Kebá na makambo oyo ekoki kolya ntango na ‘mokolo oyo ya nsango malamu’
BATO minei ya maba bakanisaki lisusu likambo oyo basengeli kosala. Moto moko te akabelaki bango eloko na porte ya engumba. Lokola Basulia bazingaki Samalia, nzala ekɔtaki na engumba yango. Ntina ya kokɔta na engumba ezalaki te; biloko ya kolya emataki ntalo makasi. Kutu, nsango epanzanaki ete balei moto.—2 Mik. 6:24-29.
Bato ya maba bakómaki kokanisa ete, ‘Mpo na nini te tókende ata na kaa ya Basulia? Oyo ekoya eya.’ Ntango molili ekɔtaki, basimbaki nzela mpe bakendaki. Ntango bakómaki na kaa, makɛlɛlɛ ezalaki te. Basinzili bazalaki te. Bampunda ekangamaki, kasi ata soda moko te azalaki. Bato yango minei batalaki na kati ya hema moko. Bamonaki moto te, kasi bilei ná masanga ezalaki beboo. Bazwaki biloko yango, balyaki mpe bamɛlaki. Bato yango ya maba bamonaki mpe wolo, palata, bilamba, mpe biloko mosusu ya motuya. Bazwaki yango, babombaki yango, mpe bazongaki mpo na kozwa mosusu. Kaa mobimba ezalaki lisusu ata na soda moko te. Na ndenge ya likamwisi, Yehova abimiselaki Basulia lokito ya basoda oyo bazali koya na etumba. Basulia bakanisaki ete bazali koya kobundisa bango; na yango bakimaki na makolo. Basundolaki biloko nyonso!
Bato ya maba bazalaki kozwa biloko ya motuya mpe kokende kobomba yango. Nzokande, ntango bakanisaki ndenge Samalia ezalaki kokufa na nzala, lisosoli na bango ebandaki kotungisama. Babandaki kolobana ete: “Tozali kosala malamu te; mokolo oyo ezali mokolo ya nsango malamu.” Bato ya maba bazongaki mbangu na Samalia mpe bayebisaki nsango malamu ya makambo oyo bamonaki.—2 Mik. 7:1-11.
Biso mpe tozali na eleko oyo tokoki kobenga “mokolo ya nsango malamu.” Yesu atángaki likambo moko ya ntina ya “elembo . . . ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” ntango alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:3, 14) Yango esengeli kotinda biso tósala nini?
Mitungisi na biso moko ekoki kokómisa biso kilo
Lokola bato ya maba batondaki na esengo mpo na biloko oyo bamonaki, babosanaki Samalia mpo na mwa ntango. Batyaki makanisi kaka na biloko oyo bakokaki kozwa. Likambo ya ndenge wana ekoki kokómela biso? “Kozanga bilei” ezali moko na makambo ya elembo ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo oyo. (Luka 21:7, 11) Yesu akebisaki bayekoli na ye boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi.” (Luka 21:34) Biso baklisto tosengeli kokeba mpo tótika te ete mitungisi na biso mpo na bomoi ya mokolo na mokolo etinda biso tóbosana ete tozali na “mokolo ya nsango malamu.”
Ndeko mwasi moko na nkombo Blessing atikaki te ete matomba na ye moko ekómisa ye kilo. Akómaki mobongisi-nzela mpe nsima ya kosilisa kelasi, nsukansuka ndeko moko oyo asalaka na Betele abalaki ye mpe akɔtaki na Betele ya ekólo Bénin. Ndeko mwasi yango alobi boye: “Nasalaka mosala ya kobongisa bashambre mpe nasepelaka mpenza na mosala yango.” Lelo oyo, Blessing ayokaka esengo soki akanisi mbula 12 oyo alekisi na mosala ya ntango nyonso mpe ndenge atyaki makanisi na ye nyonso na “mokolo ya nsango malamu” oyo tozali.
Kebá na makambo oyo elyaka ntango
Ntango Yesu atindaki bayekoli 70, alobaki na bango boye: “Mosala ya kobuka mbuma ezali monene, kasi basali bazali moke. Na yango, bósɛnga na Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Luka 10:2) Ndenge kaka mosali-bilanga akoki kobebisa mbuma mosusu soki aumeli mpo na kobanda kobuka yango, bopɔtu na mosala ya kosakola ekoki kozangisa bato bomoi. Yango wana, Yesu abakisaki boye: “Bóyambana ná moto te na nzela mpo na kopesa ye mbote.” (Luka 10:4) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kopesa mbote” elimbolaka ntango nyonso kaka “mbote” to “losako” te. Ekoki mpe kolimbola koyambana na moto mpe kosolola ntango molai, ndenge tosalaka ntango tokutani na moninga. Na yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete báboya makambo oyo ekolekisa bango ntango mpamba mpe básalela ntango na bango malamu. Basengelaki kosakola nsango oyo bazalaki na yango na lombangu.
Kanisá naino ntango oyo tokoki kobungisa na makambo ya mpambampamba. Na bambula oyo eleki, na bisika mingi, televizyo nde ezalaki eloko ya liboso oyo ezalaki kolya bato ntango. Kasi, tokoloba nini mpo na batelefone ya mabɔkɔ mpe baordinatɛrɛ ya ndako? Ntango batunaki bato 1 000 ya Grande-Bretagne mituna, ankɛtɛ yango emonisaki ete “moto ya Grande-Bretagne oyo azali mozwi te alekisaka miniti 88 na mokolo mpo na kosolola na telefone ya ndako, miniti 62 mpo na kosolola na telefone ya mabɔkɔ, miniti 53 mpo na kotindela bato mikanda na nzela ya ordinatɛrɛ mpe miniti 22 mpo na kotindelana bansango na telefone ya mabɔkɔ (SMS).” Soki tosangisi miniti nyonso wana, ekoleka mbala mibale ntango oyo mobongisi-nzela mosungi alekisaka na mosala ya kosakola na mokolo! Yo olekisaka ntango boni mpo na kosolola na telefone, na ordinatɛrɛ, mpe na SMS?
Ndeko Ernst Seliger ná mwasi na ye Hildegard bazalaki kolinga kosalela malamu ntango na bango. Bango mibale balekisaki mbula koleka 40 na bakaa ya bakangami ya Banazi mpe na babolɔkɔ ya Bakoministe. Ntango babimaki na bolɔkɔ, basalaki mosala ya mobongisi-nzela tii na nsuka ya bomoi na bango awa na mabelé.
Bato mingi bazalaki kolinga kokomelana mikanda ná Ndeko Seliger mpe mwasi na ye. Longola kaka ntango ya kolala, ndeko yango ná mwasi na ye bakokaki kosalela ntango na bango mingi kaka na kotánga mpe kokoma mikanda. Nzokande, bango batyaki makambo ya elimo na esika ya liboso.
Ya solo, biso nyonso tolingaka kosolola na bandeko mpe baninga na biso na nzela ya mikanda to na telefone, mpe yango ezali mabe te. Kobongola mwa moke makambo oyo tosalaka na mokolo esalisaka. Atako bongo, tosengeli kokeba na makambo oyo elyaka ntango na mokolo oyo ya kosakola nsango malamu.
Tósakola malamumalamu mpenza nsango malamu
Ezali lipamboli monene kozala na bomoi na “mokolo ya nsango malamu.” Makambo mosusu ebenda likebi na biso te ndenge ezalaki na ebandeli mpo na bato ya maba. Tóbosana te ete bato yango balobaki boye: “Tozali kosala malamu te.” Ndenge moko mpe, ezali malamu te tótika matomba na biso moko to makambo oyo elyaka ntango epekisa biso tómipesa mobimba na mosala ya kosakola.
Na likambo yango, tozali na ndakisa ya malamu mingi oyo tokoki kolanda. Ntango ntoma Paulo akanisaki mbula 20 oyo alekisaki na mosala ya kosakola, akomaki boye: “Nasili kosakola malamumalamu mpenza nsango malamu oyo etali Klisto.” (Lom. 15:19) Paulo atikaki eloko moko te ekitisa molende na ye. Biso mpe tózala molende lokola ye wana tozali kosakola nsango ya Bokonzi na “mokolo [oyo] ya nsango malamu.”
[Elilingi na lokasa 28]
Blessing atikaki te matomba na ye moko epekisa ye asala mosala ya ntango nyonso
[Elilingi na lokasa 29]
Ndeko Seliger ná mwasi na ye bazalaki kolinga kosalela malamu ntango na bango