Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/5 nk. 3-5
  • “Ntango ya kofanda nyee”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ntango ya kofanda nyee”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Emonisaka limemya
  • Emonisaka mayele mpe bososoli
  • Esalisaka mpo na komanyola
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Ntango na kozala nyɛɛ mpe ntango na koloba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Komanyola ya ndenge nini epesaka matomba?
    Lamuká!—2001
  • Tyá motema na yo epai na bososoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/5 nk. 3-5

“Ntango ya kofanda nyɛɛ”

LISESE moko ya kala ya Azia elobaka boye: “Koloba ezali palata, kofanda nyɛɛ ezali wolo.” Buku moko (Brewer’s Dictionary of Phrase and Fable) elobi ete lisese yango ekokani na lisese moko ya Liebele oyo elobaka ete: “Soki liloba moko ezali sɛkɛlɛ moko, kofanda nyɛɛ ekozala sɛkɛlɛ mibale.” Mokonzi Salomo mpe akomaki boye: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, ɛɛ likambo na likambo na ntango na yango na nse ya lola . . . ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.”​—Mos. 3:1, 7, NW.

Kasi, ntango nini ezalaka malamu kofanda nyɛɛ na esika ya koloba? Maloba “kotikala nyɛɛ” to “kofanda nyɛɛ” esalelami mbala mingi na kati ya Biblia. Bisika oyo maloba yango esalelami emonisi ntina ya kofanda nyɛɛ na makambo soki misato ya bomoi. Mpo na komonisa limemya, komonisa bososoli, mpe mpo na komanyola; tiká tótalela yango mokomoko.

Emonisaka limemya

Kofanda nyɛɛ ezalaka elembo mpo na kopesa limemya to lokumu. Mosakoli Habakuku alobaki boye: “[Yehova] azali kati na ndako na ye ya bulɛɛ, tiká ete mokili mobimba bázala nyɛɛ liboso na ye.” (Hab. 2:20) Basambeli ya solo basengeli ‘kozela, na kimya, lobiko oyo euti na Yehova.’ (Bil. 3:26, NW) Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Fandá nyɛɛ liboso ya Yehova mpe zelá ye na mposa makasi. Kosilika te mpo na moto oyo azali kolongisa nzela na ye.”​—Nz. 37:7, NW.

Tokoki kokumisa Yehova kozanga kobimisa maloba? Ekómelaka biso tótikala monɔkɔ polele ntango tomoni eloko moko oyo Yehova akelá? Kokanisa na biloko ya kokamwa oyo Mozalisi akelá ezali lolenge moko ya kokumisa ye na mitema na biso. Davidi abandaki nzembo na ye moko na maloba oyo: “Ee Nzambe, mpo na yo lisanzoli mpe kimya ezali na Siona; mpe elako ekokokisama epai na yo.”​—Nz. 65:1, NW.

Tosengeli komemya Yehova mpe maloba na ye. Na ndakisa, na maloba na ye ya nsuka epai ya Bayisalaele, Moize ná banganga-nzambe balobaki na bato nyonso oyo bazalaki wana boye: “Fandá nyɛɛ . . ., mpe osengeli koyoka mongongo ya Yehova Nzambe na yo.” Ntango bazalaki kotángela Bayisalaele Mobeko ya Nzambe, ata bana mike basengelaki kofanda nyɛɛ. Moize alobaki boye: “Yanganisá bato, mibali, basi ná bana mike . . . mpo báyekola.”​—Det. 27:9, 10; 31:11, 12, NW.

Ebongi mpenza ete basaleli ya Yehova lelo oyo báyokaka na limemya nyonso mateya oyo bazwaka na makita ya boklisto ata mpe na mayangani! Ntango makita ezali kosalema, tokozanga mpenza limemya na Liloba ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye soki tozali kosolola mpambampamba na bato mosusu. Ntango ya makita ezalaka ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ya koyoka.

Ata ntango tozali kosolola na baninga, koyeba koyoka emonisaka limemya. Na ndakisa, Yobo alobaki na baninga na ye boye: “Bólakisa ngai, mpe ngai, nakofanda nyɛɛ.” Yobo andimaki kofanda nyɛɛ mpe koyoka ntango bango bazalaki koloba. Mpe ntango ye azwaki maloba, alobaki na bango boye: “Bófanda nyɛɛ liboso na ngai, mpo ngai moko naloba.”​—Yobo 6:24; 13:13, NW.

Emonisaka mayele mpe bososoli

Biblia elobi boye: “Ye oyo apekisaka mbɛbu na ye azali kosala na mayele.” “Moto oyo azali na bososoli mingi afandaka nyɛɛ.” (Mas. 10:19; 11:12, NW) Tótalela ndenge oyo Yesu amonisaki bwanya mpe bososoli ntango afandaki nyɛɛ. Ntango amonaki ete koyanola banguna na ye ekozala na ntina moko te, ‘Yesu afandaki nyɛɛ.’ (Mat. 26:63) Na nsima, ntango azalaki kosamba liboso ya Pilato, Yesu “azongisaki eyano te.” Atikaki bato oyo bazalaki wana, oyo bayebaki ye, bango moko bázwa eyano.​—Mat. 27:11-14.

