Mituna ya batángi
Bato misato ya bwanya bakendaki mpenza kotala Yesu ntango abotamaki?
Masolo ya Noele na mokili mobimba emonisaka bakonzi misato to bato ya bwanya bamemeli Yesu bakado. Lisolo yango ezali solo? Eyokani mpenza na makambo ndenge ezalaki? Tótala naino.
Baevanzile mibale, oyo ya Matai mpe ya Luka, elobeli kobotama ya Yesu. Masolo yango emonisi ete kaka babateli ya mpate oyo bazalaki na bilanga pene wana nde bakendaki kotala Yesu ntango abotamaki. Bato yango oyo babengaka bakonzi to bato ya bwanya, bazalaki nde banganga-minzoto, kasi bakonzi te mpe motángo na bango eyebani te. Banganga-minzoto bakendaki te na elyelo ya bibwɛlɛ epai mwana abotamaki, kasi bakómaki nde ntango Yesu akolaki mwa moke mpe azalaki na ndako. Kutu, kokóma na bango kuna etyaki bomoi ya Yesu na likama!
Soki otángi na likebi ndenge Luka, moko ya bakomi ya Biblia alobeli lisolo ya kobotama ya Yesu, okomona alobi ete: “Babateli ya mpate bazalaki kofanda libándá butu mobimba mpo na kobatela bitonga na bango. Mpe na mbala moko anzelu ya Yehova atɛlɛmaki pene na bango, mpe . . . alobaki na bango ete: ‘. . . Bokokuta mwana moko ya moke bazingi ye bilamba mpe alali na elyelo ya bibwɛlɛ.’ . . . Mpe bakendaki nokinoki mpe bakutaki Maria ná Yozefe, mpe mwana yango ya moke alali na elyelo ya bibwɛlɛ.”—Luka 2:8-16.
Kaka Yozefe, Maria, mpe babateli ya mpate nde bazalaki wana ntango Yesu abotamaki. Lisolo ya Luka etángi moto mosusu te.
Sikoyo tótalela lisolo yango na Matai 2:1-11, na Bible na lingala ya lelo oyo. Tozali kotánga boye: “Yezu abotamaki na Betleem, na rejion ya Yudea, na ntango ya mokonzi Erode. Kaka na mikolo wana, banganga oyo batalaka minzoto balongwe na mboka na bango na epai moi ebimaka, pe bakomi na Yeruzalem. . . . Bakoti na ndako pe bamoni mwana, ná mama na ye Maria.”
Simbá ete lisolo yango elobeli kaka “banganga oyo batalaka minzoto,” kasi te “bato misato ya bwanya,” mpe bato yango balongwaki epai moi ebimaka to na ɛsti, mpe bakendaki naino na Yerusaleme, kasi te na Beteleme, engumba oyo Yesu abotamaki. Ntango bakómaki na Beteleme, Yesu azalaki lisusu bebe te, Biblia elobi ete azalaki “mwana” mpe azalaki lisusu te na ndako ya banyama, kasi bakutaki ye na kati ya ndako.
Lisusu, Bible na lingala ya lelo oyo esaleli maloba “banganga oyo batalaka minzoto” mpo na kolobela bapaya yango; nzokande, mabongoli mosusu esalelaka maloba lokola “banganga-minzoto.” Buku moko (A Handbook on the Gospel of Matthew) elobi boye: “Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘bato ya bwanya’ ezalaki komonisa banganga-nzambe ya Perse oyo bazalaki na mayele mingi na likambo etali kotala minzoto.” Mpe buku mosusu (The Expanded Vine’s Expository Dictionary of New Testament Words) elimboli maloba yango na “moto ya magi, nganga-nkisi.”
Atako misala ya kotala minzoto mpe ya bonganga-nkisi ezali mingi lelo oyo, Biblia ezali kokebisa biso ete tósalela yango te. (Yisaya 47:13-15) Ezali misala ya bilimu mabe mpe Yehova ayinaka yango. (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Yango wana anzelu moko te ya Nzambe ayebisaki banganga-minzoto wana nsango ya kobotama ya Yesu. Kasi, na nzela ya ndɔtɔ, Nzambe akebisaki bango báyebisa te Erode, mokonzi mabe oyo azalaki koluka koboma Yesu. Yango wana, “bazongaki na mokili na bango na nzela mosusu.”—Matai 2:11-16.
Bakristo ya solo bakolinga mpenza kolobelaka masapo ya mbotama ya Yesu oyo balakisaka na Noele, oyo elobaka solo te na ndenge makambo elekaki ntango Yesu abotamaki? Na ntembe te, bakolinga kosala bongo te.