya Klisto
4, 5. (a) Lobelá mwa bokokani oyo ezali kati na Yesu mpe Davidi. (b) Mpo na tokoki kobenga Yesu Davidi Monene?
4 Lokola Davidi, Yesu mpe abotamaki na Beteleme mbula soki 1100 nsima ya kobotama ya Davidi. Na makanisi ya bato mingi, Yesu azalaki komonana lokola mokonzi te. Elingi koloba azalaki te mokonzi oyo Bayisalaele mingi bazalaki kozela. Kasi, ndenge ezalaki mpo na Davidi, Yehova aponaki nde Yesu. Ndenge kaka Yehova alingaki Davidi, alingaki mpe Yesu.a (Luka 3:22) Ndenge esalemaki mpo na Davidi, elimo ya Yehova ekitelaki mpe Yesu.
5 Ezali na makambo mosusu oyo Davidi ná Yesu bakokani na yango. Na ndakisa, Ahitofele, mopesi-toli ya Davidi atɛkaki ye; ndenge moko mpe, Yuda Mokeliota, ntoma moko ya Yesu, atɛkaki ye. (Nz. 41:9; Yoa. 13:18) Davidi ná Yesu bazalaki mpenza na molende mpo na esika ya losambo ya Yehova. (Nz. 27:4; 69:9; Yoa. 2:17) Yesu azalaki mpe mozwi-ya-libula ya Davidi. Liboso Yesu abotama, anzelu moko ayebisaki mama na ye ete: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye.” (Luka 1:32; Mat. 1:1) Nzokande, lokola bilaka nyonso oyo etaleli Masiya ekokisami epai na ye, Yesu aleki Davidi mosika. Azali Davidi Monene, Masiya Mokonzi oyo bato bazalaki kozela banda kala.—Yoa. 7:42.
Tólanda Mokonzi oyo azali mpe Mobateli ya bampate
6. Ndenge nini Davidi amonisaki ete azali mobateli malamu ya bampate?
6 Yesu azali mpe mobateli ya bampate. Mobateli ya bampate ya malamu asalaka nini? Atambwisaka etonga na ye, aleisaka yango mpe abatelaka yango na bosembo mpe na mpiko nyonso. (Nz. 23:2-4) Ntango Davidi azalaki elenge, azalaki mobateli ya bampate, mpe abatelaki malamu mpenza bampate ya tata na ye. Amonisaki mpiko ntango etonga ekómaki na likama mpe atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobatela bampate yango liboso ya nkɔsi mpe ngombolo.—1 Sam. 17:34, 35.
7. (a) Nini ebongisaki Davidi mpo na mokumba na ye ya mokonzi? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali Mobateli ya bampate oyo aleki malamu?
7 Bambula oyo Davidi alekisaki na bilanga mpe na bangomba ntango azalaki kotambwisa bampate ebongisaki ye mpo na mikumba minene ya kobatela ekólo Yisalaele.b (Nz. 78:70, 71) Yesu mpe amonisaki ete azali mobateli ya bampate ya malamu mingi. Yehova apesaka ye makasi mpe atambwisaka ye mpo akoka kobatela “etonga moke” na ye mpe “bampate mosusu.” (Luka 12:32; Yoa. 10:16) Na yango, Yesu azali Mobateli ya bampate oyo aleki malamu. Ayebi malamu etonga na ye mpe abengaka mpate mokomoko na nkombo na yango. Alingaka bampate na ye mingi mpe ntango azalaki awa na mabelé amikabaki mpo na yango. (Yoa. 10:3, 11, 14, 15) Lokola Yesu azali Mobateli ya bampate oyo aleki malamu, akokisi likambo moko oyo Davidi akokaki kosala te. Mbeka ya lisiko na ye efungweli bato nzela ya kosikolama na liwa. Eloko moko te ekopekisa ye apesa “etonga moke” bomoi ezangi kufa na likoló mpe apesa “bampate mosusu” bomoi ya seko na mokili ya sika ya boyengebene, epai bato ya mabe bakozala te.—Tángá Yoane 10:27-29.
Tólanda Mokonzi oyo azali kolonga
8. Mpo na nini tokoki koloba ete Davidi azalaki mokonzi ya makasi?
8 Mokonzi Davidi azalaki mobundi ya mpiko oyo abatelaki mabelé ya basaleli ya Nzambe, mpe “[Yehova] abatelaki Davidi bipai nyonso ekendaki ye.” Ntango Davidi azalaki mokonzi, azalaki koyangela banda na ebale ya Ezipito tii na Ebale Efalata. (2 Sam. 8:1-14) Na lisalisi ya Yehova, Davidi akómaki mokonzi ya nguya. Biblia elobi boye: “Lokumu ya Davidi epalanganaki na mikili nyonso. [Yehova] akómisaki botosi ya kotosa ye likoló ya mabota nyonso.—1 Nta. 14:17.
9. Monisá ndenge oyo Yesu, Mokonzi oyo Nzambe aponaki, alongaki?
9 Lokola Mokonzi Davidi, Yesu azalaki kobanga te ntango azalaki awa na mabelé. Lokola Mokonzi oyo Nzambe aponaki, amonisaki ete azali na bokonzi likoló ya bademo na ndenge abikisaki bato oyo bademo bakɔtelaki. (Mko. 5:2, 6-13; Luka 4:36) Ata Satana Zabolo, monguna monene ya Nzambe, azali na bokonzi likoló ya Yesu te. Na lisalisi ya Yehova, Yesu alongaki mokili oyo ezali kotambwisama na nguya ya Satana.—Yoa. 14:30; 16:33; 1 Yoa. 5:19.
10, 11. Mokumba nini Yesu azali na yango lokola Mokonzi-Mobundi na likoló?
10 Mbula soki 60 nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, ntoma Yoane azwaki emonaneli ya Yesu na mokumba na ye ya Mokonzi-Mobundi na likoló. Yoane akomaki boye: “Talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ; mpe moto oyo afandaki likoló na yango azalaki na litimbo; mpe bapesaki ye motole, mpe abimaki na kolonga mpe mpo na kosukisa bolongi na ye.” (Emon. 6:2) Moto oyo azalaki kotambwisa mpunda ya mpɛmbɛ ezali Yesu. “Bapesaki ye motole” na 1914 ntango atyamaki Mokonzi ya Bokonzi ya likoló. Na nsima, “abimaki na kolonga.” Ya solo, lokola Davidi, Yesu azali mokonzi oyo azali kolonga. Mwa moke nsima ya kokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, Yesu alongaki Satana mpe abwakaki ye ná bademo na ye awa na mabelé. (Emon. 12:7-9) Akokoba kobunda tii ntango ‘akosukisa bolongi na ye,’ ntango akobebisa mokili mabe oyo ya Satana.—Tángá Emoniseli 19:11, 19-21.
11 Lokola Davidi, Yesu azali mpe mokonzi ya motema mawa, mpe akobatela “ebele ya bato” na Armagedona. (Emon. 7:9, 14) Lisusu, na boyangeli ya Yesu ná bato 144 000 oyo bakozwa libula elongo na ye, ekozala na “lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Mis. 24:15) Bato oyo bakosekwa na mabelé bakozala na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Oyo nde elikya kitoko ezali liboso na bango! Tiká ete biso nyonso tózala na ekateli ya kokoba ‘kosala malamu,’ mpo tókɔta na mokili oyo ekotonda na bato ya boyengebene mpe ya esengo, oyo Davidi Monene akoyangela.—Nz. 37:27-29.
Nzambe ayanolaki libondeli oyo Salomo asalaki mpo na kosɛnga bwanya
12. Salomo asɛngaki Yehova nini?
12 Salomo mwana ya Davidi mpe azalaki elilingi ya Yesu.c Ntango Salomo akómaki mokonzi, Yehova abimelaki ye na ndɔtɔ mpe ayebisaki ye ete akopesa ye eloko nyonso oyo akosɛnga. Salomo akokaki kosɛnga bomɛngo, nguya to mpe bomoi molai. Kasi, na esika ya kosɛnga biloko wana nyonso, alobaki nde boye: “Pesá ngai [sikoyo] mayele mpe boyebi ete nalekaleka liboso ya libota oyo. Zambi nani akolonga kosambisa libota oyo na yo monene?” (2 Nta. 1:7-10) Yehova ayokaki libondeli ya Salomo.—Tángá 2 Ntango 1:11, 12.