Biso mpe, ekozala malamu tópekisaka mbɛbu na biso, mingimingi ntango batumoli biso. Biblia elobi boye: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azalaka na bososoli mingi, kasi ye oyo azali motema mokuse atombolaka bozoba.” (Mas. 14:29, NW) Soki tolobi ntango batumoli biso, tokoki kobimisa likambo moko oyo ekopesa biso mawa na nsima. Na ntango wana, maloba na biso ekomonisa bozoba, mpe mpo na yango makanisi na biso ekotungisama.

Ekozala mayele tókeba na mbɛbu na biso ntango tozali liboso ya bato mabe. Na mosala ya kosakola, ntango tokutani na bato oyo bazali kotyola biso, ekozala malamu tófanda nyɛɛ. Lisusu, ekozala mpe malamu tófanda nyɛɛ mpo tómonisa te ete tozali kosepela ntango moninga moko ya kelasi to ya mosala azali kosala masɛki ya mabe to koloba maloba ya nsɔni. (Ef. 5:3) Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Nakobatela monɔkɔ na ngai na ekangeli na ntango wana bato mabe bazali liboso na ngai.”​—Nz. 39:1.

Moto ya “bososoli mingi” azalaka ntango nyonso moto oyo abongi kotyelama motema. (Mas. 11:12) Moklisto ya solo akosɛnzɛla ntango nyonso ete abimisa sɛkɛlɛ te. Mingimingi, bankulutu basengeli kokeba na likambo yango, mpo bandeko na lisangá bákoba kotyela bango motema.

Kofanda nyɛɛ ekoki mpe kosalisa. Sydney Smith, mokomi moko ya Angleterre na ekeke ya 19 akomaki mpo na moto moko ya ntango na ye boye: “Ndenge oyo aponaka ntango mosusu kofanda nyɛɛ, esalaka ete masolo na ye ezala kitoko mingi.” Ya solo, ntango tozali kosolola ná baninga, tosengeli mpe kotikaka bango báloba. Moto oyo ayebi kosolola ezali oyo ayebi koyoka.

Salomo alobaki boye: “Na mingi na maloba, masumu mazangi te; nde ye oyo akangi monɔkɔ na ye azali na mayele.” (Mas. 10:19) Na yango, soki tozali koloba mingi te, ekozala mwa mpasi tóloba likambo moko oyo tosengeli te koloba. Kutu, “Ata zoba, ntango afandi nyɛɛ, akomonana lokola moto ya bwanya; moto nyonso oyo azali kokanga mbɛbu na ye, akomonana lokola azali na mayele.” (Mas. 17:28, NW) Na yango, tiká tóbondelaka Yehova ‘atya sinzili na porte ya mbɛbu na biso.’​—Nz. 141:3, NW.

Esalisaka mpo na komanyola

Mpo na moto oyo azali kolanda nzela ya boyengebene, Biblia eyebisi biso ete “atángaka mobeko [ya Nzambe] na mongongo ya nse butu moi.” (Nz. 1:2, NW) Biblia moko (The Amplified Bible) ebongoli yango boye: “Na mobeko na Ye . . . azalaka na momeseno ya komanyola . . . butu na moi.” Na ntango nini ebongaka komanyola?

Yisaka, mwana ya Abalayama “abimaki kotambola mpo na komanyola na esobe, wana mpokwa ebandaki kokóma.” (Gen. 24:63, NW) Aponaki ntango mpe esika oyo bato bazalaki te mpo na komanyola. Mokonzi Davidi azalaki komanyola na butu, ntango bato balali. (Nz. 63:6) Ata Yesu, moto ya kokoka, azalaki kozwa ntango ya kozala kaka ye moko mpo na komanyola; azalaki kosala yango likoló ya ngomba, na esobe, mpe na bisika mosusu oyo bato bazalaki te.​—Mat. 14:23; Luka 4:42; 5:16.

Kofanda nyɛɛ ezali mpenza malamu. Kofanda nyɛɛ ekoki kopesa moto libaku ya komitalela malamu​—esalisaka biso tóyeba makambo oyo tokoki kobongisa na bomoi na biso. Kofanda nyɛɛ ekoki kopesa moto kimya ya makanisi. Komanyola mpo na mwa ntango esalisaka biso tókóma na komikitisa; ekoki mpe kosalisa biso tóyeba makambo oyo ezali mpenza ntina na bomoi.

Atako koyeba kofanda nyɛɛ ezali malamu, ezalaka mpe na “ntango ya koloba.” (Mos. 3:7, NW) Lelo oyo, baklisto ya solo bazali na mosala monene ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi “na mabelé mobimba oyo efandami.” (Mat. 24:14) Makɛlɛlɛ ya esengo na bango ezali se kokóma makasi wana motángo na bango ezali se kobakisama. (Mika 2:12) Tósala nyonso mpo na kozala na kati ya bato oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende mpe bazali koyebisa makambo kitoko ya Nzambe. Wana tozali kosala mosala yango ya ntina mingi, tiká ntango mosusu mpe tómonisaka na bomoi na biso ete kofanda nyɛɛ ezali wolo.

[Elilingi na lokasa 3]

Ntango tozali na makita ya boklisto, tosengeli koyoka mpe koyekola

[Elilingi na lokasa 4]

Ntango bazali kotyola biso na mosala ya kosakola, kofanda nyɛɛ ekoki kozala eyano ya malamu

[Elilingi na lokasa 5]

Kofanda nyɛɛ esalisaka mpo na komanyola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto