Fɛti ya Bonane—Ezali mpo na bakristo?
MBULA na mbula na sanza ya Yanuali to Febwali, Azia eyambaka ebele ya bato oyo bautaka na mikili ndenge na ndenge. Ebele ya bato ya Azia bazongaka na mabota na bango mpo na kosepela fɛti ya Bonane.a
Bonane ezalaka fɛti moko monene na manaka ya Azia. Mokomi moko ya Amerika alobi ete: “[Bonane] mokolo ya sika ya mobu, mokolo ya minei ya sanza ya Yuli, fɛti ya kozongisa matɔndi, mpe Noele nyonso ezali kaka ndenge moko.” Fɛti yango ebandaka ntango sanza ebimi na kolanda manaka ya Chine, to katikati ya mokolo ya 21 Yanuali mpe 20 Febwali na kolanda manaka ya Wɛsti. Eumelaka mikolo mingi, ekoki kokende tii pɔsɔ mibale.
Fɛti yango ezalaka mpo na kozongisa makambo nyonso sika, kobosana makambo ya kala mpe kobanda makambo ya sika. Mpo na kobongisa fɛti yango, bato basukolaka bandako na bango mpe bakómisaka yango kitoko, basombaka bilamba ya sika, balambaka biloko oyo bankombo na yango eyokanaka “na makila malamu” to “bozwi,” mpe basilisaka banyongo na bango mpe matata oyo bazalaki na yango na bato mosusu. Na Bonane bato bapesanaka bakado, batombelanaka bomoi ya malamu, mbala mingi mpo bázala na bozwi mpe bálonga, mpe bapesanaka mbongo oyo babengaka, mbongo ya makila malamu oyo batyaka na mwa sakosi moko ya motane, balyaka biloko oyo ebongi mpenza mpo na mokolo yango, babɛtaka bakano, batalaka mabina ya Dragɔ ya langilangi to nkɔsi, to mpe basalaka fɛti yango kaka na kati ya libota mpe elongo na baninga.
Mimeseno yango ezali na ndimbola mingi. Buku moko (Mooncakes and Hungry Ghosts: Festivals of China) elobi boye: “Ntina ya libosoliboso oyo mabota, baninga mpe bandeko basalaka fɛti yango ezali mpo báluka kozala na makila malamu, kokumisa banzambe mpe bilimo, mpe balukaka kozala malamu na mobu ya sika.” Lokola na fɛti yango milulu ndenge na ndenge ya bonkɔkɔ mpe ya lingomba ekɔtaka, ndenge nini bakristo basengeli kotalela fɛti yango? Basengeli se kolanda mimeseno yango? Ezali mpenza mpo na bakristo?
“Kobosana liziba te”
Lisese moko ya Chine elobaka boye: “Ntango ozali komɛla mai, kobosana liziba te.” Yango emonisaka limemya mozindo oyo bato mingi ya Azia bazalaka na yango mpo na baboti mpe bankɔkɔ na bango. Lokola baboti nde bapesá bango bomoi, bana bamonaka malamu komonisela bango limemya ndenge wana; yango ezalaka na ntina mingi na ntango ya fɛti ya Bonane.
Na ntembe te, fɛti ya Bonane ezalaka mpenza na ntina mingi mpo na mabota mingi ya Azia. Na butu yango, mabota mingi eyanganaka mpo na fɛti. Yango ezalaka libaku mpo na bato ya libota oyo bazalaka mosika básala nyonso mpo bázanga te. Na ntango ya fɛti, babongisaka bisika kaka te mpo na bato oyo bazali wana kasi mpe mpo na bato ya libota yango oyo bakufá, mpo bakanisaka ete elimo na bango ezali wana. Buku moko elobi ete: “Na ntango ya kolya, bankɔkɔ ná bato ya mabota basololaka mpenza.” Buku mosusu elobi boye: “Na ndenge yango, boyokani ezongaka lisusu kati na bato ya bomoi mpe oyo bakufá, bankɔkɔ bakobatela libota na mobu yango mobimba.” Ndenge nini bakristo basengeli kotalela mimeseno yango?
Kolinga baboti mpe komemya bango ezali na ntina mingi mpe mpo na bakristo. Balandaka toli oyo ya Nzambe: “Yoká tata na yo oyo abotaki yo, mpe kotyola mama na yo te kaka mpo akómi mobange.” (Masese 23:22) Batosaka mpe etinda oyo ya Biblia: “‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’; oyo ezali mobeko ya liboso elongo na elaka: ‘Mpo makambo na yo etambola malamu mpe oumela ntango molai na mabele.’” (Baefese 6:2, 3) Ya solo, bakristo ya solo bazalaka na mposa ya kolinga mpe kokumisa baboti na bango!
Biblia elobeli na ndenge ya malamu kokutana ya kolendisa oyo mabota mosusu esalaki. (Yobo 1:4; Luka 15:22-24) Kasi, Yehova apesaki mobeko oyo: “Epai na yo moto azwama te oyo . . . azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo, . . . to moto oyo azali kotuna bakufi.” (Kolimbola Mibeko 18:10, 11) Mpo na nini apekisaki? Mpo Biblia emonisi solo na oyo etali bakufi. Elobi boye: “Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” Lokola bato oyo bakufá bayebaka eloko te, bakoki te kosala makambo elongo na bato ya bomoi; bakoki mpe te kosalisa bango to kosala bango mabe. (Mosakoli 9:5, 6, 10) Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe akokanisaki liwa na mpɔngi, mpe bakufi bakolamuka na mpɔngi yango kaka na ntango ya lisekwa.—Yoane 5:28, 29; 11:11, 14.
Lisusu, Biblia emonisi ete “bilima” to “bilimo” ya bakufi, ndenge bato mingi bakanisaka, ezali nde bikelamu ya mabe ya elimo oyo bamimonisaka lokola bato oyo bakufá. Mpo na nini basalaka bongo? Mpo na kobungisa bato nzela mpe kotambwisa bango na misala na bango ya mabe! (2 Batesaloniki 2:9, 10) Mibeko ya Nzambe ebatelaka biso na makama minene. Na yango, bolingo mpo na Yehova mpe mposa ya kobatelama epai na ye etindaka bakristo báboya mimeseno nyonso oyo eyokani na losambo ya “bilimo” na libota to mimeseno oyo elukaka ete bilimo yango ebatela bango.—Yisaya 8:19, 20; 1 Bakorinti 10:20-22.
Epai mosusu, bakristo balingaka mpe kokumisa “Tata, oyo mpo na ye, libota nyonso na likoló mpe na mabele ezwi nkombo.” (Baefese 3:14, 15) Tata yango ezali nani? Ezali Yehova Nzambe, Mozalisi na biso mpe Mopesi-bomoi. (Misala 17:26) Yango wana, ntango tozali komona mimeseno oyo esalemaka na fɛti ya Bonane, ekozala malamu tómituna boye: Ndenge nini Yehova atalelaka mimeseno yango? Andimaka yango?—1 Yoane 5:3.
Kokumisa banzambe ya ndako
Fɛti ya Bonane ezalaka na mimeseno ndenge na ndenge oyo eyebani mingi oyo esalemaka mpo na komemya to kokumisa ebele ya banzambe ya ndako, na ndakisa, nzambe ya porte, nzambe ya mabele to elimo oyo ebatelaka, nzambe ya bomɛngo, mpe nzambe ya nkuku to ya resho. Tótalela naino momeseno oyo bato mingi basalaka ya kokumisa nzambe ya nkuku.b Bato bakanisaka ete, mwa mikolo liboso ya mbula ya sika, nzambe yango akendaka na likoló mpo na kopesa lapolo ya libota epai ya amperɛrɛ Jade, nzambe oyo aleki banzambe nyonso na Chine. Mpo nzambe ya nkuku aloba malamu mpo na bango, libota etindaka ye na bilei moko ya malamu mingi, na bakado lokola babɔmbɔ mpe bagato. Mpo aumela te na nzela, libota ezwaka elilingi na ye, ntango mosusu bapakolaka babɔmbɔ na mbɛbu na yango, mpe bakendaka kotumba yango na libándá. Na butu, liboso ya mokolo ya fɛti ya Bonane, batyaka fɔtɔ ya sika ya nzambe yango likoló ya resho oyo ezali na nkuku, mpo na kobenga ye azonga na ndako mpo na mobu ya sika.
Atako mimeseno yango mingi ekoki komonana ete ezali mabe te, bakristo basengeli kolanda oyo Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga na makambo etali losambo. Na likambo yango, Yesu Kristo alobaki boye: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Matai 4:10) Tomoni polele ete Nzambe alingi tósambela kaka ye. Mpo na nini? Kanisá na likambo oyo: Yehova azali Tata na biso ya likoló. Ndenge nini tata moko akoyoka soki bana na ye bazali kokipe ye lisusu te mpe bakei epai ya tata mosusu? Akoyoka mpasi te na motema?
Yesu ayebaki ete Tata na ye ya likoló azali “Nzambe ya solo kaka moko,” mpe Yehova ayebisaki basambeli na ye polele ete longola ye, basengeli “kozala na banzambe mosusu te.” (Yoane 17:3; Kobima 20:3) Yango wana, bakristo ya solo balingaka kosepelisa Yehova, kasi te koyokisa ye mpasi na motema na kosambela banzambe mosusu.—1 Bakorinti 8:4-6.
Biyambayamba mpe misala ya bilimo mabe
Fɛti ya Bonane ezalaka mpe na boyokani na misala ya kotala minzoto. Na manaka ya Chine, mbula mokomoko ebengamaka na kolanda banyama 12 oyo ezali na sɛrklɛ moko na ndakisa, dragɔ, tigrɛ, makako, lapin, mpe bongo na bongo. Nyama yango emonisaka bomoto mpe bizaleli ya baoyo bakobotama na mbula yango to esalaka ete mbula yango ezala malamu mpo na kosala misala mosusu. Mimeseno mosusu oyo esalemaka na Bonane, na ndakisa kokumisa nzambe ya bomɛngo, ezalaka mingimingi mpo na koluka kozala na “makila malamu.” Ndenge nini bakristo basengeli kotalela mimeseno yango?
Na Liloba na ye Biblia, Yehova apamelaki baoyo bakómaki “basambeli ya biloko oyo ezali na likoló, baoyo batalaka minzoto, baoyo, na basanza ya sika, bapesaka boyebi mpo na makambo oyo ekokwela [bango].” Aboyaki mpe losambo ya “nzambe ya makila malamu” mpe “nzambe ya Makambo Nyonso Etángamá.” (Yisaya 47:13; 65:11, 12) Na esika ya kotya motema na makambo mosusu ya mokili ya bilimo to kotala minzoto, Biblia eyebisi basambeli ya solo ete: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” (Masese 3:5, 6) Ya solo, biyambayamba ekangaka bato na boombo, kasi solo ya Biblia esikolaka bato.—Yoane 8:32.
Monisá ete olingaka Nzambe
Koyeba ndenge mimeseno mpe makambo mosusu ya fɛti ya Bonane ebandá mpe koboya kosala fɛti yango ezali makambo mibale ekeseni. Soki ofandaka na mboka moko epai bato bazalaka na momeseno ya kosala fɛti ya Bonane to soki fɛti ya Bonane ekómá momeseno ya bonkɔkɔ na libota na bino, kozwa ekateli ezali likambo ya pɛtɛɛ te.
Kasi, esɛngaka mpiko mpe kozala na ekateli makasi mpo na kolonga ntango okutani na botɛmɛli. Ndeko mwasi moko na Azia, alobi boye: “Nazalaki kobanga mpo moto nyonso na mboka na biso azalaki kosala fɛti ya Bonane, kasi ngai nazalaki kosala yango te.” Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Lokola nakómaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, yango esalisaki ngai nayika mpiko.”—Matai 10:32-38.
Olingaka Yehova ndenge wana? Ezali mpenza na ntina olinga ye. Bomoi na yo eutá te na banzambe oyo bayebani te, kasi eutá nde na Yehova Nzambe, oyo Biblia elobi mpo na ye boye: “Liziba ya bomoi ezali epai na yo; na pole oyo ezali kouta epai na yo, tokoki komona pole.” (Nzembo 36:9) Yehova nde abatelaka yo mpe asalaka ete ozala na bomoi ya esengo, kasi te banzambe ya makila malamu to ya nkuku. (Misala 14:17; 17:28) Okolinga ye? Zalá na elikya ete soki osali yango Yehova akopambola yo mingi.—Marko 10:29, 30.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Fɛti yango ebengamaka mpe mbula ya sika ya Chine, fɛti ya eleko ya prɛnta, Chun Jie (na Chine), Tet (na Vietnam), Solnal (na Corée), to Losar (na Tibet).
b Mimeseno oyo tolobeli na lisolo oyo ezali ndenge moko te na Azia mobimba, kasi nyonso eutá kaka na makanisi moko. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ 1986, nkasa 20, 21, mpe Lamuká! ya 8 Mai 1970, nkasa 9-11, (nyonso na Lifalanse).
[Etanda/Elilingi na lokasa 23]
Ndenge ya kosala mpo baninga mpe bandeko na yo básilika te
Na ntembe te, soki moto moko atiki kosala fɛti ya Bonane, likambo yango ekoki kosala baninga mpe bandeko na ye mpasi mingi na motema. Bakoki koyoka mawa, kotungisama to mpe komona lokola atɛki bango. Kasi, ezali na mingi oyo okoki kosala mpo na kobatela esengo mpe boyokani ya malamu na kati ya libota. Tóyoka naino makambo oyo bakristo oyo bafandaka na bisika ndenge na ndenge na Azia balobi:
Jiang: “Liboso ya fɛti ya Bonane, nakendaki kotala bandeko na ngai mpe na mayele nyonso nalimbwelaki bango ntina oyo nakosangana lisusu te na mimeseno mosusu oyo bato basalaka. Nasalaki nyonso mpo natyola te mateya na bango mpe na limemya nyonso nasalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na bango. Yango esalaki ete tósolola malamu makambo ya Nzambe.”
Li: “Mwa mikolo liboso ya fɛti ya Bonane, na mayele nyonso mpe na limemya, nayebisaki mobali na ngai ete nasengeli kotosa lisosoli na ngai mpo nazala na esengo ya solosolo. Nalakaki ye ete nakoyokisa ye nsɔni te ntango tokokende kotala libota na ye na eleko ya fɛti. Likambo ya kokamwa, na mokolo oyo libota na ye bazalaki kosala losambo ya bankɔkɔ, amemaki ngai na esika mosusu mpo nakende na makita.”
Xie: “Nakitisaki bato ya libota na ngai motema ete nalingaka bango mpe nayebisaki bango ete mateya oyo nazali kozwa ekokómisa ngai moto malamu. Na nsima, nasalaki makasi namonisa bizaleli lokola motema pɛtɛɛ, kosala na mayele, mpe bolingo. Mokemoke, bakómaki komemya lingomba na ngai. Na nsima, mobali na ngai akómaki koyekola Biblia mpe akómaki mokristo ya solo.”
Min: “Nasololaki na baboti na ngai na boboto nyonso mpe na limemya. Na esika natombela bango ‘makila malamu,’ nayebisaki bango ete nabondelaka Yehova Mozalisi na biso, mpo na bango, nasɛngaka ye apambola bango mpe apesa bango kimya mpe esengo.”
Fuong: “Nayebisaki baboti na ngai ete ezali na ntina te nazelaka kaka Bonane mpo naya kotala libota na ngai. Nazalaki kokende kotala bango mbala na mbala. Yango esalaki ete baboti na ngai bákóma na esengo mpe batikaki kolobela ngai mabe. Leki na ngai ya mobali mpe akómaki kosepela koyekola Biblia.”
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]
Panorama Stock/age Fotostock