Namonaki ntina ya bomoi
Lisolo ya Gaspar Martínez
Nakoki koloba ete lisolo na ngai ezali lisolo ya elenge mobali moko mobola oyo autaki mboka mpe akómaki na bozwi mingi na engumba. Kasi, bokomona ete bozwi oyo nakómaki na yango ezali mpenza te oyo nazalaki kokanisa.
NAKOLAKI na etúká ya Rioja na nɔrdi ya Espagne, epai mabele ebotaka mpenza malamu te. Ezalaki na bambula ya 1930. Ntango nazalaki na mbula zomi, esɛngaki nalongwa na kelasi, kasi nasilaki koyeba kotánga mpe kokoma. Elongo na bandeko na ngai motoba, tozalaki mikolo nyonso kokende koleisa bampate na zamba to kosala misala na mwa bilanga na biso.
Bobola etindaki biso tókóma kokanisa ete bozwi ezali na ntina mingi na bomoi. Tokómaki kolula bato oyo bazalaki na mingi koleka biso. Kasi, mokolo moko episkɔpɔ ya lingomba na biso alobaki ete “na diosɛzɛ na ye mobimba bato ya mboka na biso nde balingaki Nzambe koleka.” Ayebaki te ete nsima ya mikolo bato mingi bakolongwa na lingomba ya Katolike.
Nakómi koluka eloko moko ya motuya mingi
Nabalaki Mercedes, elenge mwasi moko ya mboka na biso. Eumelaki te, tobotaki mwana mobali. Na 1957, tokendaki na Logroño, engumba moko pene na mboka na biso, mpe na nsima libota na ngai mobimba elandaki biso kuna. Kasi namonaki ete lokola natángaki mingi te, ezalaki mpasi mpo nazwa mosala oyo ekofuta ngai mbongo ya malonga. Nakómaki komituna epai wapi nakoki kozwa lisalisi. Nakómaki kokende kotánga na bibliotɛkɛ ya engumba yango, atako nayebaki te nini nasengeli mpenza kotánga.
Na nsima, nayokaki na radio ete bazali kopesa bato mateya ya Biblia na nzela ya mikanda. Ntango nasilisaki kolanda mateya yango, bato mosusu ya Lingomba ya Protesta bayaki kokutana na ngai. Nsima ya kokende na lingomba na bango mwa mikolo, namonaki ete kowelana ezalaki makasi na kati ya bakonzi na bango. Nazongaki kuna lisusu te, nalobaki ete mangomba nyonso ezali kaka ndenge moko.
Miso na ngai efungwami
Na 1964, elenge mobali moko na nkombo Eugenio ayaki na ndako na biso. Azalaki Motatoli ya Yehova, lingomba oyo nayokáká ata na nsango te liboso. Kasi, nazalaki kosepela kosolola masolo ya Biblia. Nazalaki kokanisa ete nayebi Makomami malamu. Nazalaki koyanola ye na mwa bavɛrsɛ ya Biblia oyo nayekolaki na mateya oyo nalandaki. Atako nazalaki koluka kolongisa mateya mosusu ya Lingomba ya Protesta, na motema nazalaki mpenza kondima yango te.
Nsima ya kosolola na ye ntango molai mbala mibale, namonaki ete Eugenio ayebi mpenza Liloba ya Nzambe. Nakamwaki mpenza komona ndenge azalaki koluka bavɛrsɛ mpe kolimbola yango, atako atángaki mingi te koleka ngai. Eugenio alakisaki ngai na Biblia ete tozali na mikolo ya nsuka, mpe mosika te Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele oyo paradiso. Nakamwaki.—Nz. 37:11, 29; Yis. 9:6, 7; Mat. 6:9, 10.
Nandimaki koyekola Biblia. Makambo nyonso oyo nazalaki koyekola ezalaki sika mpo na ngai, mpe ezalaki kosimba motema na ngai. Nzela ya sika efungwamaki liboso na ngai, oyo esalisaki ngai namona ntina ya bomoi. Nazwaki eloko oyo nazalaki koluka. Sikoyo milende oyo nazalaki kosala mpo na kokóma na bozwi mingi ezalaki lisusu na ntina te, mpe mokakatano ya kozwa mosala ya malamu ezalaki lisusu likambo ya liboso te na bomoi na ngai. Nayebaki ete ata maladi mpe liwa ekosila.—Yis. 33:24; 35:5, 6; Em. 21:4.
Nabandaki mbala moko koyebisa bandeko na ngai makambo oyo nazalaki koyekola mpe kolimbwela bango na esengo nyonso ete Nzambe alaki kokómisa mabele oyo paradiso, epai bato bakozala na bomoi libela na libela.
Libota na ngai endimi solo
Eumelaki te, ngai ná bandeko na ngai, bato koleka zomi, tokómaki koyangana mokolo nyonso ya Lomingo na nsima ya midi na ndako ya tata leki, mpo na kolobela bilaka ya Biblia. Tozalaki kolekisa ngonga mibale to misato pɔsɔ na pɔsɔ na masolo yango. Ntango Eugenio amonaki ete bandeko na ngai ebele bazali kosepela na mateya ya Biblia, azwaki bibongiseli mpo na kosololaka na libota mokomoko.
Nazalaki mpe na bandeko mosusu na Durango, mwa engumba moko na ntaka ya kilomɛtrɛ 120, epai Batatoli bazalaki te. Na yango, sanza misato na nsima nazwaki konje ya mwa mikolo mpo na kokende kotala bango mpe koyebisa bango bindimeli na ngai ya sika. Ntango nazalaki kuna, tozalaki kokutana bato soki zomi mpokwa nyonso, mpe nazalaki koteya bango tii na katikati ya butu. Bango nyonso bazalaki koyoka ngai na esengo. Ntango nalingaki kozonga, natikelaki bango Babiblia mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Banda wana, tokobaki kosolola na nzela ya mikanda.
Ntango Batatoli bakómaki na Durango, epai ata Motatoli moko te asakolaki liboso, bakutaki bato 18 bazali kozela koyekola Biblia. Batatoli yango bazwaki bibongiseli mpo libota mokomoko eyekola Biblia.
Tii na ntango wana, Mercedes azalaki koboya koyekola Biblia, mingimingi mpo azalaki kobanga bato. Bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Espagne na ntango wana, yango wana azalaki kokanisa ete bakonzi bakobengana bana na biso mibale na kelasi mpe bato nyonso ya mboka bakoboya biso. Kasi, ntango amonaki ete libota mobimba endimi solo, ye mpe andimaki koyekola Biblia.
Na boumeli ya mbula mibale mpamba, bato 40 ya libota na ngai bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli. Ya solo, ngai ná bandeko na ngai tokómaki na mokano moko na bomoi. Namonaki mpenza ete nasali likambo moko ya ntina mingi na bomoi. Nzambe atondisaki biso na bozwi.
Bomoi na ngai ekómi lisusu na ntina mingi
Na boumeli ya mbula 20 oyo elandaki, namipesaki mobimba mpo na kobɔkɔla bana na biso mibale mpe kosalisa lisangá. Ntango ngai ná Mercedes tokómaki na Logroño, tokutaki kaka Batatoli 20 na engumba yango ya bato soki 100 000. Eumelaki te, nazwaki mikumba mingi na lisangá.
Na nsima, ntango nakómaki na mbula 56, kompanyi na biso ekangaki na mbalakaka izini epai nazalaki kosala mpe nazalaki lisusu na mosala te. Lokola nazalaki ntango nyonso na mposa makasi ya kosala mosala ya ntango nyonso, yango epesaki ngai libaku ya kokóma mobongisi-nzela. Mbongo oyo bapesaki ngai na nsuka ya mosala ezalaki moke mpenza, mpe tokokaki kobikela kaka na yango te. Mercedes akómaki kosala mosala ya kosukola bandako mpo na kosunga ngai. Yango esungaki biso mingi mpe ata mokolo moko te tozangaki mwa eloko ya kobikela. Tii lelo nazali mobongisi-nzela, mpe mbala na mbala Mercedes asalaka lokola mobongisi-nzela mosungi, mpe asepelaka na mosala ya kosakola mingi.
Eleki mwa bambula, Mercedes azalaki kotikela elenge mwasi moko na nkombo Merche bazulunalo; Merche ayekolaki Biblia ntango azalaki mwana moke. Merche azalaki kosepela kotánga bazulunalo yango mingi mpe Mercedes amonaki ete Merche abosanaki te motuya ya mateya ya Biblia. Nsukansuka, Merche andimaki koyekola Biblia mpe akolaki malamu na elimo. Kasi, mobali na ye Vicente, azalaki komɛla masanga mingi mpe azalaki kobatela misala te. Yango wana, azalaki kopesa mwasi na ye mbongo te, mpe etikalaki moke libala na bango ekufa mpo na milangwa na ye.
Mwasi na ngai alobaki na Merche asɛnga mobali na ye aya kosolola na ngai, mpe asalaki yango. Nsima ya kosolola na ye mbala mwa mingi, andimaki koyekola Biblia. Vicente akómaki kobongwana mpe kolekisa mwa mikolo kozanga komɛla. Na nsima, akómaki kolekisa pɔsɔ mobimba, ata mpe koleka, kozanga komɛla masanga. Nsukansuka, atikaki mpenza komɛla masanga. Nzoto na ye ebongaki, mpe libota na ye ekómaki na bomoko. Lelo oyo, libota na ye mobimba, ná mwasi na ye ná mwana na bango, bazali mpenza kosunga mwa lisangá oyo ezali na Bisanga Canaries, epai bafandaka.
Nalekisi bomoi moko ya kitoko
Atako bandeko na ngai mosusu oyo bayekolaki Biblia basilá kokufa, libota na biso ezali se kokola, mpe Nzambe apamboli biso mingi. (Mas. 10:22) Ezali mpenza esengo komona ete baoyo nyonso bayekolaki Biblia eleki lelo mbula 40 bazali kokoba kosalela Yehova elongo na bana mpe bankɔkɔ na bango!
Lelo oyo, bandeko na ngai mingi ya mosuni bazali Batatoli; mingi bazali bankulutu, basaleli na misala mpe babongisi-nzela. Mwana na ngai ya liboso ná mwasi na ye basalaka na biro ya Batatoli ya Yehova na Madrid, na Espagne. Ntango nazwaki batisimo, tozalaki kaka Batatoli soki 3 000 na Espagne. Lelo oyo baleki 100 000. Nasepelaka mingi na mosala ya ntango nyonso, mpe nazali mpenza kotɔnda Nzambe mpo na bomoi kitoko oyo nalekisi na mosala na ye. Atako natángá mingi te, nazwaka mbala na mbala libaku ya kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi.
Eleki mwa bambula, nayokaki ete bato basilá mpenza na mboka oyo nakolaki. Lokola bobola elekaki, bato nyonso basundolaki bilanga mpe bandako na bango mpo na kokende koluka bomoi ya malamu. Likambo ya esengo, mingi kati na bato oyo balongwá na mboka yango—ngai mpe lokola—bazwi nde bomɛngo ya elimo. Toyebi ete bomoi ezali mpenza na ntina mpe ete esengo ya kosalela Yehova eleki nyonso.
[Elilingi na lokasa 32]
Pene na bato nyonso ya libota ya Ndeko Martínez oyo bazali Batatoli