Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/5 lok. 28
  • Makamwisi nyonso ya kobikisa bato eutaka na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makamwisi nyonso ya kobikisa bato eutaka na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Makamwisi ya kobikisa bato
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Kobikisama ya bato na nzela ya ekamwiseli ebɛlɛmi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lolenge oyo kondima ekoki kosalisa mobɛ́li
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • ‘Makamwisi ya kobikisa’ bato eutaka epai ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/5 lok. 28

Mituna ya batángi

Makamwisi nyonso ya kobikisa bato eutaka na Nzambe?

Ntembe ezali te ete Yehova Nzambe azali na nguya ya kobikisa bato. Lisusu, ntembe ezali te ete akoki kopesa basambeli na ye nguya yango. Na ndakisa, na mikolo ya bantoma, makamwisi ya kobikisa bato ezalaki moko ya makabo minene ya elimo santu na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Komonisama ya elimo epesami na moto na moto mpo na litomba moko boye. Na ndakisa, epai ya mosusu elobeli ya bwanya epesami na nzela ya elimo, . . . epai ya mosusu makabo ya kobikisa na nzela ya elimo yango kaka, . . . epai ya mosusu bisakweli, . . . epai ya mosusu minɔkɔ ndenge na ndenge.”​—1 Bakolinti 12:4-11.

Kasi, Paulo akomaki kaka na mokanda yango epai ya Bakolinti ete makabo ya kosala makamwisi na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe ekosila. Alobaki boye: “Ezala makabo ya bisakweli, ekolongolama; ezala minɔkɔ, ekosuka; ezala boyebi, ekolongolama.”​—1 Bakolinti 13:8.

Na ekeke ya liboso, Yesu Klisto mpe bantoma na ye basalaki makamwisi ya kobikisa bato. Na ntango wana oyo lisangá ya boklisto ebandaki, makabo ya elimo, kati na yango likoki ya kobikisa bato, ezalaki mpo na nkembo ya Nzambe mpe ezalaki elembeteli ete Yehova andimi mpe azali kopambola lisangá yango oyo eutaki kobanda. Kasi, soki ekɔmeli to ezwi misisa, na esika esalela makabo ya elimo, lisangá ya boklisto esengelaki kosalela bizaleli lokola kondima, elikya, mpe bolingo mpo na komonisa ete Nzambe andimi yango. (Yoane 13:35; 1 Bakolinti 13:13) Na yango, na mobu soki 100 ya ntango na biso (T.B.), Nzambe atikaki kopesa bato likoki ya kosala makamwisi ya kobikisa bato mpo na komonisa lipamboli na ye.a

Kasi, okoki komituna boye, ‘Mpo na nini nayokaka masolo ya bato oyo babikaki na ndenge ya likamwisi?’ Na ndakisa, zulunalo moko ekomaki lisolo ya moto moko oyo azalaki na maladi ya kanser ya motó, ya bangei, mpe maladi yango ekɔtelaki ye tii na mikuwa. Azalaki na elikya te tii mokolo oyo ayokaki “mongongo” ya Nzambe. Zulunalo yango elobaki ete mwa mikolo na nsima, kanser na ye esilaki.

Soki oyoki lisolo ya ndenge wana, mpo na nini te omituna boye: ‘Lisolo yango ezali solo? Ezali na mikanda ya minganga oyo emonisi ete makambo oyo moto yango alobaki ekoki kosalema? Mpe ata soki emonanaki ete abiki mpenza, Biblia eteyaka ete makamwisi nyonso ya kobikisa bato eutaka na Nzambe?’

Eyano na motuna wana ya nsuka ezali na ntina mingi. Yesu akebisaki bayekoli na ye na maloba oyo: “Bókeba na basakoli ya lokuta . . . Mingi bakoloba na ngai na mokolo yango, ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te, mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te, mpe tosalaki misala ya nguya [makamwisi] na nkombo na yo te?’ Nzokande na bango nakoyambola boye: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato ya misala ya botyoli-mibeko.”​—Matai 7:15, 21-23.

Emonani polele ete makamwisi oyo bato balobaka ete ezali ya kobikisa bato eutaka kaka na Nzambe te. Mpo bato oyo balobaka ete bazali kosala makamwisi na nkombo ya Nzambe bákosa biso te, tosengeli kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe, kosalela likoki ya kokanisa oyo Nzambe apesá biso, mpe koyekola ndenge ya koyeba bato oyo bazali kosala mokano na ye.​—Matai 7:16-19; Yoane 17:3; Baloma 12:1, 2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Emonani ete ntango bantoma bakufaki, kokabolama ya makabo ya elimo santu esukaki, mpe makabo ya kosala makamwisi esukaki ntango bato oyo bazwaki yango bakufaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto