Biblia ebongolaka bato
Ndenge nini moto moko oyo azalaki komɛla marijuana mpe makaya banda bolenge na ye azwaki makasi ya kotika mimeseno yango? Nini esalisaki moto moko oyo azalaki na etuluku ya bato ya mobulu atika ezaleli na ye ya nkandankanda mpe ya koyina bato ya mposo mosusu? Tóyoka bango.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: HEINRICH MAAR
MBULA: 38
EKÓLO: KAZAKHSTAN
BOMOI NA YE YA KALA: MOMƐLI MARIJUANA MPE MAKAYA
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na sudi ya Kazakhstan, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 70 longwa na engumba ya Tashkent. Mbula ezalaki kobɛta te, mpe na eleko ya molunge, mɔtɔ ezalaki makasi (45°C), mpe na eleko ya malili, malili ezalaki makasi (-10°C)—ezalaki esika malamu mpenza mpo na kolona vinyo mpe marijuana.
Baboti na ngai bazalaki bato ya Allemagne. Bango mibale bazalaki na lingomba ya Évangélique, kasi bazalaki kosalela makambo yango te. Atako bongo, basalisaki ngai nakanga na motó libondeli ya Tata wa biso. Ntango nazalaki na mbula 14, mama na ngai mpe yaya na ngai ya mwasi bayekolaki Biblia mpo na mwa ntango elongo na Batatoli ya Yehova. Mokolo moko, nayokaki ntango Batatoli mibale oyo bazalaki koyekola na mama Biblia balakisaki ye nkombo ya Nzambe, Yehova, na Biblia na ye moko. Likambo yango ekamwisaki ngai. Mama atikaki koyekola, yango wana mposa na ngai ya koyeba makambo ya Nzambe ekolaki te. Atako bongo, nsima ya mikolo na eteyelo, molakisi na biso azalaki koyebisa biso makambo ya lokuta mpo na lingomba ya Batatoli ya Yehova. Lokola nakendaki na mwa makita mosusu ya Batatoli ya Yehova elongo na ndeko na ngai ya mwasi, nayebisaki molakisi na biso ete makambo oyo azalaki koloba ezalaki ya lokuta.
Ntango nakómaki na mbula 15, batindaki ngai na Leningrad, lelo oyo Saint Petersburg, na Russie, mpo nayekola mosala ya mabɔkɔ. Nazalaki koyebisa baninga oyo nazalaki kofanda na bango mwa makambo oyo nayekolaki na ntina na Yehova. Kasi, nabandaki komɛla makaya. Ntango nazalaki kokende epai na biso na Kazakhstan, ezalaki mpasi te mpo nasomba marijuana, atako mibeko ya Leta epekisaki yango. Nazalaki mpe komɛla masanga oyo babengi vodka mpe vinyo mingi.
Nasilisaki kelasi ya mosala ya mabɔkɔ, mpe nakɔtaki na mosala ya soda mpo na mbula mibale. Atako bongo, nabosanaki te makambo oyo nayekolaki na Biblia ntango nazalaki mwana moke. Ntango nazalaki kozwa libaku, nazalaki koyebisa baninga na ngai basoda makambo ya Yehova mpe nazalaki kokɔtela Batatoli ya Yehova soki bakoseli bango makambo.
Ntango nasilisaki mosala ya soda, nakendaki na Allemagne. Ntango nazalaki na kaa ya bato bakimá mboka, nazwaki mokanda moko ya Batatoli ya Yehova oyo elimbolaka Biblia. Natángaki yango na esengo mpenza mpe namonaki ete makambo oyo ezalaki na mokanda yango ezalaki solo. Kasi, nazalaki kokoka te kotika komɛla makaya mpe marijuana. Nsima ya mwa ntango nakendaki kofanda penepene ya engumba Karlsruhe. Kuna, nakutanaki na Motatoli moko ya Yehova mpe nabandaki koyekola Biblia.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Banda kala, nayebaki ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Mpe nsima ya kotánga mokanda oyo nazwaki, nandimaki ete Biblia ezali na biyano na mituna nyonso ya ntina ya bomoi. Atako bongo, esɛngaki ntango molai mpo nabongwana. Nsukansuka, toli ya 2 Bakolinti 7:1 esimbaki motema na ngai mpe nazwaki ekateli ya komipɛtola “na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo,” yango elimbolaki kotika komɛla marijuana mpe makaya.
Nalongaki mbala moko kotika komɛla marijuana. Kasi, esɛngaki ngai sanza motoba mpo natika komɛla makaya. Mokolo moko, Motatoli oyo azalaki koyekola na ngai Biblia atunaki ngai boye: “Ntina ya bomoi na yo ezali nini?” Yango etindaki ngai nakanisa mpenza momeseno mabe oyo nazalaki na yango ya komɛla makaya. Namekaki mbala na mbala kotika komɛla makaya. Kasi, mbala oyo nazwaki ekateli ya kobondela ntango nayoki mposa ya komɛla likaya, na esika nasɛnga Nzambe bolimbisi nsima ya komɛla yango. Na 1993, natyaki dati ya nsuka oyo nakotika komɛla makaya. Na lisalisi ya Yehova, nasimbaka lisusu makaya te banda wana.
MATOMBA OYO NAZWI: Lokola natiká komɛla marijuana mpe makaya oyo ezalaki kolya ngai mbongo mpe kobebisa ngai nzoto, nakómá nzoto kolɔngɔnɔ. Lelo oyo, nazali na libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala na Betele ya Batatoli ya Yehova na Allemagne. Nazali na esengo ndenge nasalelaki bwanya ya mitinda ya Biblia na bomoi na ngai! Lokola nayebi oyo Biblia eteyaka, bomoi na ngai ekómi mpenza na ntina.
MAKAMBO YA BOMOI NA YE
NKOMBO: TITUS SHANGADI
MBULA: 43
EKÓLO: NAMIBIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA MOBULU
NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na mboka moko na etúká ya Ohangwena, na nɔrdi ya Namibie. Bato ya mboka na biso banyokolamaki mpe babomamaki na ntango ya etumba oyo ezalaki na mboka yango na bambula ya 1980. Na mboka na biso, mwana mobali azalaki kotalelama lokola mobali ya solosolo soki ayebi kobunda mpe kobɛta mibali mosusu. Yango wana nayekolaki kobunda!
Ntango nasilisaki kelasi, nakendaki kofanda epai ya nɔkɔ, na engumba Swakopmund oyo ezali na bokula ya mbu. Ntango kaka nakómaki, nakɔtaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu. Mpo na koluka bitumba, tozalaki kokende na bisika lokola baotɛlɛ, banganda ya masanga oyo ezalaki na engumba, epai bazalaki kolinga baindo te. Mbala mingi, tobundaki na bakɛngɛli ya bisika yango mpe bapolisi. Butu nyonso, nazalaki kotambola na mbɛli moko ya molai mpo na kobundisa moto nyonso oyo nakokutana na ye.
Mokolo moko na butu, ntango tozalaki kobunda na bilenge ya etuluku mosusu, balingaki mpenza koboma ngai. Elenge moko ya etuluku yango ayaki nsima na ngai mpe alingaki kokata ngai motó, kasi moninga na ngai moko abɛtaki ye kozanga ete ayeba. Atako bongo, natikaki te bomoi na ngai ya mobulu. Soki naswani na moto, azala mobali to mwasi, kaka ngai nde nazalaki kobanda bitumba.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nakutanaki na mwasi moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova, atángelaki ngai bavɛrsɛ ya Nzembo 37 mpe na nsima ayebisaki ngai ete mokanda ya Emoniseli ezali na bilaka mosusu ya kitoko. Kasi, lokola ayebisaki ngai te bavɛrsɛ oyo ezali na bilaka yango, nazwaki Biblia mpe natángaki mokanda mobimba ya Emoniseli na butu yango. Nasepelaki mingi na elaka oyo natángaki na Emoniseli 21:3, 4, oyo elobi ete “liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Ntango Batatoli bayaki lisusu kotala ngai, nandimaki koyekola Biblia.
Ezalaki pɛtɛɛ te nabongola lolenge na ngai ya kokanisa mpe ezaleli na ngai. Kasi, mokanda ya Misala 10:34, 35 esalisaki ngai nayeba ete “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” Nasalaki mpe makasi mpo na kolanda toli oyo ezali na Baloma 12:18: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”
Longola kozala nkandankanda, nasengelaki mpe kotika komɛla makaya. Mbala mingi, nazalaki kobondela Yehova na mai na miso mpo asalisa ngai. Kasi, liboso nazalaki koyeba te ntango ya malamu mpo na kobondela; nazalaki koloba ete oyo mbala na ngai ya nsuka ya komɛla likaya mpe na nsima nazalaki kobondela. Motatoli oyo azalaki koyekola na ngai Biblia asalisaki ngai namona ntina oyo nasengelaki kobondelaka ntango nayoki mposa ya komɛla likaya. Nasengelaki mpe koboya kozala pene ya bato oyo bazalaki komɛla makaya. Lisusu, nalandaki toli oyo apesaki ngai ya koyebisa baninga na ngai ya mosala ete komɛla makaya ezali mabe. Yango esalisaki ngai mpenza natika komɛla makaya, mpo baninga mosusu na mosala bazalaki kopesa ngai lisusu makaya te.
Nsukansuka, nalongaki kotika komɛla makaya mpe natikaki bizaleli mabe oyo nazalaki na yango kala. Nsima ya sanza motoba ya koyekola mpe kosalela mitinda ya Biblia, nakokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Nandimaki ete lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali ya solo ntango namonaki mpenza bolingo oyo bazalaki na yango, kozanga kotala mposo. Kutu ata liboso nazwa batisimo, ndeko moko ya lisangá oyo azalaki mondɛlɛ, abengaki ngai nakende kolya na ndako na ye. Namonaki yango lokola ndɔtɔ. Nazwaki naino libaku te ya kofanda na kimya na mondɛlɛ mpe kolya elongo na ye. Nakómaki mpenza na kati ya libota monene ya bandeko na mokili mobimba.
Kala, bakɛngɛli mpe bapolisi bazalaki kosala nyonso mpo natika mobulu mpe nabongola makanisi mpe bizaleli na ngai, kasi balongaki te. Kaka Biblia nde ezalaki na nguya ya kosalisa ngai nabongola bomoto na ngai mpe nakóma moto ya esengo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Mbala mingi, nazalaki kobondela Yehova na mai na miso mpo asalisa ngai”