13. Na ndenge nini Salomo alekaki bato nyonso na bwanya, mpe bwanya yango eutaki wapi?
13 Ntango nyonso oyo Salomo azalaki sembo epai ya Yehova, azalaki na bwanya koleka bato nyonso ya eleko na ye. Salomo abimisaki “masese nkóto misato.” (1 Mik. 4:30, 32, 34) Mingi na yango ekomamá na Biblia mpe ezali na motuya tii lelo mpo na baoyo balukaka bwanya. Mokonzi-mwasi ya Seba asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 2 400 mpo na komeka bwanya ya Salomo na ‘mituna makasi.’ Akamwaki mpenza makambo oyo Salomo alobaki mpe kofuluka ya bokonzi na ye. (1 Mik. 10:1-9) Biblia emonisi esika bwanya ya Salomo eutaki na maloba oyo: “Mokili mobimba balukaki elongi ya Salomo ete báyoka mayele na ye oyo Nzambe atye na motema na ye.”—1 Mik. 10:24.
Tólanda Mokonzi ya bwanya
14. Na ndenge nini Yesu azalaki “eloko oyo eleki Salomo”?
14 Kaka moto moko nde alekaki Salomo na bwanya. Moto yango ezalaki Yesu Klisto, oyo amibengaki “eloko oyo eleki Salomo.” (Mat. 12:42) Yesu azalaki na “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:68) Na ndakisa, Lisolo Likoló ya Ngomba ebakisaki makambo mosusu na masese ya Salomo. Salomo atángaki mwa makambo oyo epesaka mosaleli ya Yehova esengo. (Mas. 3:13; 8:32, 33; 14:21; 16:20) Yesu amonisaki ete esengo ya solosolo eutaka kaka na makambo oyo eyokani na losambo ya Yehova mpe kokokisama ya bilaka na ye. Alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Mat. 5:3) Bato oyo basalelaka mitinda oyo ezali na mateya ya Yesu bapusanaka penepene na Yehova, “liziba ya bomoi.” (Nz. 36:9; Mas. 22:11; Mat. 5:8) Klisto amonisaki “bwanya ya Nzambe.” (1 Kol. 1:24, 30) Lokola Masiya Mokonzi, Yesu azali na “elimo ya bwanya.”—Yis. 11:2, NW.
15. Ndenge nini tokoki kozwa litomba na bwanya oyo eutaka epai ya Nzambe?
15 Ndenge nini biso bayekoli ya Salomo Monene tokoki kozwa matomba na bwanya oyo eutaka epai ya Nzambe? Lokola bwanya ya Yehova emonisami na Liloba na ye, tosengeli kosala milende mpo na kozwa yango na nzela ya boyekoli ya Biblia, mingimingi masolo oyo elobeli mateya ya Yesu, mpe na komanyola makambo oyo tozali kotánga. (Mas. 2:1-5) Tosengeli mpe kokoba kosɛnga Nzambe apesa biso bwanya. Liloba ya Nzambe endimisi biso ete soki tosɛngi Nzambe lisalisi, akopesa biso yango. (Yak. 1:5) Na lisalisi ya elimo santu, tokozwa bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe, oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano mpe tózwaka bikateli ya malamu. (Luka 11:13) Salomo abengamaki mpe “moyanganisi” oyo “ateyaki bato boyebi ntango nyonso.” (Mos. 12:9, 10, NW) Yesu, oyo azali Mokonzi ya lisangá, azali mpe moyanganisi ya bato na ye. (Yoa. 10:16; Kols. 1:18) Na yango, tosengeli koyanganaka na makita ya lisangá, epai tokoki ‘koteyama ntango nyonso.’
16. Salomo ná Yesu bakokani na makambo nini?
16 Salomo azalaki mokonzi oyo asalaki makambo mingi. Asalisaki misala ya kotonga na ekólo mobimba, atambwisaki misala ya kotonga bandako minene, banzela, banzela ya mai, bingumba ya kobomba biloko, bingumba mpo na kobomba makalo mpe bingumba mpo na basoda. (1 Mik. 9:17-19) Bato nyonso oyo azalaki koyangela bazwaki matomba na misala yango. Yesu mpe azali motongi. Atongaki lisangá na ye likoló ya “libanga.” (Mat. 16:18) Akokɛngɛla mpe mosala ya kotonga oyo ekosalema na mokili ya sika.—Yis. 65:21, 22.
Tólanda Mokonzi ya kimya
17. (a) Likambo nini ya malamu mingi ezalaki na boyangeli ya Salomo? (b) Likambo nini Salomo akokaki kosala te?
17 Nkombo Salomo euti na liloba moko oyo elimboli “kimya.” Mokonzi Salomo ayangelaki na Yelusaleme, oyo elimboli “moboko ya kimya mibale.” Na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula 40, ekólo Yisalaele ezalaki mpenza na kimya. Biblia elobi mpo na bambula yango boye: “Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya longwa na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nse ya [nzete, NW] na ye ya vinyo mpe na nzete na ye ya mbuma, mikolo nyonso ya Salomo.” (1 Mik. 4:25) Atako Salomo azalaki mokonzi ya bwanya, akokaki te kosikola bato na ye na boombo ya maladi, lisumu, mpe liwa. Nzokande, Salomo Monene akosikola bato na ye na makambo nyonso wana.—Tángá Baloma 8:19-21.
18. Mapamboli nini tozali na yango na kati ya lisangá?
18 Lelo oyo mpe na lisangá, tozali na kimya. Tozali mpenza na paladiso ya elimo. Tozali na kimya na Nzambe mpe na bazalani na biso. Tótala oyo Yisaya asakolaki na ntina makambo oyo ezali komonana na mikolo na biso: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yis. 2:3, 4) Soki tozali kosala na boyokani na elimo santu ya Nzambe, tokosala ete paladiso yango ya elimo ezala ntango nyonso kitoko.
19, 20. Wapi makambo oyo esengeli kotinda biso tózala na esengo?
19 Mikolo ezali koya ekozala kitoko mingi koleka. Na boyangeli ya Yesu, bato ya botosi bakozala na kimya mingi, mpe mokemoke, ‘bakolongolama na boombo ya kopɔla’ tii ntango bakokóma bato ya kokoka. (Lom. 8:21) Soki balongi komekama ya nsuka oyo ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, “bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nz. 37:11; Emon. 20:7-10) Ya solo, boyangeli ya Yesu Klisto ekoleka mosika mpenza boyangeli ya Salomo!
20 Ndenge kaka Bayisalaele bazalaki na esengo na boyangeli ya Moize, Davidi mpe Salomo, biso mpe tokozala na esengo mingi koleka na boyangeli ya Klisto. (1 Mik. 8:66) Biso nyonso tózala na botɔndi epai na Yehova na ndenge atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko—Moize Monene, Davidi Monene mpe Salomo Monene!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete nkombo Davidi elimboli “Molingami.” Ntango Yesu azwaki batisimo mpe ntango abongwanaki na miso ya bantoma na ye, Yehova abengaki ye “Mwana na ngai, molingami.”—Mat. 3:17; 17:5.
b Davidi akómaki mpe lokola mwana-mpate oyo azalaki kotyela mobateli na ye motema. Azalaki kotalela Yehova, Mobateli monene ya bampate, mpo abatela ye mpe atambwisa ye. Alobaki na elikya nyonso ete: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te.” (Nz. 23:1) Yoane Mobatisi abengaki Yesu “Mwana-Mpate ya Nzambe.”—Yoa. 1:29.
c Kutu, nkombo mosusu ya Salomo ezali Yedidia, oyo elimboli “Molingami ya Yah.”—2 Sam. 12:24, 25.
Okoki kolimbola?
• Na ndenge nini Yesu azali Davidi Monene?
• Na ndenge nini Yesu azali Salomo Monene?
• Makambo nini oyo etali Davidi Monene, oyo azali mpe Salomo Monene, esepelisi yo?
[Elilingi na lokasa 31]
Bwanya oyo Nzambe apesaki Salomo ezalaki elilingi ya bwanya ya Salomo Monene
[Elilingi na lokasa 32]
Boyangeli ya Yesu ekoleka mosika mpenza boyangeli ya Salomo mpe oyo ya Davidi!