Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 lok. 8
  • Liteya 5: Maria azali mama ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya 5: Maria azali mama ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Maria azali mama ya Nzambe?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Tosambela mozalisi kasi eloko ezalisami te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Maria (Mama ya Yesu)
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Losambo ya nzambe-mama lozali kino lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 lok. 8

Liteya 5: Maria azali mama ya Nzambe

Liteya yango eutá wapi?

“Losambo ya mama ya Nzambe ekómaki makasi ntango . . . ebele ya bapakano basopanaki na lingomba. . . . Banda bankóto ya bambula, [bapakano oyo bakómaki bakristo] bazalaki komipesa mobimba na losambo ya nzambe-mwasi ‘mama monene’ mpe ya ‘ngɔndɔ mosantu.’”​—The New Encyclopædia Britannica (1988), Volimi 16, nkasa 326 mpe 327.

Biblia elobi nini?

“Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló. . . . Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.”​—Luka 1:31-35.

Vɛrsɛ wana ya Biblia emonisi polele ete Maria azalaki mama ya “Mwana ya Nzambe,” kasi ya Nzambe ye moko te. Ekokaki nde kozala ete akumbaki na libumu na ye Moto oyo ata ‘likoló mpenza ezali kokoka ye te’? (1 Bakonzi 8:27) Maria ye moko alobaki likambo ya ndenge wana ata mokolo moko te. Liteya ya Bosato nde esali ete eyebana malamu te soki Maria azali mama ya nani. Lokola babengaki ye Theotokos (liloba ya Grɛki oyo elimboli “oyo amemi Nzambe”), to “Mama ya Nzambe,” bato oyo bazalaki na Likita monene ya Efese, na mobu 431 T.B., bafungolaki nzela mpo bato bábanda kosambela Maria. Banda bambula mingi, engumba ya Efese, esika likita wana ya lingomba esalemaki, ezalaki esika monene ya losambo ya ekeko ya Artemisi, nzambe-mwasi ya makambo etali kobota.

Na yango, emonani ete makambo mingi oyo ezalaki kosalema na losambo ya ekeko ya Artemisi oyo bazalaki koloba ete “ekweaki longwa na likoló,” ekɔtaki na losambo ya Maria, na ndakisa etuluku ya bato bazali kotambola na balabala. (Misala 19:35) Momesano mosusu oyo ekɔtaki mokemoke na mateya ya bokristo ezalaki oyo ya kosalela bililingi ya Maria mpe ya bato mosusu na losambo.

Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Matai 13:53-56; Marko 3:31-35; Luka 11:27, 28

LIKAMBO YA SOLO:

Maria azalaki mama ya Mwana ya Nzambe, kasi ya Nzambe ye moko te. Liteya ya Bosato ebimisaki losambo ya Maria lokola Mama ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto