Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Mwana oyo akufi na kati ya libumu ya mama na ye akoki kosekwa?
Bomoi ebandaka ntango mwasi azwi zemi. Yehova akoki kosekwisa bato ata soki bomoi na bango eumeli ntango boni mpo “makambo nyonso ekoki kosalema epai ya Nzambe.” (Mko. 10:27) Kasi, Biblia elobi polele te soki akosekwisa bana oyo bakufaki na kati ya libumu.—15/4, nkasa 12 mpe 13.
• Mpo na nini kotya likebi na nsɛlɛlɛ, simbiliki ya mabanga, mayoyo, mpe mosɛlɛkɛtɛ oyo babengaka gecko, ekoki koteya biso?
Banyama yango minei emonisaka ndenge mayele ya lɔɔmbi esalaka. Na yango, ekumisaka bwanya ya Nzambe. (Mas. 30:24-28)—15/4, nkasa 16-19.
• Nini ekokisaki mbula 100 mpo na Batatoli ya Yehova na mobu 2009?
Na 1909, biro monene ya Watch Tower Bible and Tract Society, ebongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta, elongwaki na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, mpe ekendaki na Brooklyn, na etúká ya New York, esika ezali tii lelo.—1/5, nkasa 22-24.
• Mpo na nini Biblia ekumisi ezaleli ya kofanda nyɛɛ?
Emonisi ete kofanda nyɛɛ emonisaka limemya, esalisaka mpo na komanyola, mpe emonisaka mayele mpe bososoli. (Nz. 37:7; 63:6; Mas. 11:12)—15/5, nkasa 3-5.
• Bokokani nini ezali kati na John Wycliffe, William Tyndale, Robert Morrison, mpe Adoniram Judson?
Bango nyonso bazalaki kolinga Liloba ya Nzambe mpe babongolaki yango na minɔkɔ oyo bato bakokaki kotánga. Wycliffe ná Tyndale babongolaki yango na Lingelesi, Morrison abongolaki yango na monɔkɔ ya Chinois, mpe Judson na monɔkɔ ya Birman (Myanmar).—1/6, nkasa 8-11.
• Bakonzi boni ya Yuda bamonisaki molende makasi mpo na ndako ya Nzambe?
Bakonzi 19 bayangelaki Yuda, bokonzi ya sudi, mpe minei kati na bango bamonisaki molende makasi mpo na ndako ya Nzambe—Asa, Yehosafata, Hizikiya, mpe Yosiya.—15/6, nkasa 7-11.
• Baklisto bapakolami nyonso oyo bazali awa na mabelé bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kopesa bilei ya elimo?
Te. Baklisto nyonso oyo bapakolami na elimo ya Nzambe bazali na kati ya etuluku ya moombo ya sembo mpe ya mayele, kasi baoyo basali Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde batambwisaka mosala ya kopesa bilei ya elimo.—15/6, nkasa 22-24.
• Mpo na nini basoda ya Loma basepelaki mingi na elamba ya kati ya Yesu?
Basoda oyo babomaki Yesu bapasolaki elamba na ye te. Mbala mingi, mpo na kosala elamba ya ndenge wana, bazalaki kogumba elamba moko na biteni mibale mpe kotonga yango na mipanzi, kasi elamba oyo Yesu alataki ezalaki mobimba, batongá ata na esika moko te; yango wana ezalaki na motuya mingi.—1/7, lokasa 22.
• Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo nde ezalaki likambo monene oyo ekesenisaki lolenge ya koteya ya Yesu ná oyo ya bakonzi ya mangomba?
Na esika bálinga bato mpamba, bakonzi yango bazalaki kotyola bango. Lisusu, bazalaki kolinga Nzambe te. Yesu azalaki kolinga Tata na ye mpe azalaki koyokela bato mawa. (Mat. 9:36) Azalaki na bolingo, motema mawa, mpe boboto epai na bango.—15/7, lokasa 15.
• Mpo na nini ndenge ya kosalela mbongo ekoki kozala mokakatano mpo na babalani, mpe ndenge nini bakoki kolonga?
Mbala mingi, mokakatano ya mbongo ezalaka nde ete mwasi ná mobali bazali kotyelana motema te, mpe mbala mosusu mwasi ná mobali babɔkwamá ndenge moko te. Sɛkɛlɛ minei mpo na kolonga ezali: Koyeba kosolola na kimya mpo na mbongo, koyokana mpo na ndenge ya kotalela mbongo oyo bozwaka, kokoma ndenge ya kosalela mbongo, mpe koyokana soki nani akosala nini.—1/8, nkasa 10-12.