Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/8 nk. 12-16
  • Bomoi ya seko na mabelé—Elikya oyo ebombamaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ya seko na mabelé—Elikya oyo ebombamaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elikya oyo ebombamaki
  • Pole ebandi kongɛnga na kati ya molili
  • “Boyebi ekofuluka”
  • ‘Bonsomi oyo etondi na nkembo’ ezali koya!
  • Klisto ateyaki ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Ntango boyebi ya Nzambe ekotonda na mabelé mobimba
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bokonzi ebotami na likoló
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Nsuka ya mokili—tosengeli kobanga yango to kotyela yango elikya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/8 nk. 12-16

Bomoi ya seko na mabelé​—Elikya oyo ebombamaki

“Danyele, zipá maloba . . . kino elaka ya nsuka. Bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka.”​—DAN. 12:4.

1, 2. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

LELO oyo, bamilio ya bato bayebi malamu ete Biblia eteyaka elikya ya kozala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé. (Emon. 7:9, 17) Na ebandeli ya mokili, Nzambe amonisaki ete asalaki moto mpo azala na bomoi kaka mpo na mwa ntango te mpe na nsima akufa, kasi mpo aumela libela na libela.​—Gen. 1:26-28.

2 Kozonga na bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki ezalaki moko ya makambo oyo Bayisalaele bazalaki kolikya. Makomami ya Grɛki ya boklisto emonisi bibongiseli oyo Nzambe azwi mpo bato bákoka kozala na bomoi ya seko na Paladiso awa na mabelé. Kasi, mpo na nini na nsima elikya yango ebombamaki? Ndenge nini eyebanaki lisusu mpe eteyamaki epai ya bamilio ya bato?

Elikya oyo ebombamaki

3. Mpo na nini tokoki kokamwa te ndenge elikya ya bato ya kozala na bomoi ya seko na mabelé ebombamaki?

3 Yesu asakolaki ete basakoli ya lokuta bakobebisa mateya na ye mpe bakobungisa bato mingi nzela. (Mat. 24:11) Ntoma Petelo akebisaki baklisto boye: “Ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.” (2 Pet. 2:1) Ntoma Paulo alobelaki “eleko moko boye oyo [bato] bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi.” (2 Tim. 4:3, 4) Satana azali kobungisa bato nzela mpe azali kosalela mangomba ya boklisto ya lokuta mpo na kozipa mateya ya solo oyo etali mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabelé.​—Tángá 2 Bakolinti 4:3, 4.

4. Bakonzi ya mangomba ya lokuta babwakaki elikya nini oyo etali bato?

4 Makomami emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló oyo ekobukabuka mpe ekosukisa biyangeli nyonso ya bato. (Dan. 2:44) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, Satana akobwakama na lobwaku mozindo, bato oyo bakufá bakosekwa, mpe bato nyonso awa na mabelé bakokóma bato ya kokoka. (Emon. 20:1-3, 6, 12; 21:1-4) Nzokande, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bakómaki kokɔtisa makanisi mosusu. Na ndakisa, na ekeke ya misato, Origène d’Alexandrie, oyo azalaki moko ya Batata ya Lingomba, alobaki ete bato oyo bazalaki kondima ete boyangeli ya mbula nkóto ekomema mapamboli na mabelé bazali na libunga. Buku moko (The Catholic Encyclopedia) elobi ete Augustin d’Hippone, moto ya teoloji ya Lingomba ya Katolike (354-430 T.B.) “azalaki kondima te ete boyangeli ya mbula nkóto ekozala.”a

5, 6. Mpo na nini Origène ná Augustin baboyaki liteya ya boyangeli ya mbula nkóto?

5 Mpo na nini Origène ná Augustin bazalaki koboya boyangeli ya mbula nkóto? Origène azalaki moyekoli ya Clément d’Alexandrie, moto oyo andimaki likanisi ya Bagrɛki oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Werner Jaeger, moto moko ya teoloji, alobi ete lokola Origène alandaki mpenza makanisi ya Platon na likambo etali molimo, “akɔtisaki mateya ya Platon mpo na molimo na kati ya mateya ya boklisto.” Na yango, Origène akómaki koteya ete mapamboli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ekozala na mabelé te, kasi na mokili ya elimo.

6 Augustin akómaki “moklisto” ntango azalaki na mbula 33; liboso na yango, azalaki moko ya bato oyo bazalaki kolanda makanisi ya Platon, na ndenge ya sika oyo Plotin azalaki koteya yango na ekeke ya misato. Nsima ya kokóma moklisto, Augustin akobaki kolanda makanisi yango. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Asangisaki mpenza mateya ya Kondimana ya Sika na mateya ya Platon, oyo eutaki na filozofi ya Bagrɛki.” Buku oyo tolobelaki liboso elobi ete Augustin alimbolaki ete Boyangeli ya Mbula Nkóto oyo elobelami na Emoniseli mokapo 20 “ezali kaka maloba ya elilingi.” Buku yango ebakisaki boye: “Ndimbola yango . . . endimamaki na bato ya teoloji ya Mpoto oyo bayaki nsima na ye, mpe bato mingi batikaki kondima ete boyangeli ya mbula nkóto ekozala awa na mabelé ndenge ezalaki koteyama na ebandeli.”

7. Liteya nini ebebisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé, mpe likambo yango esalemaki ndenge nini?

7 Elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé ebebisamaki na likanisi oyo ebimaki na Babilone ya kala mpe oyo epanzanaki na mokili mobimba ete moto azalaka na molimo oyo ekufaka te to elimo oyo ebimaka soki nzoto ekufi. Ntango mangomba ya boklisto endimaki likanisi yango, bato ya teoloji bakómaki kolimbola bavɛrsɛ oyo elobeli elikya ya bomoi na likoló mpo emonana lokola nde bato nyonso ya malamu bakokende na likoló. Likanisi yango ezalaki komonisa ete awa na mabelé, bato bazali kaka baleki nzela, mpo bámekama mpo na komona soki babongi kokende na likoló. Likambo moko ya ndenge wana esalemaki mpo na elikya ya Bayuda ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Lokola Bayuda bakómaki kondima likanisi ya Bagrɛki ete molimo ekufaka te, elikya oyo bazalaki na yango liboso ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé ekómaki kosila. Likanisi yango ekeseni mpenza na oyo Biblia elobi mpo na moto! Moto azali na nzoto ya mosuni, azali elimo te. Yehova alobaki na moto ya liboso ete: “Ozali putulu.” (Gen. 3:19) Mabelé nde esika oyo moto asengeli kofanda libela, kasi likoló te.​—Tángá Nzembo 104:5; 115:16.

Pole ebandi kongɛnga na kati ya molili

8. Bato mosusu ya mayele na bambula ya 1600 balobaki nini mpo na elikya ya bato?

8 Atako mangomba mingi ya boklisto eteyaka te elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé, Satana alongaki ntango nyonso te kozipa solo. Banda kalakala, ezalaki ntango nyonso na mwa batángi ya Biblia oyo bazalaki komona pole ya solo wana bazalaki kokanga ntina ya makambo mosusu oyo Nzambe akosala mpo bato bákóma lisusu bato ya kokoka. (Nz. 97:11; Mat. 7:13, 14; 13:37-39) Kobanda na bambula ya 1600, mosala ya kobongola Biblia mpe kobimisa yango esalaki ete bato mingi bázala na Makomami Mosantu. Na mobu 1651, moto moko ya mayele akomaki ete se ndenge bato “babungisaki Paladiso mpe Bomoi ya Seko na Mabelé” mpo na lisumu ya Adama, ndenge moko mpe na nzela ya Klisto, “bato nyonso basengeli kozala na bomoi na Mabelé; soki bongo te, bango mibale bakokokana ata na likambo moko te.” (Tángá 1 Bakolinti 15:21, 22.) John Milton, mokomi moko ya Angleterre (1608-1674), akomaki buku Paladiso ebungi mpe na nsima akomaki buku Paladiso emonani (nyonso na Lingelesi). Na babuku yango, Milton alobelaki mbano oyo bato ya sembo bakozwa na paladiso awa na mabelé. Atako Milton amipesaki mingi na boyekoli ya Biblia, andimaki ete solo ya Makomami ekoyebana malamu kaka na ntango ya kozala ya Klisto.

9, 10. (a) Isaac Newton akomaki nini mpo na elikya ya bato? (b) Mpo na nini Newton azalaki komona ete kozala ya Klisto esengelaki koya bambula mingi na nsima?

9 Isaac Newton (1642-1727), moto ya mayele na matematiki, azalaki mpe kosepela mingi na Biblia. Asosolaki ete basantu bakosekwa mpo na bomoi na likoló mpe kuna, bakoyangela elongo na Klisto. (Emon. 5:9, 10) Mpo na bato oyo Bokonzi ekoyangela, akomaki boye: “Bato bakokoba kofanda na mabelé nsima ya mokolo ya kosambisama mpe kaka mpo na mbula 1000 te kasi libela na libela.”

10 Newton azalaki komona ete kozala ya Klisto ekoya bikeke mingi na nsima. Stephen Snobelen, moto moko ya mayele na masolo ya kala, alobaki boye: “Ntina moko oyo Newton azalaki komona ete Bokonzi ya Nzambe esengelaki koya bambula mingi na nsima ezali mpo liteya ya Bosato, oyo ezali liteya ya bapɛngwi, epalanganaki mingi.” Na ntango wana, nsango malamu ezipamaki naino. Newton azalaki komona lingomba moko te oyo ekokaki kosakola yango. Akomaki boye: “Ndimbola ya bisakweli yango ya Danyele mpe ya Yoane [esakweli ya Yoane ezali na mokanda ya Emoniseli] ekoyebana kaka na ntango ya nsuka.” Newton abakisaki boye: “Danyele alobaki ete, ‘bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi ekofuluka.’ Mpo nsango malamu esengeli kosakolama na bikólo nyonso liboso bolɔzi monene mpe nsuka ya mokili eya. Ebele ya bato oyo basimbi mandalala, oyo bakobika na bolɔzi monene yango, bakoki kozala ebele mpenza mpe kouta na bikólo nyonso kaka soki nsango malamu esakolami na bikólo yango liboso bolɔzi yango eya.”​—Dan. 12:4; Mat. 24:14; Emon. 7:9, 10.

11. Mpo na nini bato mingi ya eleko ya Milton mpe ya Newton bayebaki te elikya ya bato?

11 Na eleko ya Milton mpe ya Newton, kobimisa makanisi oyo ekeseni na oyo ya eklezia ezalaki likama. Yango wana, mikanda na bango mingi oyo elobelaki makambo oyo bayekolaki na Biblia ebimisamaki nsima ya liwa na bango. Mbongwana oyo esalemaki na ekeke ya 16 ebongolaki te liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, mpe mangomba mingi ya Protesta ekobaki koteya likanisi ya Augustin ete Boyangeli ya Mbula Nkóto esilá kobanda. Boyebi ekómi mingi na ntango ya nsuka?

“Boyebi ekofuluka”

12. Ntango nini boyebi ya solo esengelaki kofuluka?

12 Danyele asakolaki ete makambo ya malamu ekosalema na ntango ya nsuka. (Tángá Danyele 12:3, 4, 9, 10.) Yesu alobaki boye: “Na ntango yango bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi.” (Mat. 13:43) Ndenge nini boyebi ya solo efuluki na ntango ya nsuka? Tótala mwa makambo oyo esalemaki na bambula oyo ezalaki liboso ya 1914, mbula oyo ntango ya nsuka ebandaki.

13. Charles Taze Russell akomaki nini nsima ya koyekola likambo etali kozonga bato ya kokoka?

13 Na nsuka ya bambula ya 1800, bato mwa mingi ya mitema sembo bakómaki koluka koyeba “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba.” (2 Tim. 1:13) Charles Taze Russell azali moko na bango. Na mobu 1870, ye ná bato mosusu oyo bazalaki koluka solo bakómaki koyekola Biblia elongo. Na mobu 1872, bayekolaki likambo etali kozonga bato ya kokoka. Na nsima, Russell akomaki boye: “Tii na ntango wana tozalaki koyeba polele te bokeseni monene oyo ezali na kati ya mbano ya eklezia (lisangá ya baklisto bapakolami) oyo ezali komekama sikoyo mpe mbano ya bato ya sembo ya mokili mobimba.” Basembwi ya mokili “bakokóma lisusu bato ya kokoka ndenge Adama, nkɔkɔ na bango ya liboso, azalaki na Edene.” Russell andimaki ete bato mosusu basalisaki ye na boyekoli na ye ya Biblia. Bato yango banani?

14. (a) Ndenge nini Henry Dunn alimbolaki Misala 3:21? (b) Dunn alobaki ete banani nde bakofanda na mabelé libela na libela?

14 Moko ya bato yango ezalaki Henry Dunn. Akomaki na ntina na “kozongisama ya makambo nyonso oyo Nzambe alobaki na monɔkɔ ya basakoli na ye basantu ya ntango ya kala.” (Mis. 3:21) Dunn ayebaki ete kozongisama yango ekosala mpe ete bato bákóma lisusu bato ya kokoka awa na mabelé, na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Dunn atalelaki mpe motuna moko oyo bato mingi bazalaki komituna: Banani bakozala na bomoi ya seko awa na mabelé? Alimbolaki ete bamilio ya bato bakosekwa, bakoteyama solo, mpe bakozwa libaku ya kondima Klisto.

15. George Storrs asosolaki nini na ntina na lisekwa?

15 Na mobu 1870, George Storrs mpe amonaki ete bato oyo bazangi sembo bakosekwa mpe bakozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko. Na nzela ya Makomami, asosolaki mpe ete soki moto oyo asekwi aboyi libaku yango “akokufa, ata soki ‘mosumuki yango azali na mbula nkama.’” (Yis. 65:20) Storrs azalaki kofanda na Brooklyn, na etúká ya New York, mpe azalaki kobimisa zulunalo Scrutateur de la Bible.

16. Nini ekesenisaki Bayekoli ya Biblia ná mangomba ya boklisto?

16 Boyekoli ya Biblia esalisaki Russell asosola ete ntango ekokaki mpo nsango malamu epalangana. Yango wana na mobu 1879, abandaki kobimisa zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (na ntango wana bazalaki kobenga yango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona mpe Mosakoli ya kozala ya Klisto). Liboso, bato moke kaka nde bayebaki elikya ya bomoi na mikolo ekoya, kasi kobanda na ntango wana, bituluku ya Bayekoli ya Biblia na mikili ndenge na ndenge bakómaki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe koyekola yango. Liteya oyo elobi ete kaka bato moke nde bakokende likoló, kasi bamilio ya bato bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé ekesenisaki mpenza Bayekoli ya Biblia ná bandimi ya mangomba mingi ya boklisto.

17. Ndenge nini boyebi ya solosolo ekómi mingi?

17 Ntango ya nsuka oyo esakolamaki ebandaki na 1914. Boyebi ya solosolo mpo na elikya ya bato ekómaki nde mingi? (Dan. 12:4) Na 1913, masolo ya Russell ezalaki kobimisama na bazulunalo 2 000 oyo ezalaki kotángama na bato 15 000 000. Na nsuka ya 1914, bato koleka 9 000 000 na bakɔntina misato batalaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi,” filme mpe bililingi oyo ezalaki komonisa Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Kobanda na 1918 tii na 1925, basaleli ya Yehova basalaki, na minɔkɔ koleka 30, lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo “Bamilio ya bato oyo bazali na bomoi lelo bakokufa te.” Lisukulu yango elobelaki elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé. Na 1934, Batatoli ya Yehova basosolaki ete baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na mabelé basengeli kozwa batisimo. Likambo yango ebakiselaki bango molende na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Lelo oyo, bamilio ya bato bazali na botɔndi epai ya Yehova mpo na elikya ya bomoi ya seko na mabelé.

‘Bonsomi oyo etondi na nkembo’ ezali koya!

18, 19. Yisaya 65:21-25 esakoli bomoi ya ndenge nini?

18 Elimo ya Nzambe etindaki mosakoli Yisaya akoma mpo na bomoi oyo basaleli ya Nzambe bakozala na yango na mabelé. (Tángá Yisaya 65:21-25.) Emonani ete banzete mosusu oyo ezalaki ntango Yisaya akomaki maloba wana, eleki sikoyo mbula soki 2 700, ezali tii lelo oyo. Kanisá soki ozali na bomoi molai ndenge wana mpe na nzoto makasi!

19 Tokozala te na bomoi kaka mpo na mwa ntango, bongo na nsima tokufi; tokozala na bomoi molai oyo ekopesa biso libaku ya kotonga, kolona, mpe koyekola makambo mingi. Kanisá baninga oyo okoki kozala na bango. Boninga yango ekokola libela na libela. Na ntango yango, “bana ya Nzambe” awa na mabelé bakozwa mpenza ‘bonsomi oyo etondi na nkembo’!​—Lom. 8:21.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Augustin alobaki ete Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo oyo ekoya, kasi oyo esilaki kobanda ntango lingomba esalemaki.

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini elikya ya bato ya kozala na bomoi na mabelé ebombamaki?

• Batángi mosusu ya Biblia bayebaki makambo nini na bambula ya 1 600?

• Ndenge nini elikya ya solosolo ekómaki polele pene na 1914?

• Ndenge nini boyebi ya elikya ya bomoi na mabelé efulukaki?

[Bililingi na lokasa 13]

Mokomi John Milton (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Isaac Newton, moto ya mayele na matematiki (na lobɔkɔ ya mobali), bayebaki elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé

[Bililingi na lokasa 15]

Na nzela ya Makomami, Bayekoli ya Biblia ya ebandeli basosolaki ete ntango ekokaki mpo elikya ya solosolo mpo na bato eyebana na mokili mobimba

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto