Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp20 No. 1 nk. 12-13
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu ateyaki na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
wp20 No. 1 nk. 12-13
Pole ya moi ezali kokɔta na mabele

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ezali kosala nini? Mpe mpo na nini tosengeli kobondela mpo na yango?

Yesu azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.

Luka 1:31-33: “Okopesa ye nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”

Yesu azalaki koteya libosoliboso Bokonzi.

Matai 9:35: “Yesu azalaki kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka, azalaki koteya na basinagoga na bango, kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.”

Yesu apesaki bayekoli na ye elembo oyo ekosalisa bango báyeba ete etikali moke Bokonzi eya.

Matai 24:7: “Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.”

Lelo bayekoli ya Yesu bazali kosakola nsango ya Bokonzi na mabele mobimba.

Matai 24:14: “Mpe nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”

Makambo etali Bokonzi ya Nzambe

Esika ezali. Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo oyo Nzambe atye na likoló.​—DANYELE 2:44; MATAI 4:17.

Mokano na yango. Bokonzi ya Nzambe ekobongola mabele paradiso, esika oyo bato nyonso bakofanda na kimya mpe na bomoko mpe maladi ná liwa ekozala lisusu te.​—NZEMBO 37:11, 29.

Bato oyo bakoyangela. Nzambe atye Yesu lokola Mokonzi mpo na koyangela na likoló elongo na bato 144 000, oyo basombamaki na mabele.​—LUKA 1:30-33; 12:32; EMONISELI 14:1, 3.

Bato oyo ekoyangela. Bato oyo Bokonzi ekoyangela bakofanda na mabele mpe bakondima Yesu azala Mokonzi na bango mpe bakotosa mibeko ya Bokonzi.​—MATAI 7:21.

Mpo na nini Yesu azali mokonzi oyo abongi mpenza kotambwisa bato

Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete akozala mokonzi oyo azali na bolingo mpe akosala makambo ya malamu mpo

  • Amonisaki ete babola bazali na valɛrɛ.​—LUKA 14:13, 14.

  • Ayinaki kanyaka mpe makambo ya kozanga bosembo.​—MATAI 21:12, 13.

  • Azalaki na bokonzi likoló ya mai mpe mipɛpɛ makasi.​—MARKO 4:39.

  • Aleisaki ebele ya bato.​—MATAI 14:19-21.

  • Ayokelaki bato oyo bazalaki na maladi mawa mpe abikisaki bango.​—MATAI 8:16.

  • Asekwisaki bakufi.​—YOANE 11:43, 44.

Bolamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekoki komemela yo

Okoki kozala na bomoi ya esengo kobanda sikoyo soki okómi moto oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Na ndakisa, bato oyo Bokonzi ekoyangela

  • Balukaka “kozala na kimya na bato nyonso.”​—BAEBRE 12:14.

  • Bazalaka na kimya mpe na bomoko na kati ya libota mpo babalani balinganaka mpe bamoniselanaka limemya.​—BAEFESE 5:22, 23, 33.

  • Bazalaka na bomoi ya malamu mpe ya esengo mpo “bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango.”​—LUKA 11:28.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto