Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/4 lok. 3
  • Moto oyo atiká nsango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto oyo atiká nsango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Buku oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso
    Lamuká!—2008
  • Michael Faraday: Nganga-mayele mpe mobali na kondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Yehova azali kotambwisa mosala na biso ya koteya na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/4 lok. 3

Moto oyo atiká nsango

Bamiliare ya bato bafandá awa na mabele mpe bakufá. Mingi na bango basalá te makambo minene oyo ekoki kosɛnga ete bákanisaka bango. Kasi, mwa ndambo ya bato basalá makambo oyo ebongolá bomoi ya bato​—ata mpe bomoi na yo ya mokolo na mokolo.

OLAMUKI na ntɔngɔ mpe omibongisi mpo na kokende mosala. Opelisi mwinda ntango ozali komibongisa. Ozwi buku to zulunalo moko mpo na kotánga na bisi. Okanisi ete osengeli komɛla nkisi oyo monganga akomelaki yo mpo na maladi oyo ozali na yango. Kaka ntango mokolo ebandi, osili kozwa matomba na biloko oyo mwa ndambo ya bato minene basalá.

Michael Faraday Abotamaki na 1791, moto yango ya Angleterre mpe ya siansi nde abimisaki motɛrɛ ya lotiliki mpe masini ya lotiliki. Makambo oyo ye ayekolá mpe abimisá esalisá bato mingi bázala na kura lelo oyo.

Cai Lun Mokonzi moko na Chine, bato balobaka ete ye nde abimisaki mayele ya kosala papye na mobu soki 105 ya ntango na biso, mpe yango esali ete bapapye ekóma kobimisama mingi.

Gutenberg Na mobu soki 1450, moto yango ya mayele ya ekólo Allemagne abimisaki masini ya liboso ya kobimisa mikanda. Masini yango esalisaki mpo na kobimisaka mikanda na ntalo moke, mpe na ndenge yango esalisaki bato mingi bázwa mikanda oyo ezali na masolo ndenge na ndenge.

Alexander Fleming Na 1928, moto wana ya mayele ya ekólo Écosse, abimisaki antibiotique moko oyo abengaki yango pénicilline. Lelo oyo, bato basalelaka ba-antibiotique mingi mpo na koboma mikrobɛ.

Na ntembe te, biloko oyo bato mosusu ya mayele babimisá ememeli bamiliare ya bato matomba mosusu to esalisi bango mpo bázala na nzoto kolɔngɔnɔ.

Kasi, ezali na moto oyo aleki bato mosusu nyonso. Moto yango ayebani te mpo abimisá bankisi ya monganga to makambo mosusu ya siansi. Nzokande, moto yango oyo autá na libota oyo ezalaki na bozwi mingi te, oyo akufá esili koleka mbula pene na 2 000, atiká nsango moko​—nsango ya elikya mpe ya kobɔndisa. Soki totali ndenge nsango na ye esalisi ebele ya bato na mabele mobimba, bato mingi bakoki kondima ete azali mpenza moto oyo atiká nsango.

Moto yango ezali Yesu Kristo. Nsango nini asakolaki? Mpe nsango yango ekoki kosala nini na bomoi na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto