Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 lok. 4
  • Liteya 1: Molimo ekufaka te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya 1: Molimo ekufaka te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Molimo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Makanisi na yo mpo na molimo mazali na bopusi likoló na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Oyo Biblia ezali koloba na ntina na molimo
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Ozali na molimo oyo ekufaka te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 lok. 4

Liteya 1: Molimo ekufaka te

Liteya yango eutá wapi?

“Bakristo ya liboso oyo bazalaki bato ya filozofi bakómaki kokanisa lokola Bagrɛki ete molimo ekufaka te mpe ete Nzambe asalaki molimo mpe akɔtisaki yango na nzoto ya moto ntango asalaki ye.”​—The New Encyclopædia Britannica (1988), Volimi 11, lokasa 25.

Biblia elobi nini?

“Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.”​—Ezekiele 18:4, haut fleuve.

Mpo na kozalisama ya moto ya liboso, Biblia elobi boye: “Mpe Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo [na Ebre, nèphèsh] ya bomoi.”​—Ebandeli 2:7.

Liloba ya Ebre nèphèsh oyo ebongolami na “molimo” elimboli ‘ekelamu oyo ezali na mpema.’ Ntango Nzambe asalaki moto ya liboso Adama, akɔtisaki te molimo oyo ekufaka te na nzoto na ye, atyaki nde nguya ya bomoi oyo ebatelami na mpema. Na yango, na Biblia, “molimo” ezali ekelamu mobimba oyo ezali na bomoi. Soki nguya wana ya bomoi oyo Nzambe atyaki ezali lisusu te, molimo ekufi.​—Ebandeli 3:19; Ezekiele 18:20.

Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebimisaki mituna oyo: Milimo ekendaka wapi nsima ya liwa? Nini ekómelaka milimo ya bato mabe? Ntango bakristo wana ya nkombo mpamba bandimaki liteya ya lokuta oyo elobaka ete molimo ekufaka te, yango ememaki bango na kondima liteya mosusu ya lokuta​—liteya ya lifelo ya mɔtɔ.

Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Mosakoli 3:19; Matai 10:28; Misala 3:23

LIKAMBO YA SOLO:

Soki moto akufi, azalaka lisusu na bomoi te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto