Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/5 nk. 26-29
  • Biblia ebongolaka bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ebongolaka bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/5 nk. 26-29

Biblia ebongolaka bato

MAKAMBO nini moto oyo azalaki na etuluku moko ya bato ya mobulu mpe moombo ya marijuana asalaki mpo na kotika mimeseno na ye ya mabe? Mpo na nini moto oyo azalaki na etuluku ya miziki babengi thrash metal akataki nsuki na ye ya milaimilai mpe abongolaki makanisi na ye na oyo etali miziki oyo azalaki kolinga? Nini etindaki mobali moko oyo aboyaki kotosa bakonzi ya mangomba mpe ya Leta akóma kosalela Nzambe? Tóyoka bango.

“Nalongwá na boombo ya bangi.”​—PETER KAUSANGA

MBULA: 32

EKÓLO NA YE: NAMIBIE

BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA ETULUKU YA BATO YA MOBULU MPE MOOMBO YA MARIJUANA

NDENGE NAZALAKI: Nakolaki na Kehenu, moko na bamboka minene minei ya mwa engumba Rundu. Kuna bato babikelaka na kotɛka mbuma ya miyɛ, mabaya, mpe makala.

Ntango nazalaki kaka na mbula mibale, mama na ngai akufaki; nkɔkɔ na ngai ya mwasi nde abɔkɔlaki ngai. Tozalaki na biloko mingi te. Nazalaki mwana ya mobulu te, kasi na bopusi ya baninga, nakómaki na mikakatano. Na eteyelo, nakɔtaki na etuluku ya bana ya mobulu. Mpe nakómaki kobunda na balabala, konyokola bato, koyiba, kosala mafia ya diama, mpe komɛla masanga ná bangi. Bakangaki ngai mbala mibale mpe batyaki ngai na bolɔkɔ mpo na moyibi ya kobuka ndako ya bato mpe mpo na kobuba.

Nakataki kelasi na eteyelo ya ntei mpe nsukansuka nakendaki mosika na mboka na biso mpe na etuluku ya bato ya mobulu. Nalingaki kobanda bomoi ya sika. Kasi nazalaki kaka moombo ya marijuana. Na bantango mosusu, nazalaki kosala bakilomɛtrɛ kaka mpo na koluka likaya ya marijuana.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na ebandeli ya 1999, nakutanaki na Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kopesa bato mikanda na balabala. Bapesaki ngai limemya mpe lokumu, mpe yango esimbaki mpenza motema na ngai. Nsango oyo ezalaki na mokanda oyo bapesaki ngai endimisaki ngai ete namoni lingomba ya solo. Nabandaki koyekola Biblia na molende, mpe eumelaki te namonaki ete nasengeli kobongola bomoi na ngai soki nalingi kosepelisa Yehova Nzambe.

Natyaki mokolo oyo nakotika komɛla likaya mpe nabebisaki biloko nyonso oyo nazalaki kosalela mpo na komɛla likaya. Nayebisaki mpe baninga na ngai bápesaka ngai likaya lisusu te mpe nasɛngaki bango bámɛlaka pembeni na ngai te. Atako bongo, makambo elekaki te ndenge nakanaki. Mbala mibale, mposa ya likaya mpe ya marijuana ekweisaki ngai. Kasi, yango elɛmbisaki ngai te. Nabatelaki maloba ya Masese 24:16 ete: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza.” Nsukansuka, nalongwaki na boombo ya makaya.

Wana nazalaki koyekola koyeba Yehova malamu, nazalaki na mposa ya kokóma moninga na ye ya motema mpenza. Vɛrsɛ moko ya Biblia oyo esimbaki motema na ngai makasi ezali Nzembo 27:10: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” Lokola nakobaki koyekola Biblia na mozindo, namonaki ete maloba yango ezali solo. Nayokaki ete Yehova akómi Tata mpenza oyo azali komibanzabanza mpo na ngai.

Nazalaki mpe kosangana na mbala na Batatoli ya Yehova. Kati na bango, namonaki boninga mpe bolingo ya solo. Naino nayoká ndenge wana te liboso.

MATOMBA OYO NAZWI: Na lisalisi ya Yehova mpe ya baninga Batatoli, nabongisá ndenge na ngai ya kokata nsuki, molato, etamboli mpe elobeli na ngai. Soki natali nsima, namonaka ete bomoi na ngai ebongwaná lokola mbinzo moko ya mabe oyo ekómi mpomboli moko ya kitoko. Bandeko na ngai ya libota basepelaka mingi mpo na mbongwana yango, mpe bakómi sikoyo kotyela ngai motema. Lelo, nabalá mpe nazali kosala makasi ya kozala mobali oyo alingaka mwasi na ye mpe tata oyo akipaka bana na ye.

