‘Yehova angɛngisi elongi na ye epai na bango’
ELONGI ya moto ezali na misisa to maboke ya misuni koleka 30. Kaka mpo na komungamunga, esɛngaka misisa yango 14 esala mosala elongo! Kanisá ndenge masolo na yo elingaki kozala soki misisa yango ezalaka te. Elingaki ezala kitoko? Mpenza te. Nzokande, mpo na bababa, misisa ya elongi ezali kaka te mpo masolo ezala kitoko. Soki esangani na bajɛstɛ ya nzoto, esalisaka mingi mpo na kobimisa makanisi. Bato mingi bakamwaka ndenge elobeli ya bajɛstɛ eyebaka kobimisa ata makanisi ya mpasi mpo na kokanga ntina mpe bandimbola ndenge na ndenge ya makambo.
Banda mwa bambula, bababa ya mokili mobimba bamoni elongi moko oyo esalaka bajɛstɛ mpe emonisaka makambo mingi koleka bilongi ya bato nyonso. Na ndenge ya elilingi, bamoni “elongi ya Yehova.” (Bil. 2:19, NW) Yango esalemi kaka mpamba te. Yehova amonisá banda kala ete alingaka bababa. Asalaki bongo banda kala mpenza, na ntango ya bana ya Yisalaele. (Lev. 19:14) Na ntango na biso, bolingo na ye mpo na bababa ezali mpe komonana polele mpenza. “Mokano [ya Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Ndenge bazwi boyebi ya sikisiki ya solo na ntina na Nzambe, bababa bakómi komona elongi na ye. Esalemi ndenge nini kozanga lisalisi ya maloba? Liboso tóyanola na motuna yango, tólobela naino mpo na nini elobeli ya bajɛstɛ ezali na ntina mingi mpo na bababa.
Komona ezali koyoka
Bato bakanisaka makambo mingi ya lokuta mpo na bababa mpe elobeli ya bajɛstɛ. Tósalisa yo oyeba makambo etali bababa. Bababa bakoki kotambwisa mituka. Ezalaka mpenza mpasi báyeba makambo oyo moto alobi na kotala kaka mbɛbu na ye. Elobeli ya bajɛstɛ ekokani ata moke te na ekomeli ya bato bakufá miso, mpe ezali kaka te koloba kozanga kobimisa maloba. Elobeli ya bajɛstɛ ezali kaka moko te na mokili mobimba. Longola yango, bajɛstɛ ya bababa ya mboka moko ekesanaka mwa moke na oyo ya bababa ya mboka mosusu.
Bababa bakoki kotánga? Atako bamosusu batángaka malamu, bababa mingi bazalaka na mokakatano ya kotánga. Mpo na nini? Mpo makambo oyo ezalaka na mokanda ezalaka elobeli ya bato oyo bayokaka. Tótalela ndenge mwana oyo ayokaka ayekolaka monɔkɔ. Ntango kaka mwana abotami, azalaka esika moko na bato oyo balobaka monɔkɔ yango. Nsima ya mwa ntango, akómaka na likoki ya kosangisa maloba mpe kosala bafraze. Asalaka yango kozanga mpasi kaka na koyoka ndenge bazali koloba. Na yango, ntango bana oyo bayokaka babandi koyekola kotánga, bayekolaka nde koyeba ete maloba oyo ezali na mokanda ekokani na maloba oyo bayokaka mpe oyo bayebá kala.
Sikoyo, kanisá ete okei na mboka mopaya mpe batye yo na ndako moko ya talatala epai makɛlɛlɛ ekɔtaka te. Naino oyoká monɔkɔ ya mboka yango te. Mokolo na mokolo, bato ya mboka yango bazali koya mpe komeka kosolola na yo nsima ya talatala. Okoki koyoka te makambo oyo bazali koloba. Ozali komona kaka ete mbɛbu na bango ezali koningana. Lokola bamoni ete ozali koyeba te makambo bazali koloba, bakomeli yo maloba yango na papye mpe balakisi yo yango nsima ya talatala. Bakanisi ete osengeli koyeba yango. Okanisi ete okokanga ntina ya makambo boni? Na ntembe te okomona ete ezali mpasi mpenza kosolola na bato yango. Mpo na nini? Mpamba te makambo oyo bakomeli yo ezali na monɔkɔ oyo oyoká naino te. Ezali mpenza yango nde mokakatano oyo bababa mingi bazalaka na yango.
Elobeli ya bajɛstɛ ezali lolenge ya malamu ya kosolola mpo na bababa. Moto asalaka bajɛstɛ zingazinga ya nzoto na ye mpo na kobimisa makanisi. Bajɛstɛ ya mabɔkɔ na ye mpe ya nzoto na ye bakisá mpe ya elongi na ye elandaka mibeko ya elobeli ya bajɛstɛ. Yango ebimisaka elobeli oyo esalisaka moto ayebisa makambo oyo moto mosusu akoyeba yango na nzela ya miso.
Kutu, pene na jɛstɛ nyonso oyo baba asalaka na mabɔkɔ, na nzoto to na elongi ntango azali koloba ezalaka na ndimbola. Bajɛstɛ ya elongi ezalaka kaka mpo na kokamwisa bato te. Ezali moko ya makambo ya ntina mingi na mibeko ya elobeli ya bajɛstɛ. Topesá ndakisa: Soki moto atomboli mankiki ntango azali kotuna motuna, elimboli ete motuna yango esɛngi eyano te to esɛngi ete moto ayanola kaka ɛɛ to te. Soki akitisi mankiki, ezali mpo na kotuna nani, nini, wapi, ntango nini, mpo na nini, to ndenge nini. Bakoki kosalela bajɛstɛ mosusu ya monɔkɔ mpo na komonisa bonene to moke ya eloko, to bonene ya likambo. Ndenge oyo baba azali koningisa motó na ye, kotombola mapeka na ye, koningisa matama na ye, kokanga to kofungola miso na ye, nyonso wana ebakisaka mwa ndimbola na makanisi oyo azali kobimisa.
Nyonso wana soki esangani esika moko ebimisaka elobeli oyo ezalaka elɛngi na kotala. Soki asaleli makambo wana nyonso, baba oyo ayebi malamu elobeli ya bajɛstɛ azali na nyonso mpo na kolobela ata likambo nini—ya ntɔki, ya tekiniki, ya lolango, ya kosɛkisa, oyo tokoki kosimba mpe oyo tokoki kosimba te.
Bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ ezali kosalisa
Ntango boyebi ya Yehova elakisami na elobeli ya bajɛstɛ, baba akoki koyoka nsango yango mpe ‘kondimela’ Nkolo na yango. Na yango, Batatoli ya Yehova basalá milende mingi mpo na kosakwela bababa ya mokili mobimba mpe kobimisa bisaleli oyo ekoki kosalisa bango. (Lom. 10:14) Lelo, na mokili mokili mobimba ezali na baekipi 58 ya babongoli na elobeli ya bajɛstɛ mpe bavideo oyo ezali kobima na ba DVD ezali sikoyo na bilobeli ya bajɛstɛ 40. Milende nyonso wana ezali na ntina?
Jeremy, oyo baboti na ye bazali bababa, alobi boye: “Nabosanaka te mokolo moko oyo tata alekisaki bangonga mingi na shambre na koyekola kaka mwa baparagrafe ya lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, azalaki koluka kokanga ntina na yango. Na mbala moko, abimaki na shambre na esengo mpe alobaki na bajɛstɛ ete: ‘Nakangi ntina na yango! Nakangi ntina na yango!’ Na nsima, alimbwelaki ngai makambo yango. Na ntango wana, nazalaki kaka na mbula 12. Nabwakaki liso nokinoki na baparagrafe yango mpe nalobaki ete: ‘Tata, nakanisi ete ezali bongo te. Ezali nde boye . . .’ Asalaki ngai jɛstɛ ete natika koloba mpe azongaki na shambre na ye mpo ye moko akanga ntina ya makambo yango lisusu. Nakobosana te mawa oyo namonaki na elongi na ye mpe limemya oyo nayokaki mpo na ye ntango nazalaki kotala ye ndenge azalaki kozonga na shambre. Kasi, ndenge tokómá na ba DVD ya mikanda na elobeli ya bajɛstɛ esalisá ye akanga malamu ntina ya makambo. Komona esengo na elongi na ye ntango azali koloba ndenge ayokaka mpo na Yehova ezali likambo oyo namonaka ete ezali mpamba te.”
Tózwa mpe ndakisa ya mwasi ná mobali moko oyo bazali Batatoli mpe basololaki na Jessinia, elenge mwasi moko ya baba, na ekólo Chili. Ntango mama ya Jessenia apesaki bango ndingisa bálakisa Jessenia DVD ya Mokanda mpo na masolo ya Biblia na elobeli ya bajɛstɛ ya Chili, Batatoli yango balobaki boye: “Ntango Jessenia abandaki kotala masolo yango, abandaki kosɛka mpe na nsima akómaki kolela. Ntango mama na ye atunaki ye ntina oyo azalaki kolela, alobaki ete ezali mpo azali kosepela na makambo oyo azalaki kotala. Nde mama na ye amonaki ete azalaki koyeba makambo nyonso oyo ezalaki na DVD yango.”
Mwasi moko ya baba, oyo afandaka na mboka moko ya Vénézuéla, abotaki mwana moko, mpe akómaki na zemi mosusu. Ye ná mobali na ye bamonaki ete lokola bazalaki na mbongo te, bakokoka kobɔkɔla mwana mosusu te, yango wana bazalaki kokanisa bálongola zemi yango. Atako bayebaki likambo yango te, Batatoli ya Yehova bakendaki kuna mpe balakisaki bango liteya 12 ya mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na video ya elobeli ya bajɛstɛ ya Vénézuéla. Liteya yango emonisi makanisi ya Nzambe na ntina etali kosopa zemi mpe koboma. Na nsima, mwasi wana ayebisaki Batatoli ete asepelaki mingi ndenge ayekolaki liteya yango. Alobaki ete bazwaki ekateli ya kosopa zemi yango lisusu te. Mokanda na DVD ya elobeli ya bajɛstɛ ebikisaki bomoi ya moto!
Lorraine, Motatoli moko ya baba alobi boye: “Koyekola Biblia ezalaki lokola lisano ya koluka eloko oyo ebombami. Nazalaki kokanga ntina ya makambo mosusu te, biloko mosusu ezalaki kozanga. Nzokande, ntango mateya ya Biblia ekómaki na elobeli ya bajɛstɛ, nakómaki kokanga ntina ya makambo nyonso.” George, oyo azali baba mpe azali Motatoli eleki sikoyo mbula 38, alobi boye: “Ntembe ezali te ete kozala na likoki ya kokanga ntina ya makambo yo moko, epesaka moto nzoto kilo mpe ekitisaka motema. Namonaka ete ba DVD ya elobeli ya bajɛste esalisi ngai mingi mpo nakola na elimo.”
“Likita na monɔkɔ na ngai!”
Longola mikanda oyo ezali na ba DVD ya elobeli ya bajɛstɛ, Batatoli ya Yehova bazali mpe na masangá epai makita nyonso esalemaka na elobeli ya bajɛstɛ. Lelo, na mokili mobimba, masangá ya elobeli ya bajɛstɛ ezali koleka 1 100. Balobaka na bababa na monɔkɔ na bango, mpe balakisaka solo ya Biblia na ndenge oyo bababa bakanisaka, elingi koloba na monɔkɔ na bango. Mateya ya Biblia eyebisamaka na ndenge oyo ezali komonisa limemya mpo na bababa mpe mimesano na bango.
Masangá ya elobeli ya bajɛstɛ ezali kosalisa? Tózwa ndakisa ya Cyril, oyo akómaki Motatoli ya Yehova mpe azwaki batisimo na 1955. Na boumeli ya bambula, azalaki kosala nyonso mpo na koyekola mikanda mpe koyangana na makita nyonso. Mbala mosusu, babongoli bazalaki, mbala mosusu mpe bazalaki te. Soki ata mobongoli moko azali te, azalaki kolikya epai ya bandeko oyo bazalaki kosalisa ye na bolingo mpe kokomela ye makambo oyo bazalaki koloba na estrade. Ezalaki na 1989, nsima ya mbula 34 banda akómaki Motatoli nde lisangá ya liboso ya elobeli ya bajɛstɛ efungwamaki na États-Unis, na engumba New York. Cyril ayokaki ndenge nini ntango akómaki na lisangá yango? Alobi boye: “Ezalaki lokola moto abimi na zamba, na libulu moko ya molili mpe akɔti na pole. Likita na monɔkɔ na ngai!”
Masangá ya elobeli ya bajɛstɛ ya Batatoli ya Yehova ezali bisika oyo bababa bakoki koyangana elongo mbala na mbala mpo na koyekola makambo ya Nzambe mpe kosambela ye. Ezali bisika oyo basaleli ya Nzambe bakoki kozwa baninga mpe kolendisama. Na mokili oyo bababa bakoki kosolola na bato te mpe kozala esika moko te na bato, masangá yango ezali bisika oyo bakoki kosolola mpe kozwa baninga. Kuna, bababa bakoki koyekola, kokola mpe kokende liboso na mosala ya Yehova. Batatoli mingi oyo bazali bababa basalaka mosala ya kosakola ntango nyonso. Bamosusu bakendá na mikili mosusu mpo na kosalisa bababa báyeba Yehova. Bandeko mibali oyo bazali bababa bazali koyekola kokóma bateyi ya malamu, kobongisa makambo na lisangá, mpe kozala bakɛngɛli, mpe mingi kati na bango bazali kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá.
Na États-Unis, ezali na masangá koleka 100 mpe bituluku soki 80 ya elobeli ya bajɛstɛ. Na Brésil, ezali na masangá soki 300 mpe bituluku koleka 400 ya elobeli ya bajɛstɛ. Ezali na masangá ya elobeli ya bajɛstɛ pene na 300 na Mexique. Russie ezali na masangá koleka 30 mpe bituluku 113 ya elobeli ya bajɛstɛ. Wana ezali kaka mwa bandakisa ya bokoli oyo ezali kosalema na mokili mobimba.
Batatoli ya Yehova basalaka mpe mayangani ya mike mpe ya minene na elobeli ya bajɛstɛ. Na mbula oyo eleki, mayangani koleka 120 esalemaki na mokili mobimba na elobeli ya bajɛstɛ ya mikili ndenge na ndenge. Mayangani yango esalisaka bababa bámona ete bázali na kati ya lisangá ya bandeko ya mokili mobimba oyo bazali kozwa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.
Leonard azali baba mpe Motatoli ya Yehova esali mbula koleka 25. Alobi boye: “Banda kala, nayebaka ete Yehova azali Nzambe ya solo. Kasi, nazalaki mpenza koyeba te ntina oyo atikaki nzela na bampasi. Ntango mosusu ezalaki kotinda ngai nayokela ye nkanda. Kasi, na lisukulu moko oyo esalemaki na liyangani na elobeli ya bajɛstɛ, oyo elobelaki likambo yango, nsukansuka nayebaki malamu ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala. Ntango lisukulu yango esilaki, mwasi na ngai atutaki ngai na lobɔkɔ mpe atunaki ete, ‘Ozwi eyano?’ Nandimaki na bosembo nyonso ete, ɛɛ! Nsima ya mbula 25, nazali na esengo ndenge natikaki Yehova te. Nazalaki kaka kolinga ye kasi nazalaki koyeba ye malamu te. Lelo nayebi ye malamu!”
Mitema etondi na botɔndi
Makambo nini bababa bamonaka na elongi ya Yehova ntango bayekoli koyeba ye? Bolingo, motema mawa, boyengebene, bosembo, motema-boboto, mpe makambo mingi mosusu.
Lisangá ya bababa oyo bazali Batatoli na mokili mobimba bazali komona elongi ya Yehova mpe bakokoba komona yango polele koleka. Na bolingo na motema mpo na bababa, ‘Yehova angɛngisi elongi na ye epai na bango.’ (Mit. 6:25) Bababa yango bazali mpenza na botɔndi ndenge bayebi Yehova!
[Bililingi na lokasa 25]
Masangá ya elobeli ya bajɛstɛ na mokili mobimba ezali koleka 1 100
[Bililingi na lokasa 26]
Elongi ya Yehova engɛngi makasi epai ya bababa