Basaleli ya Nzambe bayebani mpo na bizaleli na bango ya malamu
1 Lelo oyo, ezali mpasi mpo na komona bato oyo bazali na bizaleli ya malamu. Mpo na nini? Lokola bato bakómá kowelawela ngonga, ezalaka mpasi mpo bákanisa ata koloba mwa maloba ya boboto lokola “pardɔ” “mersi,” to “limbisá ngai.” Liloba ya Nzambe esakolaki ete na mikolo ya nsuka, bizaleli ya bato ekobeba mingi, mpo bakozala ‘bato oyo bamilingaka kaka bango moko, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato bazangi botɔndi, bazangi bolingo ya libota, bazangi komipekisa, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, mpe bato ya motó makasi.’ (2 Tim. 3: 1-4, NW ) Makambo wana nyonso ebotaka kaka bizaleli ya mabe. Lokola baklisto bazali basaleli ya Nzambe, basengeli kokeba ete bálanda te bizaleli ya mokili oyo epesaka bato limemya te.
2 Bizaleli malamu ezali nini? Bizaleli malamu elakisi koyeba oyo bamosusu bakoyoka soki osali likambo boye to boye, mayele ya kofanda na kimya na bato. Mwa makambo oyo emonisaka bizaleli malamu yango oyo: koyeba kopesa bato kilo, kozala na boboto, kopesa bato limemya, koboya maloba oyo ekoki kozokisa bato, mpe kokanisa bolamu ya bamosusu. Bizaleli wana eutaka na bolingo oyo moto azali na yango mpo na Nzambe mpe mpo na bato. (Luka 10:27) Ezali na yango kaka likambo moko ya moke, kasi ezali na valɛrɛ mingi mpo na kobongisa boyokani na biso na bato.
3 Yesu Klisto amonisaki bizaleli malamu na ndenge ya kokoka mpenza mpe yango ezali ndakisa. Azalaki ntango nyonso kosalela Lilako oyo eleki Malamu: “Kaka ndenge bino bolingaka ete bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.” (Luka 6:31, NW ) Tokamwaka nde te na bizaleli malamu oyo Yesu azalaki na yango, bizaleli ya kokanisa bolamu ya bayekoli na ye mpe kosalela bango makambo na boboto? (Mat. 11:28-30) Azwaki bizaleli malamu na ye na kati ya babuku oyo eteyaka bizaleli yango te. Eutaki nde na motema na ye ya malamu mpe ya boboto. Tosengeli kosala nyonso mpo na kozala na bizaleli ya malamu lokola ye.
4 Na ntango nini baklisto basengeli komonisa bizaleli malamu? Kaka na ntango ya makambo ya minene, mpo bato bámona ete bázali bato malamu? Bakomonisa yango kaka mpo na koluka kobenda bamosusu bámona bango mpe bálanda bango? Te! Tosengeli komonisa bizaleli malamu ntango nyonso. Na ndenge nini mpenza tosengeli kosalela likambo yango ntango tozali elongo na bandeko na kati ya lisangá?
5 Na Ndako ya Bokonzi: Ndako ya Bokonzi ezali esika tokendaka kosambela. Yehova Nzambe nde abengisaka biso kuna. Na ndenge yango, biso tozali babyangami. (Nz. 15:1) Kasi ntango tokei na Ndako ya Bokonzi, tozalaka mpenza babyangami ya malamu? Totalaka malamumalamu ndenge tolati mpe monzɛlɛ oyo tosali? Ya solo, ebongi tóboya molato ya bongobongo to ya mindondomindondo. Ezala na mayangani to na makita na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ na lisangá, bato bamonaka ete biso basaleli ya Yehova tobongisaka nzoto na biso na ndenge oyo ebongi na bato oyo balobaka ete babangaka Nzambe. (1 Tim. 2: 9, 10) Na ndenge yango, tozali kopesa lokumu mpe limemya na Moyambi na biso oyo afandaka na likoló mpe na bato mosusu oyo ye abengisaka.
6 Ndenge mosusu ya komonisa bizaleli malamu na makita ezali ya kokoma na ngonga ya malamu. Lokuta mabe, na bantango mosusu ezalaka mpasi mpo na kosala yango, mpamba te bamosusu bafandaka mosika mingi mpe, mbala mosusu, bazali na bana mingi oyo basengeli kobongisa. Nzokande, na masangá mosusu, emonani ete basakoli 75 na kati ya 100 bakomaka kaka nsima ya nzembo mpe libondeli ya ebandeli. Likambo oyo ezali lisɛki te. Tóbosana te ete kozala na bizaleli malamu elakisi koyeba oyo bamosusu bakoyoka soki osali likambo boye to boye. Yehova, Moyambi na biso ya motema malamu, abongisi feti ya elimo mpo biso tózwa bolamu na yango. Tokomonisa ete tozali kopesa yango valɛrɛ mpe koluka ete ye amiyoka malamu kaka soki tozali kotosa ngonga. Lisusu, koya na nsima ya ngonga oyo etyami epɛngwisaka likebi ya baoyo bakómaki liboso mpe emonisaka ete tozali kopesa bango limemya te.
7 Bato ya sika bayaka ntango toyanganaka; tolukaka koyeba bango? Bizaleli malamu esɛngi mpe koyamba bango malamu. (Mat. 5: 47; Lom. 15:7) Mwa mbote ya maloba kitoko, mbote ya mabɔkɔ oyo epesami na mɔtɔ, mwa kosɛka moke—nyonso wana ezali makambo ya mikemike, kasi ezali makambo oyo elakisaka mpe ete tozali baklisto ya solosolo. (Yoa. 13:35) Mobali moko, oyo ayaki mpo na mbala ya liboso na Ndako moko ya Bokonzi, alobaki boye na nsima: “Na mokolo kaka moko, nakutanaki na ebele ya bato oyo nayebaki ata koyeba te, kasi oyo bamonisaki boboto ya solosolo koleka bato oyo nakutanaka na bango mikolo nyonso na kati ya lingomba na ngai ya banda bomwana. Namonaki polele ete nazwi [lingomba ya] solo.” Likambo yango ebotaki mbuma: mobali wana atikaki bizaleli na ye ya kala, mpe sanza nsambo na nsima, azwaki batisimo. Ya solo, bizaleli malamu ekoki kobota mbuma mingi ya malamu!
8 Lokola esengami ete tomonisa bizaleli malamu ata epai ya bato oyo toyebi te, na ntembe te ezali kosɛnga tózala na yango “mingimingi . . . epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima,” boye te? (Gal. 6: 10, NW ) Tosengeli kosalela etinda oyo: “Okokumisa mobali [to mwasi] oyo anuni.” (Lev. 19:32) Tóbosana bato motindo wana te na ntango ya makita na biso.
9 Kolanda na likebi mpenza: Ntango baministre ya Nzambe, baklisto, bazali kosala masukulu na makita ya lisangá, ezalaka mpo na kopesa biso mwa likabo ya elimo oyo ekolendisa biso. (Lom. 1: 11) Ekomonana mpenza ete tozangi bizaleli malamu soki tozali kolalalala, kolya bazoka, kosololasolola na matoyi na moto oyo afandi pembeni, kolekaleka mbala na mbala mpo na kokende kowayawaya na batwalɛti, kotánga mikanda oyo eyokani te na masolo oyo ezali kosalama, to kosala mwa makambo mosusu na ntango likita ezali koleka. Na likambo yango, bankulutu basengeli kozala ndakisa. Bizaleli na biso malamu ya boklisto ekotinda biso tólanda na likebi nyonso mpo na komonisa limemya oyo ebongi epai ya moto oyo azali kosala lisukulu mpe na nsango ya Biblia oyo ye azali kopesa.
10 Lisusu, mpo na kopesa limemya na moto oyo azali kosala lisukulu mpe na baoyo bazali kolanda, tósengeli koboya ete batelefone na biso ya mabɔkɔ etyaka makɛlɛlɛ na makita na biso.
11 Bizaleli malamu etali mpe bana: Baboti basengeli ntango nyonso kolandela etamboli ya bana na bango. Soki mwana abandi kolela to kosala mobulu na likita mpe bamosusu bazali kolanda lisusu malamu te, ekozala malamu kobima na mwana yango libándá nokinoki mpo na kopekisa ye. Kosala bongo ekoki kozala mpasi na bantango mosusu, kasi kobosana te ete yango ezali komonisa ete ozali komitya na esika ya bamosusu. Baboti oyo bazali na bana ya mike, oyo bakoki kotya mobulu, baponaka mbala mingi kofanda na bakiti ya nsima mpo na koboya kopɛngwisa likebi ya bandeko mingi soki esengeli bátɛlɛma ntango likita ezali kosalema. Bato mosusu na kati ya bayangani bakoki mpe komonisa boboto epai ya mabota ya ndenge wana soki bazali kotikela bango bakiti ya nsima mpo bábimaka na bana, soki esengeli.
12 Baboti basengeli mpe kolandela etamboli ya bana na bango liboso mpe nsima ya makita. Esengeli te kotika bana bákimaka mbangu na esika ya makita, mpo likama ekoki kobima. Kokimakima mbangu na libándá ya Ndako ya Bokonzi mpe ekoki komema likama, mingimingi mpenza na bampokwa oyo molili ezalaka mwa makasi. Kosolola makasi na libándá ekoki kosala ete makɛlɛlɛ ekóma tii epai ya bato ya pembeni mpe bakoki kokanisela losambo na biso mabe. Baboti oyo bazali kosala makasi ya solosolo mpo na kokɛngɛla bana na bango, na libándá mpe na kati ya Ndako ya Bokonzi, babongi mpenza kozwa longonya mpamba te likambo oyo bazali kosala ezali kobakisa esengo ya kofanda na bandeko na kati ya bomoko.—Nz. 133:1.
13 Na boyekoli ya mokanda: Tosepelaka mingi na bandeko na biso oyo bazali komonisa ezaleli ya koyamba bapaya na ndenge bazali kopesa bandako na bango mpo makita ya lisangá esalamaka kuna. Soki tokei na likita, ekozala malamu tómonisa limemya mpe tósakana na biloko na bango te. Tosengeli kopangwisa makolo na biso malamumalamu liboso ya kokɔta mpo tóbebisa ndako te to tapi. Baboti basengeli kokɛngɛla bana na bango, mpo básuka kaka na eteni ya ndako oyo epesami mpo na boyekoli ya mokanda. Atako etuluku ya boyekoli yango ezalaka moke mpe makambo elekaka na ndenge ya boninga mpenza, tosengeli te kozwa bandako ya bandeko lokola esika ya kosakana. Soki mwana moko ayoki mposa ya kokende na twalɛti, baboti na ye basengeli kokende na ye. Lisusu, lokola boyekoli ya mokanda ezali likita ya lisangá, ekozala malamu tólata ndenge tolataka ntango tokendaka na Ndako ya Bokonzi.
14 Bizaleli malamu ezali na ntina mingi: Kosalela bizaleli malamu na biso ya baklisto epesaka lokumu na mosala na biso ya baministre mpe esalisaka biso tózala na boyokani ya malamu na bamosusu. (2 Kol. 6:3, 4, 6) Lokola tozali kosambela Nzambe ya esengo, tosengeli te kokakatana mpo na kosɛka, komonisa boboto, mpe kosala ata mwa masɛki mosusu ya mikemike mpe oyo ebongi mpo na kopesa bandeko esengo. Makambo wana, oyo etali bizaleli malamu, ekokómisa bomoi na biso ya basaleli ya Nzambe bomoi moko kitoko.