Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/9 nk. 11-15
  • Zalá na botosi mpe na mpiko lokola Kristo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na botosi mpe na mpiko lokola Kristo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokoki kotosa atako tozali bato ya kozanga kokoka
  • Yesu, ndakisa monene ya mpiko
  • Zwá liteya na mpiko ya Yesu
  • Zalá na kondima mpe na mpiko lokola Kristo
  • Tózala na mpiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • ‘Bózala na mpiko mpe na makasi!’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • “Zalá na mpiko . . . mpe salá”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/9 nk. 11-15

Zalá na botosi mpe na mpiko lokola Kristo

“Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”​—YOA. 16:33.

1. Yesu atosaki Nzambe tii wapi?

YESU KRISTO azalaki ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe. Ata mbala moko te akanisaki koboya kotosa Tata na ye ya likoló. (Yoa. 4:34; Ebr. 7:26) Kasi, makambo oyo akutanaki na yango awa na mabele esalaki ete kotosa ezala pɛtɛɛ te mpo na ye. Na ebandeli ya mosala na ye ya kosakola, banguna ya Yesu, ata mpe Satana ye moko, balukaki kondimisa to kotyela ye motambo mpo atika kozala sembo. (Mat. 4:1-11; Luka 20:20-25) Banguna yango banyokolaki Yesu makasi na makanisi mpe na nzoto. Nsukansuka, babomaki ye na nzete ya mpasi. (Mat. 26:37, 38; Luka 22:44; Yoa. 19:1, 17, 18) Na nyonso wana, atako Yesu amonaki mpasi makasi, “atosaki tii liwa.”​—Tángá Bafilipi 2:8.

2, 3. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yesu na ndenge akobaki kotosa atako akutanaki na bampasi makasi?

2 Makambo oyo Yesu akutanaki na yango awa na mabele eteyaki ye botosi na ndenge oyo ayebaki yango liboso te. (Ebr. 5:8) Emonanaki lokola nde Yesu akokaki koyekola likambo mosusu te mpo na ndenge ya kosalela Yehova. Azalaki elongo na Yehova na boumeli ya ebele ya bambula mpe azalaki “mosali ya mayele” ntango Nzambe azalaki kokela. (Mas. 8:30) Nzokande, bosembo na ye emonanaki polele ntango ayikaki mpiko na kondima nyonso atako akutanaki na minyoko makasi. Yesu, Mwana ya Nzambe, akɔmɛlaki na elimo. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?

3 Atako azalaki moto ya kokoka, Yesu alukaki te kotikala sembo na makasi na ye moko. Azalaki kobondela Nzambe asalisa ye atikala sembo. (Tángá Baebre 5:7.) Mpo biso mpe tókoba kotosa, tosengeli kobondelaka Nzambe na komikitisa nyonso mpo asalisa biso. Mpo na yango, ntoma Paulo apesaki bakristo toli oyo: “Bóbatela na kati na bino makanisi oyo Kristo Yesu mpe azalaki na yango,” oyo “amikitisaki mpe atosaki tii liwa.” (Flp. 2:5-8) Bomoi ya Yesu emonisi ete bato bakoki kozala na botosi ata na mokili oyo ya mabe. Ya solo, Yesu azalaki moto ya kokoka, kasi ezali boni mpo na biso bato ya kozanga kokoka?

Tokoki kotosa atako tozali bato ya kozanga kokoka

4. Bonsomi ya kopona oyo tozali na yango epesi biso mokumba nini?

4 Ntango Nzambe akelaki Adama ná Eva, apesaki bango bonsomi ya kopona. Biso bana na bango tozali mpe na bonsomi yango. Yango elimboli nini? Elimboli ete tozali na likoki ya kopona kosala malamu to kosala mabe. Na maloba mosusu, Nzambe apesá biso bonsomi ya kopona kotosa ye to koboya kotosa ye. Mpo na bonsomi yango, tokozongisa monɔkɔ. Ya solo, bikateli oyo tozwaka ekoki komemela biso bomoi to liwa. Ekoki mpe komemela basusu matomba to kopesa bango mpasi.

5. Etumba nini biso nyonso tozali na yango, mpe ndenge nini tokoki kolonga?

5 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kotosa ezalaka pɛtɛɛ te. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotosa mibeko ya Nzambe. Paulo akutanaki mpe na mokakatano yango. Akomaki boye: “Nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na binama na ngai.” (Rom. 7:23) Ya solo, ezalaka pɛtɛɛ kotosa ntango esɛngi te ete tómipimela to tónyokwama na likambo moko. Kasi, tosalaka nini ntango botosi na biso emekami mpo na “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso”? Bamposa yango ya mabe eutaka na kozanga kokoka mpe na “elimo ya mokili” oyo ezingi biso; bamposa yango ezalaka makasi mpenza. (1 Yoa. 2:16; 1 Ko. 2:12) Mpo na kolonga yango, tosengeli ‘kobongisa motema na biso’ liboso tókutana na mpasi to komekama, mpe kozala na ekateli ya kotosa Yehova ata na komekama ya ndenge nini. (Nz. 78:8) Biblia ezali na bandakisa mingi ya bato oyo batikalaki sembo mpo babongisaki mitema na bango.​—Ezr. 7:10; Dan. 1:8.

6, 7. Monisá ndenge oyo boyekoli ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu.

6 Lolenge moko ya kobongisa motema na biso ezali ya koyekola Makomami mpe mikanda oyo elimbolaka yango. Kanisá naino likambo oyo: Ezali mokolo oyo oyekolaka. Obondeli Yehova apesa yo elimo santu na ye esalisa yo osalela makambo oyo ozali koyekola na Liloba na ye. Okanaki kotala filme moko na mpokwa ya mokolo oyo elandi. Oyoki bato mingi bazali kokumisa filme yango, kasi oyebi ete filme yango ezali na makambo ya pite mpe ya mobulu.

7 Okanisi toli ya Paulo oyo ezali na Baefese 5:3: “Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu.” Okanisi mpe toli ya Paulo oyo ezali na Bafilipi 4:8. (Tángá.) Wana ozali komanyola batoli yango, omituni boye: ‘Soki natiki motema mpe makanisi na ngai elanda filme ya ndenge wana, nakomonisa ete nazali kolanda ndakisa oyo Yesu atikaki ya botosi makasi epai ya Nzambe?’ Okosala nini? Okotala kaka filme yango?

8. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso mpo na kokoba kotosa mitinda ya Yehova?

8 Ekozala libunga mpenza soki tolɛmbisi ekateli na biso ya kotosa mitinda ya Yehova mpo ntango mosusu tozali kokanisa ete tozali makasi mpo na kolonga baninga mabe, ata mpe kominanola oyo ezali na makambo ya mobulu to ya pite. Na esika ya kokanisa bongo, tosengeli nde komibatela mpe kobatela bana na biso na elimo mabe ya Satana. Bato oyo basalelaka ordinatɛrɛ basalaka nyonso mpo bavirisi ebebisa te masini to makambo oyo ezali na kati; bakebaka mpe ete bavirisi yango esalela masini na bango te mpo na kobebisa baordinatɛrɛ mosusu. Ezali boni mpo na biso? Tosengeli nde kolɛmbisa milende na biso ya komibatela na “mayele mabe” ya Satana?​—Ef. 6:11.

9. Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli ya kotosa Yehova mikolo nyonso?

9 Tokoki koloba ete, mikolo nyonso tosengeli kopona soki tokosala makambo na ndenge oyo Yehova alingaka to te. Mpo na kobika, tosengeli kotosa Nzambe mpe kozala na bomoi oyo eyokani na mitinda na ye ya sembo. Soki tozali kolanda ndakisa oyo Kristo atikelá biso ya kotosa ata “tii liwa,” tokomonisa ete kondima na biso ezali ya solosolo. Yehova akopambola milende na biso. Yesu alakaki boye: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.” (Mat. 24:13) Ya solo, yango esɛngaka kozala na mpiko lokola Yesu.​—Nz. 31:24.

Yesu, ndakisa monene ya mpiko

10. Komekama ya ndenge nini tokoki kokutana na yango, mpe tosengeli kosala nini?

10 Lokola tozali elongo na bato ya mokili oyo batondi na bizaleli mpe etamboli ya mabe, tosengeli kozala na mpiko mpo tómekola bango te. Makambo lokola pite, baninga mabe, mbongo mpe botɛmɛli ya mangomba ya lokuta ekoki kotinda biso tólongwa na nzela ya sembo ya Yehova. Bakristo mingi bakutanaka na botɛmɛli na kati ya libota. Na biteyelo ya mikili mosusu, bazali kokoba koteya evolisyo, mpe bato mingi bakómi kondima ete Nzambe azalaka te. Ntango tokutani na makambo ya ndenge wana, tosengeli te kokanga mabɔkɔ. Tosengeli kosala eloko mpo na kotɛmɛla makambo yango mpe komibatela. Ndakisa ya Yesu emonisi ndenge oyo tokoki kolonga.

11. Ndenge nini komanyola ndakisa ya Yesu epesaka biso makasi?

11 Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.” (Yoa. 16:33) Azalaki ntango nyonso kotɛmɛla elimo ya mokili. Atikaki ata moke te mokili epekisa ye kokokisa mosala na ye ya kosakola to elɛmbisa ye kotosa mitinda ya losambo ya solo mpe ya etamboli ya malamu; biso mpe tosengeli kosala lokola ye. Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye boye: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoa. 17:16) Koyekola mpe komanyola ndakisa ya mpiko ya Kristo ekopesa biso makasi ya kokabwana na mokili oyo.

Zwá liteya na mpiko ya Yesu

12-14. Pesá bandakisa oyo emonisi ete Yesu azalaki na mpiko.

12 Na boumeli ya mosala na ye, Yesu amonisaki mpiko makasi. Na nguya oyo azalaki na yango lokola Mwana ya Nzambe, abangaki te mpe “akɔtaki na tempelo mpe abwakaki libándá baoyo nyonso bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo, mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo mpe bibonga ya baoyo bazalaki kotɛka bibenga.” (Mat. 21:12) Ntango basoda bayaki mpo na kokanga Yesu na butu ya nsuka liboso akufa, amibimisaki na mpiko nyonso mpo na kobatela bayekoli na ye mpe alobaki boye: “Soki ezali ngai nde bozali koluka, bótika baoyo bákende.” (Yoa. 18:8) Mwa moke na nsima, ayebisaki Petro azongisa mopanga na ye, na ndenge yango Yesu amonisaki ete azalaki kotya elikya na bibundeli te, kasi epai ya Yehova.​—Yoa. 18:11.

13 Na mpiko nyonso, Yesu amonisaki polele lokuta ya mateya ya bakonzi ya mangomba ya ntango na ye oyo bazangaki bolingo. Alobaki na bango boye: “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! Mpamba te bozali kokangela bato bokonzi ya likoló; . . . botyoli makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo ná motema mawa ná kondima. . . . Bopɛtolaka libándá ya kɔpɔ mpe ya saani, nzokande na kati etondi na kopunza mpe na kolekisa ndelo.” (Mat. 23:13, 23, 25) Bayekoli ya Yesu basengeli mpe kozala na mpiko ya ndenge wana, mpo bakonzi ya mangomba ya lokuta bakonyokola bango mpe koboma bamosusu kati na bango.​—Mat. 23:34; 24:9.

14 Yesu azalaki na mpiko ata liboso ya bademo. Mokolo moko, akutanaki na mobali moko ya makasi oyo azalaki na bademo mpe moto moko te azalaki kokoka kokanga ye na minyɔlɔlɔ. Kozanga kobanga, Yesu abimisaki ebele ya bademo oyo bazalaki konyokola moto yango. (Mrk. 5:1-13) Lelo oyo, Nzambe apesi bakristo nguya ya kosala makamwisi ya ndenge wana te. Kasi, na mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya, biso mpe tozali kobunda na Satana, oyo “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Ko. 4:4) Ndenge moko na Yesu, bibundeli na biso “ezali ya mosuni te, kasi ezali na nguya oyo euti na Nzambe mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi”​—mateya ya mangomba oyo ezwá misisa, kasi ezali ya lokuta. (2 Ko. 10:4) Ntango tozali kosalela bibundeli yango, toyekolaka makambo mingi na ndakisa ya Yesu.

15. Mpiko ya Yesu ezalaki kouta wapi?

15 Mpiko ya Yesu ezalaki kouta na kondima oyo azalaki na yango. Oyo ya biso mpe esengeli kouta na kondima. (Mrk. 4:40) Ndenge nini tokoki kokóma na kondima ya solosolo? Ndakisa ya Yesu ekoki mpe kosalisa biso. Azalaki na boyebi mozindo ya Makomami mpe azalaki mpenza kondima yango. Yesu asalelaki ebundeli ya mosuni te; asalelaki mopanga ya elimo, elingi koloba Liloba ya Nzambe. Azalaki mbala na mbala kosalela Makomami na mateya na ye. Mbala mingi azalaki kobanda boye: “Ekomamá ete,” elingi koloba, na kati ya Liloba ya Nzambe.a

16. Ndenge nini tokoki kokóma na kondima makasi?

16 Mpo na kozala na kondima oyo ekosalisa biso tólonga komekama oyo ekómelaka moyekoli nyonso ya Yesu, tosengeli kotángaka mpe koyekolaka Biblia mokolo na mokolo, mpe koyanganaka na makita ya bokristo mpo na kokɔtisa na makanisi na biso mateya ya solo oyo esimbi kondima na biso. (Rom. 10:17) Tosengeli mpe komanyola, to kokanisa na mozindo, makambo oyo tozali koyekola, kotika ete esimba motema na biso. Kaka kondima oyo ezali na bomoi nde ekoki kosalisa biso tómonisa mpiko. (Yak. 2:17) Tosengeli mpe kobondelaka mpo na kozwa elimo santu, mpamba te kondima ezali na kati ya mbuma ya elimo.​—Gal. 5:22.

17, 18. Ndenge nini elenge mwasi moko amonisaki mpiko na eteyelo?

17 Ndeko mwasi moko na nkombo Kitty amonaki na miso ndenge kondima ekoki mpenza kopesa mpiko. Banda bomwana, ayebaki ete asengeli ‘koyokela nsango malamu nsɔni te’ na eteyelo, mpe azalaki mpenza na mposa ya kopesa litatoli epai ya baninga na ye ya kelasi. (Rom. 1:16) Mbula na mbula, azalaki na ekateli ya kosakwela baninga na ye nsango malamu, kasi azalaki kokakatana mpo azangaki mpiko. Ntango akómaki na mbula soki 20, akɔtaki na eteyelo mosusu. Alobaki boye: “Mbala oyo nakolekisa lisusu ata libaku moko te.” Kitty abondelaki mpo azala na mpiko lokola oyo ya Kristo, azala na bwanya, mpe azwa libaku ya kopesa litatoli.

18 Mokolo ya liboso, molakisi asɛngaki mwana-kelasi mokomoko apesa nkombo na ye. Mingi bayebisaki mangomba oyo bango basambelaka, mpe babakisaki ete bamipesaka mpenza te na makambo ya mangomba yango. Kitty amonaki ete libaku yango ezali eyano na libondeli na ye. Ntango ekómaki ngala na ye, kozanga kobanga alobaki ete: “Nazali Motatoli ya Yehova, mpe nalandaka kaka oyo Biblia elobi na makambo etali bizaleli mpe makambo ya losambo.” Ntango azalaki koloba, bana-kelasi mosusu babandaki kotyola ye. Kasi, bamosusu batyaki likebi mpe na nsima batunaki mituna. Kutu, molakisi na bango alobaki ete Kitty azali ndakisa malamu mpo ayokaki lingomba na ye nsɔni te. Kitty azali na esengo na ndenge azwaki liteya na mpiko ya Yesu.

Zalá na kondima mpe na mpiko lokola Kristo

19. (a) Kozala na kondima ya solosolo elimboli nini? (b) Ndenge nini tokoki kosepelisa Yehova?

19 Bantoma mpe bamonaki ete mpiko na bango esengelaki kouta na kondima. Basɛngaki Yesu boye: “Bakiselá biso kondima.” (Tángá Luka 17:5, 6.) Kozala na kondima ya solo esuki kaka te na kondima ete Nzambe azali. Esɛngaka mpe kozala na boyokani makasi na Yehova, boyokani lokola oyo mwana moke azalaka na yango na tata na ye oyo atondi boboto mpe bolingo. Na lisalisi ya elimo santu, Salomo akomaki boye: “Mwana na ngai, soki motema na yo ekómi na bwanya, motema na ngai, ɛɛ oyo ya ngai, ekosepela. Mpe bangɛi na ngai ekozala na nsai ntango mbɛbu na yo ekoloba makambo oyo elongobani.” (Mas. 23:15, 16) Ndenge moko mpe, soki tozali kosimba mitinda ya sembo na mpiko nyonso, tokosepelisa Yehova, mpe yango ekobakisela biso mpiko. Na yango, tiká tólandaka ntango nyonso ndakisa ya Yesu mpe tósimba na mpiko nyonso oyo ezali sembo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na bandakisa, talá Matai 4:4, 7, 10; 11:10; 21:13; 26:31; Marko 9:13; 14:27; Luka 24:46; Yoane 6:45; 8:17.

Okoki kolimbola?

• Nini ekosalisa biso tókoba kotosa atako tozali bato ya kozanga kokoka?

• Kondima ya solosolo eutaka wapi, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso tókóma na mpiko?

• Matomba nini tokozwa soki tozali kotosa mpe komonisa mpiko lokola oyo ya Kristo?

[Elilingi na lokasa 13]

‘Obongisaka motema na yo’ mpo na kolonga komekama?

[Elilingi na lokasa 15]

Tokoki komonisa mpiko oyo euti na kondima, ndenge Yesu asalaki

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto