Ozalaka na botɔndi mpo na oyo Yehova asali mpo na kosikola yo?
“Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama, mpo atyeli bato na ye likebi mpe asikoli bango.”—LUKA 1:68.
1, 2. Ndakisa nini emonisi likama ya likambo oyo ekómelá bato nyonso na mokili, mpe tokoyanola na mituna nini?
KANISÁ ete ozali na mbeto ya lopitalo. Ozali esika moko na bato nyonso oyo bazali na maladi moko na yo; maladi moko ya mabe mpenza, oyo ezali na nkisi te. Ozwi mwa elikya ntango oyoki ete monganga moko azali kosala nyonso mpo na kobimisa nkisi oyo ekosilisa maladi yango. Ozali ntango nyonso koluka koyeba soki monganga yango akómi wapi na milende na ye. Mokolo moko oyoki ete nkisi ebimi! Mpe monganga yango abomaki mpenza nzoto mpo na kobimisa nkisi yango. Okoyoka ndenge nini? Na ntembe te, okozala mpenza na limemya mpe botɔndi mpo na moto yango oyo apesi yo mpe ebele ya bato mosusu likoki ya kobika.
2 Okoki kokanisa ete tolekisi ndelo, kasi yango ekokani mpenza na likambo oyo ekómelá bato nyonso na mokili. Mokomoko na biso azali lokola bato wana ya maladi. Tozali mpenza na mposa ya mobikisi. (Tángá Baroma 7:24.) Mpo na kobikisa biso, Yehova asali likambo moko ya monene mpenza. Mwana na ye mpe asali lokola ye. Tóyanola sikoyo na mituna minei ya ntina mingi oyo elandi. Mpo na nini tozali na mposa ya lisiko? Yesu asengelaki kosala nini mpo na kosikola biso? Yehova asengelaki kosala nini mpo na kosikola biso? Mpe ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na lisiko wana oyo Nzambe apesaki biso?
Ntina oyo tozali na mposa ya kosikolama
3. Ndenge nini lisumu ekokani na maladi oyo epalanganaka?
3 Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema emonisaki ete moko ya maladi oyo elekaki mabe na kati ya bamaladi oyo epalanganaka ezali grippe espagnole oyo ebimaki na 1918 mpe ebomaki bamilio ya bato. Bamaladi mosusu ezalaka mabe lisusu koleka. Ekoki kozwa bato moke, kasi soki ezwi yo, elimbisaka mpenza te.a Tómeka sikoyo kokokanisa lisumu na maladi oyo epalanganaka. Tóbosana te maloba ya Baroma 5:12: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” Lisumu ezwá moto nyonso, mpo moto nyonso ya kozanga kokoka asalaka lisumu. (Tángá Baroma 3:23.) Bato boni bakufaka mpo na lisumu? Paulo akomaki ete lisumu ememaka liwa epai ya “bato nyonso.”
4. Ndenge nini Yehova atalelaka bomoi na biso, mpe ndenge nini makanisi ya bato mingi na likambo yango ekeseni na oyo ya ye?
4 Bato mingi lelo oyo, batalelaka lisumu mpe liwa kaka lokola makambo mosusu nyonso ya bomoi. Bayokaka mpasi kaka soki moto akufi liwa ya mobesu, kasi soki anuni mpe akufi, bamonaka yango mabe te. Yango wana, ezali mpasi te mpo bato bábosana mokano ya Nzambe. Mikolo ya bomoi na biso ezali moke mingi mpenza koleka ndenge Yehova akanaki. Na miso ya Yehova, moto moko te aumelá ata “mokolo moko” na bomoi. (2 Pe. 3:8) Yango wana, Liloba ya Nzambe elobi ete mikolo ya bomoi na biso ezali moke lokola oyo ya matiti mpe fololo, mpe ezali kaka mopɛpɛ. (Nz. 39:5; 1 Pe. 1:24) Tosengeli kobosana likambo wana te. Mpo na nini? Soki toyebi likama oyo “maladi” oyo tozali na yango ekoki komemela biso, tokomona motuya ya “nkisi” to lisiko.
5. Lisumu ezangisá biso eloko nini?
5 Tosengeli koluka koyeba mpasi oyo lisumu mpe makambo na yango nyonso epesá biso mpo na koyeba malamumalamu mabe na yango. Lisumu ezangisá biso eloko moko oyo baboti na biso bazalaki na yango. Na ebandeli, Adama ná Eva bazalaki na bomoi ya kokoka. Lokola bazalaki na makanisi mpe nzoto ya kokoka, bazalaki na likoki ya kobatela makanisi mpe mitema na bango, mpe kopona makambo oyo balingi kosala. Na ndenge yango, bakokaki kopona kokolisa bizaleli ya malamu, lokola basaleli ya Yehova Nzambe. Kasi, bandimaki kobungisa likabo wana ya motuya mingi. Lokola baponaki kosala lisumu, bango moko ná bana na bango bakokaki lisusu te kozwa bomoi oyo Yehova abongisaki mpo na bango. (Eba. 3:16-19) Na ndenge yango, bazwaki “maladi” oyo tozali kolobela, bapesaki yango mpe epai na biso, bana na bango. Yehova apesaki bango etumbu. Mpe apesaki biso elikya ya kosikolama.—Nz. 103:10.
Kosikolama na biso esɛngaki Yesu apesa nini?
6, 7. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki ete kosikolama na biso ekosɛnga likambo moko ya monene? (b) Bambeka oyo Abele ná bato mosusu ya sembo ya kala bapesaki eteyi biso nini?
6 Yehova ayebaki ete kosikola bana ya Adama ná Eva ekosɛnga likambo moko ya monene. Na esakweli oyo ezali na Ebandeli 3:15, Biblia eyebisi biso oyo esengelaki mpo na kosikola bango. Yehova asengelaki kobimisa “momboto,” elingi koloba mosikoli, oyo nsukansuka asengelaki koboma Satana. Kasi, mosikoli yango asengelaki mpe komona mpasi; Biblia emonisi ete asengelaki kozokisama na litindi na ndenge ya elilingi. Yango esengelaki kozala mpasi, kasi elimboli mpenza nini? Mpasi nini Moto oyo Yehova aponi asengelaki koyoka?
7 Mpo na kolongola bato na boombo ya lisumu, mosikoli asengelaki kopesa eloko moko mpo na kozipa masumu, elingi koloba kolongola mabe oyo lisumu ebimisaki mpe kozongisa boyokani kati na Nzambe mpe bato. Yango esɛngaki nini? Ezali na makambo oyo emonisaki ete mbeka moko esengelaki kopesama. Ntango Abele, moto ya liboso ya sembo, apesaki Yehova mbeka ya banyama, Yehova andimaki yango. Na nsima, bato lokola Noa, Abrahama, Yakobo, Yobo bapesaki mpe bambeka ya ndenge wana oyo Nzambe asepelaki na yango. (Eba. 4:4; 8:20, 21; 22:13; 31:54; Yobo 1:5) Bikeke na nsima, Mibeko ya Moize emonisaki likambo yango polele.
8. Nganga-nzambe monene azalaki kosala nini na mokolo ya kozipa masumu?
8 Bambeka oyo ezalaki kopesama na mokolo ya kozipa masumu ezalaki na kati ya bambeka ya ntina mingi oyo esɛngamaki na Mibeko. Na mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki kosala mwa makambo oyo ezalaki esakweli. Azalaki kopesa Yehova bambeka mpo na kozipa masumu—libosoliboso masumu ya banganga-nzambe mpe na nsima oyo ya mabota mosusu ya Yisraele. Nganga-nzambe monene azalaki kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu na tabernakle to na tempelo, epai kaka ye moko nde akokaki kokɔta, mpe kaka mbala moko wana na mbula. Kuna, azalaki komwangisa makila ya bambeka yango liboso ya sanduku ya kondimana. Na bantango mosusu, lipata moko oyo ezalaki kongɛnga makasi ezalaki kobima likoló ya sanduku mosantu yango, mpo na komonisa ete Yehova Nzambe azali wana.—Kob. 25:22; Lev. 16:1-30.
9. (a) Na mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene azalaki elilingi ya nani, mpe bambeka oyo azalaki kopesa ezalaki elilingi ya nini? (b) Kokɔta ya nganga-nzambe monene na Esika oyo Eleki Bosantu ezalaki komonisa nini?
9 Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo amonisaki ndimbola ya makambo wana oyo nganga-nzambe monene azalaki kosala. Amonisaki ete nganga-nzambe monene azalaki elilingi ya Masiya, Yesu Kristo, mpe bambeka ezalaki elilingi ya mbeka ya Yesu. (Ebr. 9:11-14) Mbeka wana ya kokoka esengelaki kopesa nzela na kozipama ya solosolo ya masumu ya bituluku mibale ya bato—banganga-nzambe, elingi koloba bandeko 144 000 ya Kristo oyo batyami mafuta na ndenge ya elimo mpe “bampate mosusu.” (Yoa. 10:16) Ntango nganga-nzambe monene azalaki kokɔta na Esika oyo Eleki Bosantu, yango ezalaki komonisa kokɔta ya Yesu na likoló mpo na komonisa motuya ya mbeka ya lisiko liboso ya Yehova Nzambe.—Ebr. 9:24, 25.
10. Bisakweli ya Biblia emonisaki ete Masiya akokutana na makambo nini?
10 Ntembe ezali te, kosikolama ya bana ya Adama ná Eva ezalaki likambo ya lisɛki te. Masiya asengelaki kopesa bomoi na ye! Na Makomami ya Ebre, basakoli balobelaki makambo mingi oyo etali mbeka yango. Na ndakisa, mosakoli Danyele asakolaki polele ete “Masiya Mokambi” “akolongolama,” to akobomama, mpo na “kozipa masumu mpo na libunga.” (Dan. 9:24-26) Yisaya asakolaki ete Masiya akoboyama, akonyokolama mpe akobomama to akotɔbɔlama, mpo amema masumu ya bato ya kozanga kokoka.—Yis. 53:4, 5, 7.
11. Ndenge nini Mwana ya Yehova amonisaki ete andimaki komikaba mpo na kosikola biso?
11 Liboso aya awa na mabele, Mwana se moko ya Nzambe ayebaki makambo oyo asengelaki kokutana na yango mpo na kosikola biso. Asengelaki konyokwama makasi mpe na nsima, kobomama. Ntango Tata na ye ayebisaki ye makambo yango, azongaki nsima to atombokaki? Te, kutu atosaki na motema moko malako ya Tata na ye. (Yis. 50:4-6) Ndenge moko mpe, ntango ayaki awa na mabele, Yesu akokisaki mokano ya Tata na ye. Mpo na nini? Ye moko ayanolaki na maloba oyo: “Ngai nalingaka Tata.” Alobaki lisusu boye: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoa. 14:31; 15:13) Na yango, soki tosikolamaki ezalaki mpe mingimingi mpo na bolingo oyo Mwana ya Yehova amonisaki. Atako yango esɛngaki ete apesa bomoi na ye ya kokoka, azalaki na esengo ya kosala yango mpo tósikolama.
Kosikolama na biso esɛngaki Yehova nini?
12. Lisiko ezali libosoliboso mokano ya nani, mpe mpo na nini apesaki yango?
12 Likanisi to ebongiseli mpo na kosikola bato eutaki epai ya Yesu te. Kutu, ebongiseli yango mpo na lisiko ya bato ezalaki likambo ya libosoliboso na mokano ya Yehova. Ntoma Paulo amonisaki ete etumbelo oyo ezalaki na kati ya tempelo, epai bazalaki kotumba bambeka, ezalaki komonisa mokano ya Yehova. (Ebr. 10:10) Na yango, soki tosikolamaki na nzela ya mbeka ya Kristo, ezali libosoliboso mpo na Yehova. (Luka 1:68) Yango ezali komonisa mokano na ye mpe bolingo monene oyo azali na yango mpo na bato.—Tángá Yoane 3:16.
13, 14. Ndenge nini ndakisa ya Abrahama ezali kosalisa biso tómona motuya ya likambo oyo Yehova asalaki mpo na biso?
13 Yango esɛngaki Yehova amipimela nini mpo amonisela biso bolingo na ye na ndenge wana? Ezali mpasi tóyeba yango. Kasi, ezali na lisolo moko ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango malamumalamu. Yehova asɛngaki Abrahama, moto moko ya sembo, asala likambo moko ya mpasi mpenza—apesa mwana na ye, Yisaka lokola mbeka. Kanisá naino, Abrahama alingaki mwana na ye mingi. Na ntina na Yisaka, Yehova alobaki na Abrahama ete “mwana na yo kaka moko oyo olingaka mingi.” (Eba. 22:2) Atako bongo, Abrahama amonaki ete kosala mokano ya Yehova ezalaki na ntina koleka bolingo na ye mpo na Yisaka. Abrahama atosaki. Kasi, Yehova atikaki te ete Abrahama asala likambo oyo ye moko alingaki kosala mokolo mosusu. Ntango kaka Abrahama alingaki koboma mwana na ye, Nzambe atindaki anzelu apekisa ye. Abrahama azalaki mpenza na ekateli makasi ya kotosa Nzambe na ye na komekama wana ya makasi, na boye ete mpo na ye elikya kaka moko ya komona lisusu mwana na ye, ezalaki lisekwa. Kasi azalaki mpenza na kondima ete Nzambe akoki kosekwisa mwana na ye. Kutu, Paulo alobaki ete Abrahama azwaki lisusu Yisaka na nzela ya lisekwa “na ndenge ya elilingi.”—Ebr. 11:19.
14 Kanisá naino mpasi oyo Abrahama ayokaki na motema ntango azalaki komibongisa mpo na kopesa mwana na ye lokola mbeka. Ndenge moko, mpasi oyo Abrahama ayokaki ezali kosalisa biso tóyeba mpasi oyo Yehova ayokaki na motema ntango akabaki ye oyo azalaki kobenga “Mwana na ngai ya bolingo.” (Mat. 3:17) Kasi, kobosana te ete mpasi oyo Yehova ayokaki ezalaki makasi lisusu koleka. Ye ná Mwana na ye balekisaki bamilio to mpe bamiliare ya bambula elongo. Na esengo nyonso, Mwana yango asalaki elongo na tata na ye lokola “mosali ya mayele” mpe Molobeli na ye, to “Liloba.” (Mas. 8:22, 30, 31; Yoa. 1:1) Tokoki koyeba te mpasi oyo Yehova ayokaki ntango Mwana na ye anyokwamaki, atyolamaki, mpe na nsima abomamaki lokola mosali ya mabe. Mpo na kosikola biso esɛngaki Yehova apesa eloko moko ya motuya koleka! Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotalela na motuya kosikolama yango?
Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na lisiko?
15. Ntango nini Yesu afutaki mbeka ya lisiko, mpe yango epesi nzela na makambo nini?
15 Nsima ya lisekwa na ye, ntango azongaki na likoló, Yesu afutaki mbeka ya lisiko. Ntango azongaki epai ya Tata na ye ya bolingo, alakisaki Ye motuya ya mbeka. Yango ememaki mapamboli mingi. Yango epesaki nzela na kolimbisama ya masumu, libosoliboso mpo na bakristo bapakolami, bandeko ya Yesu, na nsima mpo na “mokili mobimba.” Mpo na mbeka yango, baoyo nyonso bazali kobongola motema lelo oyo mpe bazali kokóma bayekoli ya solosolo ya Kristo bakoki kondimama epai ya Yehova Nzambe. (1 Yoa. 2:2) Na ndenge nini yango etali mpe yo?
16. Ndakisa nini emonisi ntina oyo tosengeli kozala na botɔndi epai ya Yehova mpo na likambo oyo asalaki mpo na kosikola biso?
16 Tózonga sikoyo na ndakisa oyo topesaki na ebandeli. Kanisá ete monganga oyo abimisi nkisi ayei esika oyo bino bato ya maladi bozali mpe ayebisi bino ete moto nyonso oyo akondima nkisi mpe akolanda malako malamumalamu akobika. Ezali boni soki mingi kati na baninga na yo oyo bazali maladi baboyi kolanda malako ya monganga, mpe balobi ete ekozala mpasi komela nkisi yango to mpe kolanda malako ya monganga? Okolanda bango, ata soki omoni ete nkisi yango ezali mpenza kobikisa yo? Te! Na ntembe te, okomonisa botɔndi mpo na nkisi yango mpe okolanda malamumalamu malako ya monganga; okoyebisa kutu bato mosusu likambo yango. Ndenge moko mpe, mokomoko na biso asengeli komonisa botɔndi epai ya Yehova mpo na ebongiseli oyo azwaki mpo na kosikola biso na nzela ya mbeka ya lisiko ya Mwana na ye.—Tángá Baroma 6:17, 18.
17. Ndenge nini okoki komonisa botɔndi na oyo Yehova asali mpo na kosikola yo?
17 Soki tozali na botɔndi mpo na oyo Yehova ná Mwana na ye basali mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa, tokomonisa yango. (1 Yoa. 5:3) Tokobundisa bamposa na biso ya kosala masumu. Tokomipesa te na kosala masumu na nko mpe kozala na bomoi ya lolenge mibale. Bomoi ya ndenge wana ekomonisa ete tozali kozwa mbeka yango na motuya te. Kutu, tokomonisa botɔndi na biso soki tozali kosala makasi mpo na kotikala pɛto na miso ya Nzambe. (2 Pe. 3:14) Tokomonisa yango ntango tozali koyebisa basusu elikya kitoko ya lisiko, mpo bango mpe bázala na boyokani malamu na Yehova mpe bázwa elikya ya bomoi ya seko. (1 Tim. 4:16) Ya solo, ebongi mpenza tópesa ntango mpe makasi na biso mpo na kokumisa Yehova ná Mwana na ye! (Mrk. 12:28-30) Kanisá naino! Tozali na elikya ya kolongwa na boombo ya lisumu. Elikya ya kozala na bomoi oyo Nzambe akanaki na ebandeli, bomoi ya kokoka, ya libela na libela—nyonso wana mpo na likambo oyo Yehova asalaki mpo na kosikola biso!—Rom. 8:21.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balobaka ete Grippe espagnole epalanganaki bipai nyonso mpe bato koleka katikati na mokili mobimba na ntango wana bazwaki yango. Na bisika mosusu maladi yango ebomaki kaka bato moke (1% tii 10%) kati na bato oyo bazwaki yango. Nzokande, maladi oyo babengi Ebola, emonanaka mingi te; kasi na mbala mosusu ebomaki bato ebele mpenza (pene na 90%) kati na baoyo bazwaki yango.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini ozali na mposa makasi ya kosikolama?
• Oyokaka ndenge nini mpo na ndenge Yesu andimaki komipesa mpo na biso?
• Oyokaka ndenge nini mpo na mbeka ya lisiko oyo Yehova apesaki?
• Ebongiseli oyo Yehova azwaki mpo na lobiko na biso etindaka yo osala nini?
[Elilingi na lokasa 27]
Na mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene azalaki elilingi ya Masiya
[Elilingi na lokasa 28]
Ndenge oyo Abrahama andimaki kokaba mwana na ye eteyi biso makambo mingi mpo na mbeka monene oyo Yehova apesaki