Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/12 nk. 14-15
  • Ndenge nini tosengeli kokanisaka Yesu Kristo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini tosengeli kokanisaka Yesu Kristo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • “Oyo azali mwana na ngai”
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”
    Mekolá kondima na bango
  • Baanzelu bayebisi ete Yesu abotami
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/12 nk. 14-15

TEYÁ BANA NA YO

Ndenge nini tosengeli kokanisaka Yesu Kristo?

Na sanza ya zomi na mibale, bato mingi na mokili mobimba bamonaka bililingi to bafɔtɔ ya Yesu oyo azali mwana moke. Balalisi ye na elyelo ya bibwɛlɛ, kɛsi moko ya monene oyo batyelaka banyama matiti ya kolya. Kasi tosengeli kokanisaka Yesu kaka lokola mwana moke?—a Tólobela naino ndenge oyo eleki malamu ya kokanisa ye. Likambo oyo ekómelaki babateli ya mpate oyo bazalaki na bilanga oyo ezalaki pene ya Beteleme mokolo moko na butu ekoki koteya biso.

Na mbala moko anzelu moko abimelaki bango. Ayebisaki bango boye: “Lelo, . . . baboteli bino Mobikisi, oyo azali Kristo Nkolo.” Abakisaki ete bakokuta Yesu “bazingi ye bilamba mpe alali na elyelo ya bibwɛlɛ.” Kaka na ntango wana, ebele ya baanzelu babimaki mpe babandaki “kosanzola Nzambe.”

Okoyoka ndenge nini soki oyoki baanzelu bazali kosanzola Nzambe?— Babateli ya mpate basepelaki! Balobaki boye: “Tókende mbala moko na Beteleme mpe tómona likambo oyo esalemi.” Kuna bakutaki “Maria ná Yozefe, mpe mwana yango ya moke alali na elyelo ya bibwɛlɛ.”

Na nsima, bamosusu bayaki na Beteleme esika Maria ná Yozefe bazalaki. Ntango babateli ya mpate bayebisaki bango makambo oyo esalemaki, bango nyonso bakamwaki. Okosepela koyeba makambo wana ya kitoko?— Biso nyonso oyo tolingaka Nzambe, tokosepela. Sikoyo tótala naino mpo na nini bato basepelaki mingi na mbotama ya Yesu. Boye, tózonga naino na ntango oyo Maria abalaki naino te.

Mokolo moko, anzelu moko na nkombo Gabriele ayaki kotala Maria. Alakaki ye ete akobota mwana oyo “akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló.” Gabriele alobaki ete: ‘Akoyangela libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.’

Maria azalaki na mposa ya koyeba ndenge nini likambo yango ekosalema, mpo ayebaki naino mibali te. Yango wana, Gabriele ayebisaki ye boye: “Nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo,” mpe “mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” Ndenge Nzambe alongolaki bomoi ya Mwana na ye kuna na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria mpo akola na kati lokola bebe, ezalaki mpenza likamwisi!

Osí omoná bililingi oyo emonisaka ‘bato misato ya bwanya’ oyo bakendaki kotala mwana Yesu elongo na babateli ya mpate?— Balakisaka mingi bililingi ya ndenge wana na eleko ya Noele. Kasi ezali solo te. ‘Bato yango ya bwanya’ bazalaki nde banganga-minzoto, mosala oyo Nzambe apekisi. Tótala likambo oyo esalemaki ntango bakómaki. Biblia elobi boye: “Ntango bakɔtaki na ndako bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye.” Na yango, Yesu azalaki lisusu bebe te oyo alali na elyelo ya bibwɛlɛ; azalaki mwana mpe azalaki kofanda elongo na Maria ná Yozefe na ndako!

Ndenge nini banganga-minzoto bamonaki Yesu?— Balandaki “monzoto” moko oyo ememaki bango na Beteleme te, kasi ememaki bango naino epai ya mokonzi Erode na Yerusaleme. Biblia elobi ete Erode azalaki na mposa ya koyeba epai Yesu azali mpo aboma ye. Sikoyo kanisá naino. Okanisi nani atindaki eloko yango oyo emonanaki lokola monzoto etambwisa banganga-minzoto tii epai ya Erode?— Ezalaki te Yehova, Nzambe ya solo, kasi nde monguna na ye Satana Zabolo!

Lelo Satana alingaka bato bákanisa ete Yesu azali kaka bebe. Kasi anzelu Gabriele ayebisaki Maria ete: “Akoyangela . . . , mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” Yesu azali sikoyo koyangela kuna na likoló, mpe mosika te akoboma banguna nyonso ya Nzambe. Yango nde makambo oyo tosengeli koyeba mpo na Yesu, mpe tosengeli koyebisa yango basusu.

Tángá na Biblia na yo

  • Luka 1:26-35; 2:8-18

  • Matai 2:7-12; 1 Petro 5:8

  • Emoniseli 19:19-21; 1 Yoane 2:17

a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto