Osengeli kozala sembo ntango nyonso?
MOTO nyonso azalaka sembo na bantango mosusu; ekoki kozala ete bato mosusu bazalaka sembo mbala mingi. Kasi, oyebi bato boni oyo basalaka makasi ya kozala sembo ntango nyonso?
Lelo oyo, bato mingi bazali sembo te na makambo mingi ya bomoi. Nzokande, likanisi ya Nzambe na oyo etali kozala sembo eyebani malamu. Na ndakisa, bato mingi bayebi malamu maloba ya mobeko ya mwambe kati na Mibeko Zomi oyo elobi boye: “Osengeli koyiba te.” (Kobima 20:15) Kasi, bato mingi bamonaka ete na makambo mosusu, koyiba to kosala likambo mosusu ya kozanga kolongobana ezali mabe te. Tótala bandakisa misato ya moyibi oyo bato mingi bamonaka mabe te.
Moyibi ezali mabe te soki ozali mobola?
Mokolo moko, Moroma moko oyo azalaki moto ya politiki alobaki boye: “Bobola ebimisaka makambo ya mabe.” Mobola akoki komona ete asali mabe te soki ayibi. Bato oyo bamoni likambo yango bakoki mpe kokanisa ete asali mabe te. Likanisi ya Yesu na likambo yango ezalaki nini? Azalaki na motema mawa mpo na bato oyo bazali na bosɛnga. “Ayokelaki bango mawa.” (Matai 9:36) Nzokande, ezala na likambo nini, andimaki moyibi ata mokolo moko te. Na yango, mobola asengeli kosala nini?
Nzambe azalaka na mawa mpo na baoyo bamekaka mpenza kotosa ye, mpe akopambola milende na bango mpo na kozwa oyo basengeli na yango. (Nzembo 37:25) Biblia epesi elaka oyo: “Yehova akoyokisa molimo ya moyengebene nzala te, kasi akoboya mposa ya bato mabe.” (Masese 10:3) Moto oyo azali mobola akoki kotya motema na elaka yango? Victorine andimaka yango mpenza.
Lokola mobali na ye akufá mpe azali mama ya bana 5 oyo bakendaka kelasi, Victorine azali na mpasi. Afandi na mokili ya bobola epai lisungi ya Leta ezalaka mingi te. Mokolo nyonso, alekisaki ntango na ye mingi libándá, epai mabaku ya koyiba ezalaka beboo. Nzokande, Victorine ayokaka mposa ya koyiba te. Kasi, mpo akoka kozwa biloko oyo asengeli na yango, atɛkaka biloko na balabala na bosembo. Mpo na nini atikalaka sembo?
Alobi boye: “Ya liboso, nandimaka ete Nzambe azali sembo mpe ete akozala sembo epai na ngai soki namekoli ye. Ya mibale, bana na ngai bakoki koyekola kozala sembo kaka soki bamoni ete ngai nazali sembo.”
Bomoi na ye ezali ndenge nini? “Tozali na bilei, bilamba, mpe esika ya kolala. Kasi, na bantango mosusu, nasengelaki kosɛnga baninga lisalisi, na ndakisa na ntango ya maladi, mpo na kofuta mbongo oyo tokanaki te kofuta. Ntango nyonso nazwaka oyo nasengeli na yango. Mpo na nini? Mpo baninga na ngai bayebi ete nayebisaka bango makambo na ngai na bosembo mpe nalukaka te kozwa koleka oyo nasengeli na yango.
“Bana bazali kokóma sembo. Kala mingi te, moninga moko amonaki mwa mbongo ya bibende na mesa na biso mpe atunaki ngai soki nazali kobanga te ete bana bázwa yango. Ezalaki mpasi mpo andima ntango nayebisaki ye ete bana na ngai bakosala likambo ya ndenge wana ata mokolo moko te. Kozanga nayeba yango, azwaki ekateli ya komeka bango. Atikaki na mayele mbongo mibale ya bibende ya 100 francs na ndako na biso na esika oyo bana bakoki komona yango noki. Ntango azongaki na mokolo oyo elandaki, akamwaki makasi na komona ete mbongo yango ezalaki kaka wana. Kozala na bana oyo bazali sembo ezali esengo mingi koleka kozala na biloko mingi ya mokili.”
“Moto nyonso asalaka yango”
Koyiba na mosala epalangani mingi. Na yango, bato mingi balobaka ete: “Moto nyonso asalaka yango, bongo ngai nasala te mpo na nini?” Nzokande, Biblia elobi boye: “Osengeli te kolanda ebele ya bato mpo na mikano ya mabe.” (Kobima 23:2) Victoire atosaki toli yango. Ebotaki mbuma ya malamu?
Ntango azalaki na mbula 19, Victoire azwaki mosala na izini oyo basalaka mafuta ya mbila. Eumelaki te, amonaki ete basi 40 oyo basalaka kuna bazalaki kosalela bitunga na bango mpo na kobimisa mbila na izini na mayele. Pɔsɔ nyonso, bazalaki kotɛka mbila yango mpe mbongo oyo bazalaki kozwa ekokani na mbongo ya mikolo misato to minei ya mosala. Victoire alobi boye: “Bato nyonso mpenza bazalaki kosala yango. Bazalaki kolikya ete ngai mpe nasala lokola bango, kasi naboyaki, nayebisaki bango ete kozala sembo ezali bomoi na ngai. Batyolaki ngai, balobaki ete nazali kosala mosala ya mpunda.
“Mokolo moko ntango tozalaki kobima na izini, patrɔ abimelaki biso. Atalaki na kitunga ya moto mokomoko mpe amonaki mbila na bitunga nyonso, longola kaka na oyo ya ngai. Bato nyonso oyo akangaki basengelaki kolongwa na mosala na mbala moko to kosala pɔsɔ mibale kozanga báfuta bango. Na boumeli ya pɔsɔ wana mibale, basi yango bandimaki ete nazalaki kosala mosala ya mpunda te.”
“Nalɔkɔti na ngai”
Okanisaka nini soki omoni eloko moko ya motuya oyo moto moko akweisi? Na mbala moko bato mingi bayokaka ete eloko yango ekómi ya bango, etindaka bango bálongola likanisi nyonso ya kozongisa yango. Balobaka ete “Nalɔkɔti na ngai.” Bato mosusu bakoki kokanisa ete basali mabe moko te. Bakanisaka ete, na ntembe te nkolo na yango ayebi kaka ete esili kobunga. Bato mosusu balobaka ete ezali mokumba na bango te ya koluka nkolo ya eloko yango—likambo oyo ekoki kosɛnga milende mingi.
Nzambe akanisaka nini mpo na likambo yango? Kolimbola Mibeko 22:1-3 emonisi ete moto oyo amoni eloko ya moninga, asengelaki te kokómisa yango ya ye, kasi kobomba yango ‘tii tango kolo na yango akoya koluka yango; bongo kopesa ye.’ (Bible na lingala ya lelo oyo) Soki moto alɔkɔti eloko mpe alobi eloko te, bakokaki kofunda ye ete ayibi. (Kobima 22:9) Makambo ya ndenge wana ekoki kosimba lelo? Christine andimi ete ezali bongo.
Christine azali direktere na eteyelo moko. Na mokolo ya misato moko boye, bafutaki ye mbongo na ye ya sanza. Kaka ndenge bato ya Afrika ya Wɛsti basalaka, angumbaki mbongo na ye mpe akɔtisaki yango na sakosi na ye. Na nsima, atɛlɛmisaki tukutuku moko oyo esalaka taxi mpe akendaki mbango na likita moko. Ntango akómaki, alukaki mwa mbongo ya bibende na sakosi na ye mpo afuta sofɛlɛ. Na molili wana, liboke ya mbongo ekweaki na nse kozanga ayeba.
Mwa miniti na nsima, Blaise, elenge moko ya mbula 19, oyo azalaki mopaya na esika yango alekaki wana. Asengelaki kokutana na moninga moko na likita wana oyo Christine mpe akendaki. Amonaki liboke ya mbongo mpe atyaki yango na libenga na ye. Na nsuka ya likita yango, ayebisaki moninga na ye ete alɔkɔtaki eloko moko libándá mpe ete moto nyonso oyo abungisi eloko akoki kobenga ye mpe koyebisa soki abungisi eloko nini.
Ntango Christine akómaki na ndako na mpokwa wana, ayokaki mpasi mingi ntango amonaki ete lifuti na ye ya sanza mobimba ebungi. Pɔsɔ moko na nsima, ntango ayebisaki moninga na ye Josephine ete abungisaki mbongo, Josephine ayebisaki ye ete mopaya moko oyo azalaki na likita wana alɔkɔtaki eloko moko. Christine abengaki Blaise na telefone mpe ayebisaki ye ndenge mbongo yango ezalaki. Azalaki na esengo mingi ntango Blaise azongiselaki ye mbongo. Bongo Blaise? Abombaki mbongo yango pɔsɔ mobimba, kasi alobaki boye: “Esengo oyo nayokaki ntango nazongiselaki ye mbongo ezalaki mingi koleka oyo ya kobomba yango.”
Ntina oyo basalaka makasi bázala sembo ntango nyonso
Victorine, Victoire, mpe Blaise bafandaka na bamboka ekeseni mpe bayebani te. Kasi, bakokani na likambo moko. Bazali Batatoli ya Yehova, mpe batosaka makambo oyo Biblia elobi na oyo etali kozala sembo. Bazelaka kokokisama ya elaka ya mokili ya sika oyo Nzambe apesá. “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” Bato nyonso oyo bakozala na ntango wana bakozala bayengebene, bato ya sembo.—2 Petro 3:13.
Victorine azali mpenza na elikya te ete akokóma na mbongo mwa mingi liboso Nzambe abongola makambo. Atako bongo, na elimo, azali mozwi, likambo oyo mbongo ekoki kosomba te. Bana na ye bazali sembo mpe na bizaleli ya malamu. Mokolo nyonso ya lomingo, batondaka na esengo ntango bazali koyebisa bazalani na bango bolamu ya Nzambe mpe kolimbola ndenge akokokisa bamposa nyonso ya “baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo” mpe akobatela “baoyo nyonso bazali kolinga ye.”—Nzembo 145:7, 18, 20.
Nsukansuka, Victoire alongwaki na izini oyo basalaka mafuta ya mbila. Akómaki na mosala na ye moko mpe azalaki kotɛkisa gari (mikate basalá na fufu ya manioko) na zando. Bosembo na ye ebendaka bakiliya mingi. Kutu, eumelaki mingi te, akitisaki ntango oyo azalaki kolekisa na zando mpe amipesaki mingi koleka na mosala ya koyebisa basusu elikya ya kofanda na mokili oyo makambo ya kozanga kolongobana ekozala te. Na nsima, babalaki ye, mpe ye ná mobali na ye bazali lelo kosalela Nzambe na mosala ya ntango nyonso.
Christine abungisaki mbongo na ye liboso ya Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Blaise azalaki koyeba kaka bato moke na likita yango, kasi azalaki koyeba ete bazalaki bandeko na ye ya elimo, oyo bazali kobunda mpo na kozala sembo ntango nyonso.
Bato boni oyebi oyo basalaka mpenza makasi mpo na kozala sembo ntango nyonso? Kasi kanisá ete ozali elongo na bato 50, 100, to 200 oyo bazali sembo. Yango nde esengo oyo Batatoli ya Yehova bazalaka na yango na Bandako ya Bokonzi na bango. Mpo na nini kokende kuna te mpe koyebana na bango?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
“Kozala na bana oyo bazali sembo ezali esengo mingi koleka kozala na biloko mingi ya mokili.”—VICTORINE
[Etanda na lokasa 14]
Masese 6:30 epesi nzela bato báyiba?
Masese 6:30 elobi boye: “Batyolaka moyibi te kaka mpo ayibi ete atondisa molimo na ye ntango azali na nzala.” Maloba yango epesi nzela bato báyiba? Te. Bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi ete Nzambe amonaka ete moyibi azali na ngambo mpo na libunga na ye. Vɛrsɛ oyo elandi elobi boye: “Kasi, soki azwami, akofuta mbala nsambo; akopesa biloko nyonso ya motuya ya ndako na ye.” (Masese 6:31) Atako moto oyo ayibi mpo na nzala akoki mbala mosusu komonana mabe te lokola moto oyo ayibi mpo na lokoso to mpo na kosala basusu mabe, ye mpe asengeli ‘kopesa biloko,’ to kozongisa yango. Baoyo balingi Nzambe andima bango basengeli koyiba te, ata ndenge nini.