Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/11 nk. 24-29
  • Tózala na bonkonde biso baministre ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala na bonkonde biso baministre ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova mpe Mwana na ye​—Bandakisa malamu ya bonkonde
  • Kopesa bato mbote mpe kosolola na bango
  • Tómonisa bonkonde ata na botɛmɛli
  • Lolenge eleki malamu ya kokóma na bonkonde
  • Bonkonde ekesenisaka biso na bato ya mokili
  • “Bomitambwisa na motindo mobongi na nsango malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tolona bizaleli na boklisto kati na mokili oyo ezangi limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Basaleli ya Nzambe bayebani mpo na bizaleli na bango ya malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Kozala na bonkonde ezali mpenza na ntina?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/11 nk. 24-29

Tózala na bonkonde biso baministre ya Nzambe

“Bókóma bamekoli ya Nzambe.”​—EF. 5:1.

1, 2. (a) Mpo na nini ezali na ntina komonisa bonkonde? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

NA OYO etali bizaleli ya malamu, mokomi moko na nkombo Sue Fox, akomaki boye: “Esengeli komonisa bonkonde ntango nyonso. Esengeli komonisa yango esika nyonso mpe ntango nyonso.” Ntango bato bazali na momeseno ya komonisa bonkonde, mbala mingi matata ezalaka mingi te to mpe esilaka. Kasi, soki bazali kosala bongo te, matata ebimaka kaka. Kosalela bato makambo na ndenge oyo ebongi te ebimisaka matata, koyina, mpe mawa.

2 Na lisangá ya bokristo, bandeko bazalaka na bonkonde. Nzokande, tosengeli kokeba ete tómekola te bizaleli mabe oyo etondi na mokili. Tótala ndenge kosalela mitinda ya Biblia na likambo yango ekoki kobatela biso mpe kobenda bato na losambo ya solo. Mpo na koyeba oyo esɛngaka mpo na komonisa bonkonde, tótalela ndakisa ya Yehova Nzambe mpe Mwana na ye.

Yehova mpe Mwana na ye​—Bandakisa malamu ya bonkonde

3. Ndakisa nini ya bonkonde Yehova Nzambe apesi biso?

3 Yehova Nzambe apesi ndakisa eleki malamu na likambo ya komonisa bonkonde. Atako azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, asalelaka bato makambo na boboto mpe na limemya. Ntango asololaki na Abrahama mpe Moize, Yehova asalelaki liloba moko ya Ebre oyo mbala mingi ebongolamaka: “Nabondeli yo.” (Eba. 13:14; Kob. 4:6) Ntango basaleli na ye basali libunga, Yehova azalaka na ‘motema mawa mpe na ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.’ (Nz. 86:15) Akeseni mpenza na bato oyo basilikaka noki ntango basusu basali makambo oyo bango bazalaki kokanisa te.

4. Ndenge nini tokoki komekola Yehova ntango basusu bazali koloba na biso?

4 Bonkonde ya Yehova emonanaka mpe na ndenge oyo ayokaka bato. Ntango Abrahama atunaki mituna mpo na bato ya Sodoma, Yehova amonisaki motema molai mpe ayanolaki na mituna yango nyonso. (Eba. 18:23-32) Amonaki te ete Abrahama azali kolekisela ye ntango. Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye mpe kolela ya basumuki oyo babongoli motema. (Tángá Nzembo 51:11, 17.) Biso mpe tosengeli komekolaka Yehova, mpe koyokaka ntango basusu bazali koloba na biso.

5. Ndenge nini komekola bonkonde ya Yesu esalaka ete tóyokana malamu na basusu?

5 Na makambo mingi oyo Yesu Kristo ayekolaki epai ya Tata na ye, tokoki kotánga bonkonde. Atako na mabaku mosusu mosala na ye ya kosakola ezalaki kozwa ye ntango mingi mpe kolɛmbisa ye, Yesu azalaki ntango nyonso na motema molai mpe na boboto. Yesu azalaki koboya te kosalisa bato ya maba, bato bakufá miso mpe bato mosusu oyo bazalaki na bosɛnga. Atako bazalaki koya epai na ye kozanga ete abenga bango, Yesu azalaki kaka koyamba bango. Mbala mingi azalaki kotika makambo oyo azali kosala mpo na kosalisa bato yango oyo bazalaki konyokwama. Yesu azalaki mpenza komibanzabanza mpo na baoyo bazalaki kondimela ye. (Mrk. 5:30-34; Luka 18:35-41) Biso bakristo tokomonisa ete tozali kolanda ndakisa ya Yesu soki tozali na boboto mpe kosalisa basusu. Bandeko na biso ya libota, bato ya kartye mpe bato mosusu bakomona bizaleli yango. Lisusu, bizaleli yango ekumisaka Yehova mpe ememelaka biso esengo.

6. Ndakisa nini ya boboto mpe ya boninga Yesu atiká?

6 Yesu azalaki mpe komemya bato na ndenge azalaki kobenga bango na nkombo na bango. Bakonzi ya Lingomba ya Bayuda bazalaki mpe komemya bato ndenge wana? Te. Bazalaki komona bato oyo bayebaki Mibeko te lokola “bato balakelamá mabe” mpe bazalaki kotalela bango mpenza bongo. (Yoa. 7:49) Kasi, Mwana ya Nzambe azalaki bongo te. Marta, Maria, Zakai, mpe ebele ya bato mosusu bayokaki ndenge azalaki kobenga bango na nkombo na bango. (Luka 10:41, 42; 19:5) Atako mimeseno ya mboka mpe makambo mosusu ekoki kosala ete bato bákóma na ndenge moko boye ya koloba na bato, basaleli ya Yehova basalaka makasi mpo na kozala na boboto epai ya basusu.a Batikaka te ete makambo lokola bozwi, mbula to bakelasi oyo basalá elongola limemya oyo basengeli kopesa epai ya bandeko na bango mpe bato mosusu.​—Tángá Yakobo 2:1-4.

7. Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso mpo na komonisa bonkonde epai ya bato bisika nyonso?

7 Lolenge malamu oyo Nzambe mpe Mwana na ye batalelaka bato ya bikólo mpe ya mabota nyonso ememyaka bato yango mpe ebendaka na losambo ya solo baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi. Ya solo, esika na esika ezali na ndenge na yango ya komonisa bonkonde. Yango wana, tolandaka te mibeko makasimakasi na likambo etali komonisa bonkonde. Kutu, totikaka nde mitinda ya Biblia esalisa biso tózala makambo makasimakasi te na oyo etali komonisela basusu limemya esika nyonso. Tótala ndenge oyo kosalela bato makambo na bonkonde ekoki kosala ete mosala na biso ya kosakola ebota mbuma.

Kopesa bato mbote mpe kosolola na bango

8, 9. (a) Ezaleli nini ekoki komonana ete ezali kozanga bonkonde? (b) Mpo na nini tosengeli kolanda toli ya Yesu oyo ezali na Matai 5:47 na ndenge na biso ya kosalela bato makambo?

8 Lelo oyo na bisika mingi, makambo ya bomoi ezali kosala ete bato bázala na ntango te; bato mibale bakoki kolekana kozanga kopesana “mbote” to kotunana “boni?” Ya solo, ezali kosɛnga te tósolola na moto nyonso oyo azali koleka na nzela. Nzokande, mbala mingi na mabaku mosusu, ezalaka malamu kopesa basusu mbote. Ozalaka na momeseno ya kopesa basusu mbote? To mbala mingi olekaka, okangi elongi kozanga koloba ata mwa liloba moko ya boboto? Kozanga koyeba, moto akoki kokolisa ezaleli oyo soki totali malamu, ezali nde kozanga bonkonde.

9 Yesu akundwelaki biso likambo oyo: “Soki bozali kopesa mbote kaka bandeko na bino, likambo nini ya monene bosali? Bato ya bikólo mosusu basalaka mpe bongo te?” (Mat. 5:47) Na likambo yango, Donald Weiss, mokambi ya ebongiseli moko, akomaki boye: “Bato basepelaka te ntango moto moko asali lokola nde amoni bango te. Ezali na likambo moko te oyo ekoki kopesa moto nzela ya kosala lokola amoni baninga te. Likambo ya pɛtɛɛ yango oyo: Pesáká bato mbote. Sololáká na bango.” Soki totiki te ete ezaleli ya kokima basusu to kozala malilimalili ebebisa boyokani na biso na basusu, tokozwa matomba.

10. Ndenge nini komonisa bonkonde ekoki kosala ete mosala na biso ya kosakola ebota mbuma? (Talá etanda “Bandá na mwa kosɛka.”)

10 Tózwa ndakisa ya ndeko Tom ná mwasi na ye Carol oyo bafandaka na engumba moko na Amerika ya Nɔrdi. Ntango bazali na mosala ya kosakola, basalaka mpe makasi mpo na kosolola na bato ya kartye. Basalaka ndenge nini? Na boyokani na Yakobo 3:18, Tom alobi boye: “Tosalaka makasi mpo na kozala na boboto mpe na kimya na bato. Tosololaka na bato oyo bazali libándá ya mapango na bango mpe baoyo basalaka na kartye yango. Tosɛkisaka bango mpe topesaka bango mbote. Tosololaka na bango makambo oyo esepelisaka bango, na ndakisa makambo etali bana, bambwa, bandako, mpe misala na bango. Nsima ya mwa mikolo tomesanaka na bango.” Carol alobi boye: “Na mbala ya nsima, ntango tozongaka topesaka bango bankombo na biso mpe totunaka oyo ya bango. Toyebisaka bango likambo oyo toyaka kosala na kartye na bango kasi tosalaka ete lisolo ezala mokuse. Nsukansuka, topesaka bango litatoli.” Kosala bongo, esali ete bato ya kartye yango bákóma kosepela mingi na Tom ná Carol. Mingi bandimi kozwa mikanda na biso, mpe bamosusu bazali kosepela mingi koyekola mateya ya solo.

Tómonisa bonkonde ata na botɛmɛli

11, 12. Mpo na nini tosengeli kokamwa te soki bato balobi na biso mabe ntango tozali kosakola nsango malamu, mpe tosengeli kosala nini?

11 Na ntango mosusu, basalelaka biso makambo oyo ezangi limemya na mosala ya kosakola. Yango ekamwisaka biso te, mpo Kristo Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino; soki batosaki liloba na ngai, bakotosa mpe oyo ya bino.” (Yoa. 15:20) Kasi, kozongisa mabe oyo basali biso ebotaka mbuma malamu te. Tosengeli kosala nini? Ntoma Petro akomaki boye: “Bósantisa Kristo na mitema na bino mpo azali Nkolo, bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo bozali na yango, kasi bósalaka bongo na boboto mpe na limemya makasi.” (1 Pe. 3:15) Komonisa bonkonde—​koyanola na boboto mpe na limemya​—ekoki kosala ete baoyo bazali kofinga biso bábongola makanisi na bango.​—Tito 2:7, 8.

12 Tokoki nde komibongisa mpo na koyanola bato oyo balobi na biso mabe na ndenge oyo ekosepelisa Nzambe? Ɛɛ, Paulo alobaki boye: “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.” (Kol. 4:6) Soki tozali na momeseno ya komonisa bonkonde epai ya bato ya libota, baninga ya kelasi, baninga ya mosala, bandeko na lisangá mpe na bato ya kartye, tokoyeba ndenge ya kosala makambo na ndenge ya bokristo ntango bato batyoli to bafingi biso.​—Tángá Baroma 12:17-21.

13. Pesá ndakisa oyo emonisi ete kozala na bonkonde ekoki kobongola makanisi ya batɛmɛli.

13 Komonisa bonkonde na ntango ya botɛmɛli ebimisaka matomba. Na ndakisa, na Japon, moto moko ná mopaya na ye batyolaki Motatoli moko oyo ayaki kotala bango. Na limemya nyonso, ndeko yango akendaki. Akobaki kosakola, mpe amonaki ete mopaya ya moto yango azalaki kotala ye na mosika. Ntango ndeko apusanaki pene ya mopaya yango, moto yango alobaki boye: “Nayoki mawa na oyo euti kosalema. Atako tolobeli yo mabe, namonaki ete osilikaki te. Nasengeli kosala nini mpo nazala lokola yo?” Lokola moto yango autaki kobungisa mosala na ye mpe mama na ye autaki kokufa, azangaki elikya mpe azalaki na esengo te. Motatoli wana alendisaki ye ayekola Biblia mpe moto yango andimaki. Eumelaki te akómaki koyekola Biblia mbala mibale na pɔsɔ.

Lolenge eleki malamu ya kokóma na bonkonde

14, 15. Ndenge nini basaleli ya Yehova na ntango ya kala bazalaki koteya bana na bango?

14 Na ntango ya kala, baboti oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki koteya bana na bango bonkonde. Tótala ndenge oyo Abrahama ná mwana na ye Yisaka bazalaki kosolola na limemya na Ebandeli 22:7. Yozefe mpe amonisaki ete baboti na ye bateyaki ye malamu. Ntango azalaki na bolɔkɔ, azalaki na bonkonde ata epai ya baninga na ye ya bolɔkɔ. (Eba. 40:8, 14) Maloba na ye epai ya Farao emonisaki ete ayekolaki ndenge malamu ya koloba na mokonzi.​—Eba. 41:16, 33, 34.

15 Moko ya Mibeko zomi oyo Nzambe apesaki Bayisraele elobaki boye: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo mpo bomoi na yo ezala molai na mabele oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.” (Kob. 20:12) Lolenge moko oyo bana basengelaki kokumisaka baboti na bango ezalaki ya komonisa bonkonde na ndako. Mwana mwasi ya Yefeta amonisaki limemya makasi epai ya tata na ye na ndenge andimaki kotosa ndai oyo tata na ye asalaki atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ye.​—Bas. 11:35-40.

16-18. (a) Esengeli kosala nini mpo na koteya bana bonkonde? (b) Wapi matomba ya koteya bana bonkonde?

16 Tosengeli kozwa na lisɛki te mokumba ya koteya bana bonkonde. Mpo bákola malamu, bilenge basengeli koyekola lolenge malamu ya kopesa bapaya mbote, koyamba telefone, mpe ndenge ya kolya na basusu. Esengeli kosalisa bango báyeba ntina oyo basengeli kosimbela basusu porte, komonisela mibange mpe bato ya maladi boboto, mpe kosalisa baoyo bamemi kilo. Basengeli koyeba ntina ya kolobaka maloba lokola, “nabondeli yo,” “mersi,” “boyei malamu,” “nakoki kosalisa yo?” mpe “limbisá ngai.”

17 Ezali mpasi te koteya bana bonkonde. Lolenge eleki malamu ezali ya kopesa bango ndakisa. Kurt, oyo azali na mbula ntuku mibale na mitano, alobeli ndenge oyo ye ná baleki na ye misato bayekolaki komonisa bonkonde: “Tozalaki kotala ndenge mama ná tata bazalaki komonisana boboto na maloba mpe komonisela basusu motema molai mpe limemya. Na Ndako ya Bokonzi, tata azalaki kosimba ngai na lobɔkɔ liboso mpe na nsima ya makita ntango azali kosolola na bandeko oyo bakómi mibange. Nazalaki koyoka ndenge azalaki kopesa bango mbote mpe komemya bango.” Kurt abakisi boye: “Namekolaki bizaleli na ye. Komonisela bato limemya ekómaki momeseno na ngai. Ezali likambo ya kosala kaka mpo na kosala te, kasi esengeli kouta mpenza na motema.”

18 Nini ekosalema soki baboti bateyi bana na bango komonisa bonkonde? Bana bakozala na likoki ya kozwa baninga mpe kozala na kimya na bato. Bakoyeba kosala malamu na bakonzi mpe baninga na bango ya mosala. Lisusu, bana oyo bazalaka na bonkonde mpe bosembo basepelisaka baboti na bango.​—Tángá Masese 23:24, 25.

Bonkonde ekesenisaka biso na bato ya mokili

19, 20. Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli ya komekola Nzambe na biso ya ngɔlu mpe Mwana na ye?

19 Paulo akomaki boye: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.” (Ef. 5:1) Mpo na komekola Yehova Nzambe mpe Mwana na ye tosengeli kosalela mitinda ya Biblia, lokola oyo tolobeli na lisolo oyo. Soki tosali bongo, tokomonisa ezaleli yango kaka te mpo na kondimama epai ya mokonzi to mpe mpo na koluka matomba.​—Yuda 16.

20 Na mikolo oyo ya nsuka ya boyangeli na ye ya mabe, Satana azali kosala nyonso mpo na kolongola mitinda nyonso ya bizaleli malamu oyo Yehova atyá. Kasi, Zabolo akolonga te kolongola bizaleli ya malamu epai ya bakristo ya solo. Tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli ya kolanda ndakisa ya Nzambe na biso ya ngɔlu mpe ya Mwana na ye. Na ndenge yango, maloba mpe etamboli na biso ekokesenisa biso na baoyo bazangi bonkonde. Yango ekosala ete nkombo ya Yehova Nzambe na biso ya bonkonde ezwa lokumu, mpe ekobenda bato ya mitema sembo na losambo ya solo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bamboka mosusu, kobenga mokóló na nkombo na ye, ezalaka kozanga bonkonde, lobá kaka soki ye moko apesi yo nzela obenga ye bongo. Bakristo basengeli kotosa mimeseno yango.

Ozali koyeba lisusu?

• Yehova ná Mwana na ye bateyi biso nini na oyo etali komonisa bonkonde?

• Mpo na nini biso bakristo tosengeli kopesaka bato mbote na boboto?

• Ndenge nini komonisa bonkonde ebimisaka mbuma malamu na mosala na biso ya kosakola?

• Mokumba nini baboti bazali na yango na oyo etali koteya bana bonkonde?

[Etanda na lokasa 27]

Bandá na mwa kosɛka

Bato mingi bakakatanaka kobanda lisolo na moto oyo bayebi te. Kasi, lokola Batatoli ya Yehova balingaka Nzambe mpe bazalani na bango, basalaka makasi mpo na koyekola ndenge ya kosolola na bato mpo na koteya bango solo ya Biblia. Nini ekoki kosalisa yo osalaka yango malamu?

Toli moko ya ntina mingi oyo ezali na Bafilipi 2:4, elobi ete: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” Kanisá na maloba yango: Soki okutaná naino na moto moko te liboso, akomona yo lokola mopaya. Ndenge nini okoki kosala ete amiyoka mopaya te? Kosɛka mwa moke mpe kopesa ye mbote na esengo ekoki kosalisa. Kasi, ezali na makambo mosusu oyo osengeli kotalela.

Ntango ozali koluka kobanda lisolo na moto, ekoki kokóma ete okata makanisi na ye. Soki oluki kobanda kosolola na ye makambo oyo ozali na yango na motó kozanga komibanzabanza mpo na makambo oyo ye azali kokanisa, ntango mosusu akoki koboya kosolola. Yango wana, soki ozali na likoki ya koyeba makambo oyo moto yango azali kokanisa, mpo na nini te kosalela yango mpo na kobanda lisolo? Yango nde Yesu asalaki ntango akutanaki na mwasi Mosamaria na libulu ya mai. (Yoa. 4:7-26) Makanisi na ye ezalaki na kotɔka mai. Yesu abandaki lisolo na ye na likambo yango, mpe na nsima asololaki na ye makambo ya Nzambe.

[Bililingi na lokasa 26]

Komonisa boboto ekoki kopesa yo libaku ya kopesa litatoli

[Elilingi na lokasa 28]

Bonkonde ezalaka na ntina ntango nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto