Teyá bana na yo
Yirimia atikaki te
ESILÁ kokómela yo olɛmba nzoto mpe oyoka mposa ya kotika?—a Likambo yango ekómelaka bato mingi. Elenge Yirimia mpe ayokaki bongo. Kasi, atikaki te ete makambo oyo bato mosusu bazalaki koloba to kosala etinda ye atika. Tiká tólobela naino mpo na nini Yirimia azalaki moto moko ya ntina mingi na miso ya Nzambe atako ayokaki mposa ya kotika.
Liboso ete Yirimia abotama, Yehova Nzambe ya solo aponaki ye azala mosakoli mpo na kokebisa bato ete makambo oyo bazali kosala ezali kosepelisa Nzambe te. Oyebi likambo oyo Yirimia ayebisaki Yehova bambula mingi na nsima?— “Nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.”
Okanisi ete Yehova apesaki Yirimia eyano nini?— Na boboto nyonso, kasi kozanga kobongola etinda na ye, alobaki na ye boye: “Koloba te ete: ‘Nazali kaka mwana.’ Kasi okokende epai ya baoyo nyonso nakotinda yo; mpe okoloba likambo nyonso oyo nakopesa yo mitindo. Kobanga . . . te.” Mpo na nini? Yehova alobaki boye: “Nazali elongo na yo mpo na kobikisa yo.”—Yirimia 1:4-8.
Atako bongo, na nsima Yirimia alɛmbaki nzoto ndenge tomonaki yango na ebandeli. Alɛmbaki mpo bato bazalaki kotyola ye mpo azalaki kosalela Nzambe. Alobaki boye: ‘Moto nyonso azali kosɛka ngai mokolo mobimba mpe kotyola ngai.’ Yango wana amonaki malamu atika. Alobaki lisusu boye: “Nakotánga nkombo na ye te, mpe nakoloba na nkombo na ye lisusu te.” Kasi, atikaki mpenza?
Yirimia alobaki boye: ‘Na motema na ngai, liloba ya Yehova ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai; mpe nalɛmbaki kobomba yango.’ (Yirimia 20:7-9) Atako na ntango mosusu Yirimia akómaki kobanga, kasi bolingo oyo azalaki na yango mpo na Yehova esalaki ete atika te. Tótala ndenge Yirimia abatelamaki mpo atikaki te.
Yehova ayebisaki Yirimia akebisa bato ete Yerusaleme ekobomama soki batiki te makambo na bango ya mabe. Ntango Yirimia asakolaki nsango yango, bato basilikelaki ye mpe balobaki ete: “Moto oyo abongi na ekateli ya liwa.” Kasi, Yirimia abondelaki bango ‘bátosa mongongo ya Yehova.’ Na nsima, alobaki boye: ‘Bosengeli koyeba ete soki bobomi ngai, bokotya likoló na bino makila ya moto oyo azali na likambo te, mpo Yehova nde atindaki ngai naloba na bino.’ Oyebi likambo oyo esalemaki na nsima?—
Biblia elobi ete: “Bankumu ná bato nyonso balobaki na banganga-nzambe mpe na basakoli ete: ‘Moto oyo abongi na ekateli ya liwa te, mpo alobaki na biso na nkombo ya Yehova Nzambe na biso.’” Na yango, lokola Yirimia atikaki te kobanga epekisa ye, Yehova abatelaki ye. Tótala sikoyo likambo oyo ekómelaki Uriya, mosakoli mosusu ya Yehova oyo asalaki te lokola Yirimia.
Biblia elobi boye: ‘Uriya azalaki kosakola mpo na engumba Yerusaleme na kolanda maloba nyonso ya Yirimia.’ Kasi, ntango Mokonzi Yehoyakime asilikelaki Uriya, oyebi soki Uriya asalaki nini?— Abangaki, atikaki kosala mokano ya Yehova mpe akimaki na Ezipito. Na yango, mokonzi atindaki bato bákende koluka ye kuna mpe bázongisa ye na Yerusaleme. Ntango bayaki na ye, oyebi likambo oyo mokonzi wana ya mabe asalaki?— Abomaki Uriya na mopanga!—Yirimia 26:8-24.
Mpo na nini okoki koloba ete Yehova abatelaki Yirimia kasi abatelaki Uriya te?— Toboyi te, bango nyonso mibale babangaki, kasi Yirimia atikaki te kosalela Yehova mpe akimaki te. Atikaki te. Mpo na yo liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yirimia?— Ntango mosusu ekoki kozala mpasi tósala oyo Nzambe alobi na biso, kasi tosengeli ntango nyonso kotyela ye motema mpe kotosa ye.
a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.