Pusaná penepene na Nzambe
“Akosala ete omona ye”
OYEBI Nzambe? Eyano na motuna yango ezali pɛtɛɛ te ndenge ekoki komonana. Koyeba mpenza Nzambe esɛngaka komesana mpenza na mokano na ye mpe banzela na ye. Na ndenge yango, tokokóma mpenza penepene na ye, mpe likambo yango ekobongola mpenza bomoi na biso mobimba. Boninga ya ndenge wana ekoki kosalema? Soki ezali bongo, ndenge nini tokoki kokóma na yango? Tokozwa biyano na toli oyo Mokonzi Davidi apesaki mwana na ye Salomo, toli oyo ezali na 1 Ntango 28:9.
Salá lokola ozalaki wana ntango makambo yango ezalaki kosalema. Davidi ayangelaki Yisraele mbula pene na 40, mpe ekólo yango ezwaki mapamboli na nse ya boyangeli na ye. Salomo, oyo asengelaki kokóma mokonzi nsima na ye, azalaki naino elenge mpenza. (1 Ntango 29:1) Toli nini ya nsuka Davidi apesaki mwana na ye?
Davidi alobelaki makambo kitoko oyo akutanaki na yango na ndenge asalelaki Nzambe; abandaki boye: “Mwana na ngai Salomo, yebá Nzambe ya tata na yo.” Na ntembe te, Davidi alingaki kolobela likambo moko ya ntina mingi koleka, koyeba kaka mwa makambo na ntina na Nzambe. Salomo asilaki kokóma mosambeli ya Yehova, Nzambe ya Davidi. Na ntango wana mikanda mingi ya Makomami ya Ebre (soki 1/3) esilaki kokomama, mpe na ntembe te, Salomo ayebaki oyo makomi wana mosantu elobaki na ntina na Nzambe. Moto moko ya mayele alobaki ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na “yebá” ekoki komonisa “koyeba na mozindo mpenza.” Ya solo, Davidi alingaki ete mwana na ye azala na eloko ya motuya oyo ye azalaki na yango—boninga makasi na Nzambe.
Boninga ya ndenge wana esengelaki kotambwisa mpenza ndenge na ye ya kotalela makambo mpe bomoi na ye. Davidi ayebisaki mwana na ye boye: “Salelá ye [Nzambe] na motema mobimba mpe na molimo ya esengo.”a Simbá ete, na toli ya Davidi, kosalela Nzambe eyei nsima ya koyeba ye. Koyeba mpenza Nzambe etindaka moto asalela ye. Kasi, esengeli te kosalela ye na mitema mibale, elingi koloba na kokakatana to na bokosi. (Nzembo 12:2; 119:113) Davidi abondelaki mwana na ye asalela Nzambe na motema mobimba mpe na bolingo na ye moko.
Mpo na nini Davidi alendisaki mwana na ye asambela na motema mpe makanisi oyo ebongi? Davidi alimboli boye: “Mpo Yehova azali kotalatala mitema nyonso, mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.” Salomo asengelaki te kosalela Nzambe kaka mpo na kosepelisa tata na ye, Davidi. Nzambe alukaka baoyo mitema na bango ezali mobimba epai na ye.
Salomo asengelaki kolanda ndakisa ya tata na ye mpe kopusana penepene na Yehova? Yango etalelaki kaka Salomo ye moko. Davidi ayebisaki mwana na ye boye: “Soki oluki ye, akosala ete omona ye; kasi soki otiki ye, akobwaka yo mpo na libela.” Mpo na kokóma mosambeli oyo azali penepene na Nzambe, Salomo asengelaki kosala milende mpenza mpo na koyeba Yehova.b
Toli oyo Davidi apesaki mwana na ye endimisi biso ete Yehova alingi tókóma pene na ye. Kasi, mpo na kokolisa boninga yango, tosengeli ‘koluka ye,’ kokɔta na mozindo na Makomami mpo na koyeba ye malamumalamu. Koyeba ye esengeli kotinda biso tósalela ye na motema mobimba mpe na bolingo na biso moko. Yehova alingaka tósalela ye ndenge wana mpe abongi ete basambeli na ye básambela ye ndenge wana.—Matai 22:37.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Babiblia mosusu ebongoli yango boye: “Salelá ye na motema mobimba mpe na bolingo na yo moko.”
b Likambo ya mawa, atako na ebandeli Salomo asalelaki Nzambe na motema mobimba, atikalaki sembo te.—1 Bakonzi 11:4.