Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/11 nk. 18-19
  • Pesáká na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pesáká na esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Salelá Nzambe ‘na motema moko mpe na molimo moko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • ‘Tiká tópesa Yehova likabo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Loná elimo ya kokaba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/11 nk. 18-19

Pesáká na esengo

MPO na oyo etali kopesa, ntoma Paulo akomaki boye: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Ko. 9:7) Yehova atindaka biso na makasi te tósimba losambo ya solo. Atikaka ete basaleli na ye bango moko bámonisa ete balingaka ye na ndenge oyo bazali kopesa makabo na bolingo na bango moko mpe na esengo. Banda kala, basaleli na ye bazalaki kosala bongo. Tózwa bandakisa misato.

Nsima ya kobimisa Bayisraele na Ezipito, Yehova asɛngaki bango bátonga tabernakle. Mpo na kotonga tabernakle yango, esengelaki ete Bayisraele bápesa makabo. Mpo na yango, ‘moto nyonso oyo motema na ye elingaki’ amemaki wolo, palata, motako mpe biloko mosusu. Bato bapesaki biloko mingi, yango wana bayebisaki bango bátika kobakisa.​—Kob. 35:5, 21; 36:6, 7.

Bikeke mingi na nsima, ntango balingaki kotonga tempelo, Bayisraele bazwaki lisusu libaku ya kosimba losambo ya pɛto. Mokonzi Davidi apesaki makabo ebele mpo na yango mpe alendisaki bato mosusu bápesa. Basalaki yango na esengo nyonso. Wolo mpe palata oyo bapesaki lokola makabo ekoki kokokana lelo oyo na dolare miliare 100! Bayisraele bazalaki na esengo ya kopesa Yehova makabo.​—1 Nt. 29:3-9; 2 Nt. 5:1.

Bayekoli ya liboso ya Yesu bamonisaki mpe elimo yango ya kopesa na esengo. Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bato soki 3 000 bazwaki batisimo, mingi na bango bazalaki kofanda na Yerusaleme te. Mpo na kosalisa baoyo bazalaki na bosɛnga bátikala na engumba yango mpo na koyekola makambo mingi na ntina na kondima na bango ya sika, bandeko basangisaki mbongo. Bandeko batɛkaki biloko na bango mpe bamemaki mbongo epai ya bantoma mpo na kosalisa bandeko oyo bazalaki na bosɛnga. Yehova asepelaki mpenza na kondima mpe bolingo oyo bandeko yango bamonisaki!​—Mis. 2:41-47.

Lelo oyo, bakristo bazali kokoba kosimba losambo ya pɛto na ndenge bazali kopesa na esengo nyonso ntango, makasi, mpe mbongo na bango. Etanda oyo ezali awa emonisi ndenge mosusu oyo tokoki kosala yango.

[Etanda na lokasa 18, 19]

NDENGE BATO MOSUSU BAPESAKA

MAKABO MPO NA MOSALA YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA

Bato mingi babongisaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.”

Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo yango na biro ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala na bikólo na bango. Moto akoki mpe kotinda mbala moko mbongo na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., Attention Treasurer’s Office, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya Batatoli ya Yehova oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo azali. (Makabo ya bolingo malamu oyo tolobeli awa na nse ekoki mpe kotindama na biro ya Batatoli ya Yehova oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo ozali.) Chèque oyo etindami na adrɛsi oyo tolobeli na likoló esengeli kopesama na “Watchtower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Asengeli kotinda yango nzela moko na mwa mokanda oyo ekoyebisa ete ezali likabo oyo apesi.

KODEFISA MBONGO

Moto akoki kotya mbongo na banki na nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpo esalelama na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Kasi, ntango kaka asɛngi mbongo yango, bakozongisela ye. Mpo na koyeba makambo mosusu, tuná na Treasurer’s Office na adrɛsi oyo ezali likoló to okoki kobenga na nimero oyo (718) 560-7500.

LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO

Longola makabo ya mbongo oyo moto apesi mbala moko, ezali na lolenge mosusu ya kopesa makabo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Ekoki kozala:

Asiransi: Moto akoki kokoma nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpo ezwa mbongo ya asiransi to ezwa mbongo na ye ya epasó (pension).

Kofungola kɔnti na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya epasó na nkombo ya Watch Tower, to kotya nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka yango.

Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na Watch Tower lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.

Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa likabo ya ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama, soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova na mboka na bino.

Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kozwa ebongiseli ya kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko ya Batatoli ya Yehova, oyo ekoponama, oyo endimami na mibeko ya Leta. Na nsima, moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Na nsima, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

Testama: Moto akoki kopesa Watch Tower biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa Watch Tower lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.

Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo yango mpo na kosimba mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mwa buku moko ebongisami na Lingelesi mpe na Espagnol, oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide. Mwa buku yango ebongisami mpo na kosalisa bato báyeba lolenge mingi ya kopesa makabo ezala sikoyo to na nzela ya libula nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako, bato mingi bapesaki lisungi mpo na mosala na biso ya kosakola na mokili mobimba mpe kosunga bato, mpe Leta akitiselaki bango mpako oyo basengelaki kofuta. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi yango na Charitable Planning Office.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga to kokomela charitable planning office na adrɛsi oyo ezali awa na nse, to okoki kokende na biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi.

Charitable Planning Office

Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

100 Watchtower Drive

Patterson, New York 12563-9204

Telefone: (845) 306-0707

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto