Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 15/11 nk. 20-21
  • ‘Tiká tópesa Yehova likabo’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Tiká tópesa Yehova likabo’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Salelá Nzambe ‘na motema moko mpe na molimo moko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Pesáká na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • “Mapamboli ya Yehova epesaka bozwi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 15/11 nk. 20-21

‘Tiká tópesa Yehova likabo’

NDENGE nini omonisaka botɔndi na yo ntango moto asaleli yo likambo moko ya boboto? Talá ndenge bakonzi ya basoda na Yisraele bamonisaki botɔndi na bango nsima ya kobunda na basoda ya Midiane. Etumba yango esalemaki nsima wana Yisraele asalaki lisumu na likambo ya Baala ya Peore. Nzambe asalisaki bato na ye bálonga, mpe bakabolelaki basoda 12 000 ná bato mosusu ya Yisraele biloko oyo bapunzaki kuna. Na boyokani na malako oyo Yehova apesaki, basoda bapesaki banganga-nzambe ndambo ya biloko na bango, mpe Bayisraele mosusu bapesaki Balevi ndambo kaka ndenge moko na oyo wana.​—Mit. 31:1-5, 25-30.

Kasi, bakonzi ya basoda balingaki kopesa mingi koleka. Bayebisaki Moize boye: “Basaleli na yo bazwi motángo mobimba ya mibali ya etumba oyo bazali na mabɔkɔ na biso mpe bayebisi ete moko te kati na biso azangi.” Bazwaki ekateli ya kopesa wolo mpe biloko ndenge na ndenge ya kobongisa nzoto lokola likabo mpo na Yehova. Biloko nyonso ya kobongisa nzoto oyo esalemaki na wolo, oyo bapesaki, ezalaki na kilo koleka 190.​—Mit. 31:49-54.

Lelo mpe, bato mingi bayokaka mposa ya komonisa botɔndi na bango mpo na makambo oyo Yehova asaleli bango. Kutu, elimo ya botɔndi ndenge wana esukaka kaka epai ya basaleli ya Nzambe te. Tózwa ndakisa ya sofɛlɛ ya bisi moko. Azalaki komema mpe kozongisa bandeko na stade mpo na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na 2009 na Bologne, na Italie. Lokola azalaki kotambwisa motuka na likebi mpe azalaki na boboto, bandeko yango bamonaki malamu bákomela ye mwa mokanda mpo na kopesa ye mersi; babakiselaki ye mwa mbongo mpe bapesaki ye yango elongo na buku Biblia eteyaka mpenza nini? Sofɛlɛ yango alobaki boye: “Nandimi na esengo mokanda oyo mpe buku, kasi nazongiseli bino mbongo mpo nalingi kopesa yango likabo mpo bokoka kokoba mosala oyo bozali kosala. Ata soki nazali Motatoli ya Yehova te, nalingi kopesa likabo yango mpo namoni ete bolingo nde etindaka bino bósala.”

Soki olingi komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova asalá mpo na yo, lolenge moko ya komonisa botɔndi na yo ezali kopesa makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. (Mat. 24:14) Etanda oyo elandi emonisi ndenge oyo bato mosusu bapesaka makabo na bango.

NDENGE BATO MOSUSU BAPONAKA KOPESA

MAKABO MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA MOKILI MOBIMBA

Bato mingi babongisaka mwa mbongo sanza nyonso mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.”

Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo yango na babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya bamboka na bango. Moto akoki kotinda makabo na mbala moko na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., Attention Treasurer’s Office, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Watchtower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango na mwa mokanda oyo emonisi ete mbongo yango ezali nde likabo.

KODEFISA MBONGO

Moto akoki kodefisa Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komá mokanda na Treasurer’s Office na adrɛsi oyo ezali likoló to bengá na (718) 560-7500.

LOLENGE MOSUSU YA KOPESA

Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo na kosimba mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Na ndakisa:

Asiranse

: Moto akoki kokoma nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.

Kofungola kɔnti na banki:

Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya epasó na nkombo ya Watch Tower, to kotya nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka yango.

Lotomo ya mosolo:

Okoki kopesa na Watch Tower lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.

Kopesa lopango to ndako:

Moto akoki kopesa likabo ya ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama, soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova na mboka na bino.

Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi:

Moto akoki kozwa ebongiseli ya kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko ya Batatoli ya Yehova, oyo ekoponama, oyo endimami na mibeko ya Leta. Na nsima, moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Na nsima, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

Testama:

Moto akoki kopesa Watch Tower biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa Watch Tower lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.

Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo yango mpo na kosimba mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mwa buku moko ebongisami na Lingelesi mpe na Espagnol, oyo ezali na motó ya likambo Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide. Mwa buku yango ebongisami mpo na kosalisa bato báyeba lolenge mingi ya kopesa makabo ezala sikoyo to na nzela ya libula nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako, bato mingi bapesaki lisungi mpo na mosala na biso ya kosakola na mokili mobimba mpe kosunga bato, mpe Leta akitiselaki bango mpako oyo basengelaki kofuta. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi yango na Charitable Planning Office.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga to kokomela charitable planning office na adrɛsi oyo ezali awa na nse, to okoki kokende na biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi.

Charitable Planning Office

Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

100 Watchtower Drive

Patterson, New York 12563-9204

Telefone: (845) 306-0707

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto