“Ntango oyo etyamá” ekómi pene
LOKOLA mosakoli Habakuku, bayekoli ya Yesu bazalaki mpe kozela na motema likoló komona nsuka ya bampasi. Ntango bayebaki ete Bokonzi ya Nzambe ekobongisa makambo awa na mabele, batunaki Yesu boye: “Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo [na nguya ya Bokonzi] mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Na eyano oyo apesaki bango, Yesu alobaki ete kaka Yehova Nzambe nde ayebi ntango mpenza oyo Bokonzi ekozwa makambo nyonso ya mabele na mabɔkɔ. (Matai 24:36; Marko 13:32) Kasi, Yesu mpe bato mosusu basakolaki makambo mosusu oyo esengelaki kosalema na mabele oyo ekomonisa ete ntango yango ekómi pene.—Talá etanda na lobɔkɔ ya mobali.
Ondimi te ete makambo yango ezali mpenza komonana mingi lelo? Yesu asakolaki mpe ete mosala moko ya koteya bato ekosalema na mabele mobimba. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
Yango nde ezali mpenza kosalema lelo oyo. Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala yango. Na mikili soki 236, Batatoli ya Yehova koleka milio nsambo bazali koyebisa bato makambo oyo Bokonzi yango ekosala, mpe bazali kosalisa bango báyokanisa bomoi na bango na mitinda ya sembo ya Nzambe, oyo mokano na ye ezali ya kosilisa bampasi mpe minyoko. Kobá koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe okozala na elikya ya kokɔta na mokili oyo ezangi mpasi, epai okofanda libela na libela.
[Etanda na lokasa 8]
Bavɛrsɛ oyo elobeli mikolo ya nsuka
• Bitumba na ndenge oyo esalemá naino liboso te
• Koningana makasi ya mabele
• Nzala
• Bamaladi mabe
• Kobuka mibeko ekokóma mingi
• Bolingo ekokita
• Kobebisama ya mabele
• Bolingo makasi ya mbongo
• Kozanga kotosa baboti
• Komilinga makasi
• Kozanga kolingana na kati ya libota
• Bato oyo balingaka te kosala boyokani
• Komipekisa ezali te epai ya mikóló mpe bana
• Kozanga bolingo ya makambo ya malamu epalangani mingi
• Kolinga bisengo koleka Nzambe
• Bato mingi bazali komonisa ete bazali bakristo
• Basakoli ya lokuta bakómi mingi
• Konyokola bakristo ya solo
• Bato bazali kotya likebi te na makebisi ya Biblia
[Elilingi na lokasa 8]
Na mabele mobimba, Batatoli ya Yehova bazali koteya basusu Bokonzi ya Nzambe