“Bomoi na ngai ekómá mpenza na ntina.”​—MARCOS PAULO DE SOUSA

MBULA: 29

ÉKOLO NA YE: BRÉSIL

BOMOI NA YE YA KALA: MOTO YA ETULUKU MOKO YA MIZIKI YA THRASH METAL

NDENGE NAZALAKI: Libota na ngai tozalaki kofanda na mboka Jaguariúna, na São Paulo. Baboti na ngai bazalaki Bakatolike ya molende, mpe ntango nazalaki elenge, nakómaki kosalisa sango na misa. Mpo na yango, baninga na ngai ya eteyelo ya ebandeli bapesaki ngai nkombo Sango. Kasi ntango nakómaki na mbula 15, nayebaki miziki babengi rock heavy metal. Nakómaki kosangana na bayembi ya rock. Natikaki nsuki na ngai ekola. Mpe na 1996, papa na ngai asalisaki ngai nasomba mbonda na ngai ya liboso.

Na 1998, nakɔtaki na etuluku ya miziki ya rock thrash metal. Miziki oyo tozalaki kobɛta ezalaki na maloba ya kokumisa Satana mpe ya nsɔni. Ezalaki kokumisa mobulu. Miziki yango ebebisaki makanisi, etamboli mpe ezaleli na ngai. Nakómaki komona makambo mingi kaka mabe mpe kolinga kowelana na bato.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nakutanaki na Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso na 1999. Basɛngaki ngai nayekola Biblia elongo na bango, nandimaki, atako nazalaki mpenza na mposa te. Nzokande, makambo oyo nayekolaki na Biblia ebongolaki ndenge na ngai ya kotalela bomoi.

Nayebanaki lokola “moto ya nsuki milai,” “moyembi ya rock,” to “mobɛti-mbonda.” Kasi nakómaki komona ete kobɛta miziki na etuluku ekómisaki ngai moto oyo alukaka kaka matomba na ye moko mpe oyo alingá kowelana, mpe nazalaki kosepela lisusu te na lokumu oyo nakómaki na yango. Namonaki ete bomoi ya bayembi oyo nazalaki kozwa lokola banzambe ezalaki na ntina mpenza te. Mokemoke namonaki ete soki nalingi kosepelisa Yehova Nzambe, nasengeli kotika miziki ya heavy metal, etamboli ya mbindo mpe losambo ya bikeko oyo ekangami na yango.

Nazalaki kolinga miziki mpe nsuki na ngai ya milai. Nazalaki komituna soki nakokoka kotika yango. Nazalaki mpe moto ya nkandankanda mpe nayebaki ete nasengeli koyekola komipekisa. Kasi, na nzela ya boyekoli na ngai ya Biblia, nabandaki kolinga Yehova mingi koleka. Ntango nayebaki bolingo ya Nzambe, motema molai mpe motema mawa na ye, nakómaki kolinga Ye mingi. Nabondelaki ye asalisa ngai nabongwana, mpe asalisaki ngai. Namonaki ngai moko ete maloba ya Baebre 4:12 ezali solo. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”

Ntango nabandaki koyangana na Batatoli ya Yehova, namonaki ete bakeseni na mangomba mosusu. Mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, namonaki bolingo ya solosolo na miso. Bolingo yango ezalaki komonana mingimingi na mayangani ya minene ya Batatoli. Nazalaki kokamwa komona molende ya bandeko oyo bazalaki kosala na bolingo na bango moko mpo bato mosusu bálanda mayangani malamu.

MATOMBA OYO NAZWI: Na lisalisi ya Yehova, sikoyo nakómi kokoka kopekisa nkanda na ngai. Natiki koluka kaka matomba na ngai moko mpe nazali lolendo lisusu te.

Nasengeli kondima ete na ntango moko boye, nazalaki koyoka mawa ndenge natikaki bomoi na ngai ya kala, kasi sikoyo nayokaka lisusu mawa te. Sikoyo bomoi na ngai ekómi na ntina mpenza. Nazali na esengo ndenge nazali koyekola kosepela na bato mosusu mpe koluka bolamu na bango.

“Nakómi na esengo ya kokipe basusu.”​—GEOFFREY NOBLE

MBULA: 59

EKÓLO NA YE: ÉTATS-UNIS

BOMOI NA YE YA KALA: ABOYAKI KOTOSA BAKONZI YA MANGOMBA MPE YA LETA

NDENGE NAZALAKI: Nabokwamaki na Ipswich, mwa engumba moko ya bato ya misala na Massachusetts, pene na mbu. Ntango nakómaki mokóló nakendaki kofanda mosika, na Vermont. Soki otali bomoi ya bato ya Amerika ya Nɔrdi, bomoi na ngai ná makango na ngai ezalaki ya komimonisa mpasi. Tozalaki na kura te; tozalaki kotya molunge na ndako mpe kolamba bilei na nkoni oyo tozalaki kozwa na zamba. W.C. na biso ezalaki libándá mpe pene na mbula mobimba, tozalaki kozwa mai na ya pɔmpi te. Toboyaki bomoi oyo bato bazalaki na yango mpe ndenge tozalaki komonana na miso ya bato ezalaki komonisa yango. Na ntango moko boye, namikumisaki mpo nasanolaki nsuki te sanza motoba mobimba.

Na ntango wana, États-Unis ekɔtaki na etumba ya Vietnam. Yango ebongolaki ndenge na ngai ya kotalela bakonzi. Namonaki bokosi ya bakonzi ya Leta mpe ya mangomba. Namonaki ete bibongiseli yango ekosala eloko te mpe ete moto na moto asengeli kozwa ekateli na oyo etali malamu to mabe. Na yango, namonaki mabe moko te koyiba eloko nyonso oyo nazali na yango mposa.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ngai ná makango na ngai tobandaki kotánga Biblia kasi tozalaki kokanga ntina na yango te. Nazalaki komɛla bangi kasi nazalaki koluka kotika yango. Makango na ngai azalaki kolinga nabala ye mpe tóbota bana. Na ntango wana, Motatoli ya Yehova moko ayaki na ndako na biso mpe abandaki koyekola na biso Biblia.

Eumelaki te nakoka kotika mimeseno na ngai ya mabe; kasi, ezalaki mpasi mingi mpo nabongola ndenge na ngai ya kotalela bakonzi. Nakómaki na momeseno ya kotya ntembe na likambo nyonso. Ntango nazalaki kokola bazalaki kopekisa ngai makambo mingi mpenza te; na yango, ezalaki mpasi nandima kolanda mitindo ya moto mosusu.

Banda kala, nazalaki kondima ete Mozalisi azali, kasi nazalaki koyeba ye mpenza te. Kasi, ntango nayekolaki Biblia, ayebaki bomoto ya Yehova Nzambe malamumalamu. Namonaki ete alobi polele makambo oyo alingi nasala. Eloko ya bongobongo ezali te na masɛngami na ye. Nayekolaki mpe ete azali na mokano ya sikisiki ya kokómisa mabele paradiso. (2 Petro 3:13) Makambo wana ya solo etindaki ngai nandima kobongwana, mpe nakokisa masɛngami mpo na kosalela ye.

Nakamwaki mingimingi na komona ndenge Batatoli ya Yehova baboyaki kokɔta na etumba. Na mokili mobimba ezali na lingomba mosusu te oyo nayebaki oyo ezalaki kolanda etinda wana ya Biblia.

Nayebaki ete soki nalingi kosalela Yehova, nasengeli kopɛtola nzoto na ngai. Na ebandeli, ezalaki mpasi nalanda lolenge ya kolata oyo Batatoli balingaka. Ezala ngai ezala baninga na ngai, moko te azalaki na basimisi, na bapatalo to na basosɛti. Mpe nazalaki na kravati te! Kasi nakataki nsuki na ngai mpe nabongisaki nzoto na ngai. Atako bongo, nabosanaka te mokolo ya liboso oyo nakendaki kosakola ndako na ndako. Ezalaki na talatala moko oyo elakisaki ndenge nakómaki. Namitunaki ngai moko: ‘Likambo nini nasali?’ Nsukansuka, namesenaki na ndenge oyo nakómaki komonana.

MATOMBA OYO NAZWI: Nabalaki makango na ngai, mpe sikoyo tozali na esengo na libala na biso. Biso mibale tolongaki kobɔkɔla bana na biso misato mpo bálinga Yehova mpe básalela ye. Nazali mpe na esengo ya kosalisa basusu báyekola mateya ya solo ya Biblia oyo esalisaki ngai nabongola bomoi na ngai.

Kala nazalaki komikumisa ndenge nazalaki kokipe te soki bato bazali kokanisa nini. Sikoyo nazali na esengo mingi ya kokipe bato mosusu mpe ya komona basusu bazali kokipe ngai.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 26]

“Nazalaki kosala bakilomɛtrɛ kaka mpo na koluka likaya ya marijuana”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]

“Makambo oyo nayekolaki na Biblia ebongolaki ndenge na ngai ya kotalela bomoi”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

“Ezalaki mpasi nalanda lolenge ya kolata oyo Batatoli balingaka”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto